“Kondimela mayele na yo moko te”
“Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te.”—MAS. 3:5.
1, 2. (a) Mikakatano nini tokoki kokutana na yango? (b) Ntango tozali na mikakatano, tolingi kozwa ekateli, to tozali kobunda mpo na kolonga komekama, tosengeli kotyela nani motema, mpe mpo na nini?
PATRƆ ya Cynthiaa asilaki kokanga misala mosusu na kompanyi na ye mpe alongolaki basali mingi. Cynthia akómaki komona ete ye nde moto ya nsima oyo bakolongola na mosala. Akosala nini soki balongoli ye na mosala? Ndenge nini akobanda kofuta bafaktire na ye? Ndeko mwasi moko na nkombo Pamela azali na mposa ya kokende kosakola na teritware moko epai mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali mingi, kasi akende to akende te? Elenge mobali moko na nkombo Samuel azali na mokakatano ya ndenge mosusu. Azalaki kotala pornografi ntango azalaki mwana moke. Sikoyo Samuel akómi na mbula mwa moke koleka 20 mpe motema na ye ekómi na mposa makasi ya kozongela momeseno yango. Ndenge nini akolonga komekama yango?
2 Ntango ozali na mikakatano, olingi kozwa bikateli ya minene, to ozali kobunda mpo na kolonga komekama moko, otyelaka nani motema? Ondimelaka kaka motema na yo moko to ‘obwakelaka Yehova mokumba na yo ya kilo’? (Nz. 55:22) Biblia elobi boye: “Miso ya Yehova ezali epai ya bayengebene, mpe matoi na ye ezali koyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.” (Nz. 34:15) Na yango, ezali mpenza na ntina ete tótyela Yehova motema na biso mobimba mpe tóndimela mayele na biso moko te!—Mas. 3:5.
3. (a) Kotyela Yehova motema elimboli nini? (b) Nini esalaka ete bato mosusu bándimela mayele na bango moko?
3 Kotyela Yehova motema mobimba elimboli kosala makambo ndenge ye alingi, na kolanda mokano na ye. Mpo na yango, tosengeli ntango nyonso kobondela ye mpe kosɛnga ye na motema moko ete atambwisa biso. Nzokande, bato mingi bamonaka ete kondimela Yehova na motema mobimba ezali mpasi. Na ndakisa, ndeko mwasi moko na nkombo Lynn alobi boye: “Koyekola kotyela Yehova motema mobimba ezali naino etumba monene mpo na ngai.” Mpo na nini? Alobi boye: “Ngai ná tata tozalaka na boyokani te, mpe mama azalaki kobɔndisa ngai te, kokokisa bamposa na ngai ya mosuni mpe te. Na yango, banda bomwana, nayekolaki kokokisa bamposa na ngai kaka ngai moko.” Ndenge Lynn akolá esalaka ete akoka mpenza te kotyela moto motema mobimba. Bato mosusu mpe bamityelaka motema mingi mpo bazali na mayele to mpo basalá makambo ya minene. Na ndakisa, nkulutu oyo aumeli na mokumba na ye akoki komityela motema mingi mpe kobanda kosala makambo ya lisangá kozanga abondela naino Nzambe.
4. Tokolobela nini na lisolo oyo?
4 Ntango tobondeli Yehova asalisa biso, azelaka ete tósala nyonso oyo tokoki mpe tólanda mokano na ye. Na yango, ndenge nini tokoki koyeba ntango nini kobwakela Yehova mitungisi na biso mpe ntango nini biso moko tosengeli kosala makasi mpo na kosilisa mikakatano? Ntango tolingi kozwa bikateli, tosengeli kokeba na likambo nini? Mpo na nini kobondela ezali na ntina ntango tozali kobunda na komekama? Mpo na koyanola mituna yango, tokotalela bandakisa ya Biblia.
Na ntango ya mikakatano
5, 6. Hizikiya asalaki nini ntango mokonzi ya Asiri alingaki kobundisa Yerusaleme?
5 Biblia elobi boye mpo na Hizikiya, mokonzi ya Yuda: “Akangamaki se na Yehova. Apɛngwaki te mpo na kotika kolanda ye, kasi akobaki kotosa mitindo na ye, oyo Yehova apesaki Moize.” Ya solo, “atyelaki Yehova Nzambe ya Yisraele motema.” (2 Bak. 18:5, 6) Senakeribe, mokonzi ya Asiri ná basoda na ye ya nguya basilaki kozwa bingumba mosusu ya makasi na Yuda mpe sikoyo Senakeribe alingaki kozwa mpe Yerusaleme. Na yango, atindaki limpinga ya basoda na ye na Yerusaleme ná bato na ye mosusu, kati na bango Rabashake. Hizikiya asalaki nini? Akendeki na ndako ya Yehova mpe abandaki kobondela boye: “Ee Yehova Nzambe na biso, tobondeli yo, bikisá biso na lobɔkɔ na ye, mpo makonzi nyonso ya mabele báyeba ete kaka yo moko, Ee Yehova, nde ozali Nzambe.”—2 Bak. 19:14-19.
6 Hizikiya abondelaki, kasi akangaki mabɔkɔ te. Ata liboso akende na tempelo mpo na kobondela, ayebisaki bato ete báloba eloko te na ndenge Rabashake azalaki kofinga bango. Hizikiya atindaki mpe mwa bato epai ya mosakoli Yisaya mpo na koluka toli. (2 Bak. 18:36; 19:1, 2) Hizikiya asalaki makambo oyo ayebaki ete ekosepelisa Yehova. Mpo na kosilisa mokakatano oyo ebimaki na libaku wana, Hizikiya alukaki te kosala likambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova, elingi koloba koluka lisalisi na Ezipito to na bikóló mosusu ya pembeni. Na esika andimela mayele na ye moko, Hizikiya atyelaki nde Yehova motema. Ntango anzelu ya Yehova abomaki bato 185 000 na kaa ya Senakeribe, Senakeribe “asimbaki nzela akei” mpe azongaki na Ninive.—2 Bak. 19:35, 36.
7. Ndenge nini libondeli ya Hana mpe oyo ya Yona ekoki kobɔndisa biso?
7 Ndakisa mosusu ezali ya Hana, mwasi ya Molevi Elekana. Ye mpe atyelaki Yehova motema ntango azalaki na mokakatano mpo azalaki kobota te. (1 Sa. 1:9-11, 18) Ezali mpe na ndakisa ya mosakoli Yona. Ntango azalaki na libumu ya mbisi moko monene, abondelaki ete: “Na mpasi na ngai, nabelelaki Yehova mpe ye ayanolaki ngai. Na libumu ya Nkunda, nabelelaki mpo na kosɛnga lisalisi. Oyokaki mongongo na ngai.” Yehova abikisaki ye. (Yona 2:1, 2, 10) Koyeba ete ata soki tozali na mpasi ya ndenge nini, tokoki kobelela Yehova mpo na “koluka kondimama” na ye, ezali mpenza likambo ya kobɔndisa!—Tángá Nzembo 55:1, 16.
8, 9. Makambo nini ya ntina Hizikiya, Hana, mpe Yona balobelaki na mabondeli na bango, mpe yango eteyi biso nini?
8 Ndakisa ya Hizikiya, ya Hana, mpe ya Yona ezali mpe kosalisa biso tóyeba likambo oyo tosengeli kobosana te ntango tozali kobondela na ntango ya mpasi. Bango nyonso misato batungisamaki na motema mpo na mikakatano oyo bazalaki na yango. Atako bongo, mabondeli na bango emonisi ete bazalaki komitungisa kaka mpo na bango moko te mpe mpo bampasi na bango esilisa. Makambo elekaki ntina mpo na bango ezalaki nde kokumisa nkombo ya Nzambe, kosambela ye na ndenge oyo ebongi, mpe kosala mokano na ye. Hizikiya ayokaki mpasi mingi mpo bato bazalaki kofinga nkombo ya Yehova. Hana alakaki ete akopesa mwana yango oyo alukaki na mai na miso mpo asalela Yehova na tabernakle na Shilo. Mpe Yona alobaki ete: “Elako oyo nasalaki, nakokokisa yango.”—Yona 2:9.
9 Ntango tobondeli Nzambe asalisa biso na mpasi moko boye, tosengeli kotalela ntina oyo tozali kobondela. Tozali kobondela kaka mpo mpasi na biso esila, to tozali nde kokanisa Yehova mpe mokano na ye? Ntango tozali na mpasi, tokoki komitungisa mingi mpo na bomoi na biso moko tii kozongisa makambo ya elimo na nsima. Ntango tozali kobondela Nzambe asalisa biso, tosengeli kobondela libosoliboso mpo na kosantisama ya nkombo ya Yehova mpe kolongisama ya bokonzi na ye. Kosala bongo ekoki kosalisa biso tóbatela makanisi ya malamu ata soki likambo oyo tozalaki kolikya esalemi te. Mpo na koyanola na libondeli na biso, ntango mosusu Yehova akoki nde kopesa biso makasi ya koyikela mikakatano na biso mpiko, na esika alongola yango.—Tángá Yisaya 40:29; Bafilipi 4:13.
Ntango tolingi kozwa bikateli
10, 11. Yehoshafate asalaki nini ntango akutanaki na mokakatano moko makasi?
10 Osalaka ndenge nini mpo na kozwa bikateli ya minene? Ozwaka naino ekateli bongo na nsima obondeli Yehova asalisa mpo ekateli yango elonga? Tótala oyo Yehoshafate, mokonzi ya Yuda, asalaki ntango mampinga ya Moabe mpe ya Amone eyaki kobundisa ye. Yuda ezalaki na makasi ya kobunda na mampinga yango te. Yehoshafate asalaki nini?
11 Biblia elobi boye: “Yehoshafate akómaki kobanga mpe azwaki mokano ya koluka Yehova.” Ayebisaki bato nyonso ya Yuda bákila bilei mpe ayanganisaki bato mpo na “kotuna Yehova.” Na nsima, atɛlɛmaki na kati ya lisangá ya Yuda mpe ya Yerusaleme mpe abondelaki. Alobaki boye: “Ee Nzambe na biso, okopesa bango etumbu te? Mpo biso tozali na makasi te liboso ya ebele wana ya bato oyo bazali koyela biso; mpe biso moko tozali koyeba te oyo tosengeli kosala, kasi miso na biso etali epai na yo.” Nzambe ya solo ayokaki libondeli ya Yehoshafate mpe abikisaki bango na ndenge ya likamwisi. (2 Nt. 20:3-12, 17) Ntango tolingi kozwa bikateli, mingimingi oyo ekoki kotya boyokani na biso na Nzambe na likama, tosengeli kotyela Yehova motema na esika ya kondimela mayele na biso moko, boye te?
12, 13. Ndakisa nini Mokonzi Davidi atikelá biso na oyo etali kozwa bikateli?
12 Tosengeli kosala nini ntango tokutani na likambo moko oyo tomoni ete ezali mpasi te kosilisa yango? Mbala mosusu lokola tosilá kokutana na likambo ya ndenge wana, tokanisi ete tokosilisa yango nokinoki. Ndakisa ya Mokonzi Davidi ekoki kosalisa biso tóyeba oyo tosengeli kosala na makambo ya ndenge wana. Ntango Baamaleke bakɔtaki na engumba Ziklage, bamemaki basi ná bana ya Davidi mpe oyo ya bato na ye. Davidi atunaki Yehova mpe alobaki boye: “Nalanda etuluku oyo ya bapunzi?” Yehova ayanolaki boye: “Landá bango, mpo okozwa mpenza bango mpe okobikisa mpenza.” Davidi atosaki, mpe “abikisaki nyonso oyo Baamaleke bazwaki.”—1 Sa. 30:7-9, 18-20.
13 Mwa moke nsima ya likambo wana ya Baamaleke, Bafilistia bayaki kobundisa Yisraele. Na mbala oyo mpe Davidi atunaki Yehova mpe Yehova apesaki ye eyano ya polele. Alobaki na ye ete: “Matá, mpo nakopesa solo Bafilistia na mabɔkɔ na yo.” (2 Sa. 5:18, 19) Mwa moke na nsima, Bafilistia bayaki lisusu mpo na kobundisa Davidi. Akosala nini na mbala oyo? Akokaki kokanisa boye: ‘Nauti kokutana na likambo ya boye mbala mibale mobimba. Nakende kobundisa banguna ya Nzambe, kaka ndenge nasalaki liboso.’ Kasi Davidi akanisaki bongo te. Davidi amonaki te ete lokola alongaki mbala ya liboso, akolonga kaka. Na mbala oyo mpe abondelaki Yehova. Na ntembe te, asepelaki mpenza ndenge asalaki bongo, mpo malako oyo Yehova apesaki ye na mbala oyo, ekesanaki na oyo ya liboso. (2 Sa. 5:22, 23) Tokoki kokutana na likambo moko oyo ekokani na oyo tosilá kokutana na yango, kasi tosengeli kokeba ete tólanda te makanisi na biso mpe tósala kaka ndenge tosalaki mbala oyo eleki.—Tángá Yirimia 10:23.
14. Lisolo oyo elobeli Yosua ná bato ya Gibeone ekoki koteya biso nini?
14 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso nyonso, ata mpe bankulutu oyo baumeli mingi, tosengeli te kobosanaka kosɛnga litambwisi ya Yehova ntango tolingi kozwa bikateli. Tótala likambo oyo Yosua ná mikóló ya Yisraele basalaki ntango bato ya Gibeone oyo basalaki na mayele, balataki bilamba epasuká mpe bakosaki ete bauti na mokili moko mosika. Kozanga bátuna Yehova, Yosua ná mikóló ya Yisraele bayokanaki na bato ya Gibeone mpe basalaki na bango kondimana. Atako nsukansuka Yehova andimaki boyokani oyo basalaki, akomisaki lisolo yango na Biblia mpo tóyeba ete Yosua ná mikóló wana balukaki litambwisi na ye te.—Yos. 9:3-6, 14, 15.
Ntango tozali kobunda na komekama
15. Mpo na nini libondeli ezali na ntina mpo na kolonga komekama?
15 Lokola biso nyonso tozali bato ya masumu, tosengeli kosala makasi tóbundisa bamposa na biso ya kosala masumu. (Rom. 7:21-25) Tokoki mpe kolonga etumba yango. Ndenge nini? Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete kobondela ezali na ntina mingi mpo na kolonga komekama. (Tángá Luka 22:40.) Ata soki bamposa to makanisi ya mabe elongwe te nsima ya kobondela Nzambe, tosengeli ‘kokoba kosɛnga Nzambe’ apesa biso bwanya mpo tóbunda na komekama wana. Biblia eyebisi biso ete “apesaka bato nyonso na motema mobimba mpe apamelaka te.” (Yak. 1:5) Yakobo akomaki mpe boye: “Ezali nde na moto moko oyo azali na maladi [ya elimo] na kati na bino? Abenga bankulutu ya lisangá, mpe bango bábondela mpo na ye, bápakola ye mafuta na nkombo ya Yehova. Mpe libondeli ya kondima ekobikisa moto oyo azali kobɛla.”—Yak. 5:14, 15.
16, 17. Mpo na kotɛmɛla komekama, ntango nini eleki malamu kobondela?
16 Libondeli ezali na ntina mingi mpo na kobunda na komekama, kasi tosengeli kobondela na ntango oyo ebongi. Tózwa ndakisa ya elenge mobali moko oyo Masese 7:6-23 elobeli. Mokolo moko na mpokwa, azalaki kotambola na balabala oyo ayebaki ete mwasi moko ya ndumba afandaka wana. Lokola mwasi yango abungisaki ye nzela na maloba ya kondimisa mpe akosaki ye na maloba sukali ya mbɛbu na ye, elenge mobali yango alandaki ye, lokola ngɔmbɛ oyo ekei mpo na kobomama. Mpo na nini elenge mobali yango alekaki na balabala wana? Lokola azalaki “na motema te,” elingi koloba ayebaki makambo te, mbala mosusu azalaki kobunda na bamposa ya mabe. (Mas. 7:7) Ntango nini libondeli elingaki kosalisa ye mpenza? Ya solo, soki abondelaki ata na ntango nini mpo na kotɛmɛla komekama wana elingaki kozala malamu. Kasi, elingaki kozala malamu koleka soki abondelaki ntango likanisi ya koleka na balabala wana eyelaki ye na motó.
17 Lelo oyo, moto mosusu akoki kosala makasi mpo atala pornografi te. Kasi, nini ekosalema soki alingi kokɔta na basite ya Internet oyo ayebi ete ezali na bafoto mpe bavideo ya makambo ya mbindo? Likambo ya ndenge wana ekokani nde te na oyo ya elenge mobali oyo Masese mokapo 7 elobeli? Ekozala mpenza likama kobanda kolanda nzela yango! Mpo na kotɛmɛla komekama ya kotala pornografi, tosengeli kosɛnga Yehova asalisa biso liboso tókɔta na site ya Internet oyo ezali na makambo ya mbindo.
18, 19. (a) Mpo na nini ekoki kozala mpasi kotɛmɛla komekama, kasi ndenge nini tokoki kolonga etumba yango? (b) Ekateli na yo ezali nini?
18 Ezalaka pɛtɛɛ te kotɛmɛla komekama to kotika mimeseno ya mabe. Ntoma Paulo akomaki boye: “Nzoto, na mposa na yango, etɛmɛlaka elimo, elimo mpe etɛmɛlaka nzoto . . . yango wana makambo oyo [tozali] kolinga kosala [tozali] kosala yango te.” (Gal. 5:17) Mpo na kolonga etumba yango, tosengeli kobondela Yehova na motema mobimba ntango kaka makanisi ya mabe eyeli biso. Na nsima tosengeli kosala makasi tóboya makambo yango ya mabe. Kobosana te ete “komekama moko te ekómeli [yo] oyo ekómelaka bato nyonso te,” mpe ete Yehova akoki kosalisa biso tótikala sembo epai na ye.—1 Ko. 10:13.
19 Ezala tozali na mikakatano, tolingi kozwa ekateli moko ya monene, to tozali kobunda na komekama, Yehova apesá biso likabo moko kitoko: libondeli. Kobondela Yehova emonisaka ete totyelaka ye motema. Tosengeli mpe kokoba kosɛnga Nzambe elimo santu na ye mpo etambwisa biso mpe epesa biso makasi. (Luka 11:9-13) Tiká tókoba ntango nyonso kotyela Yehova motema mpe tondimelaka mayele na biso moko te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.
Ozali koyeba lisusu?
• Ndakisa ya Hizikiya, ya Hana, mpe ya Yona eteyi yo nini na oyo etali kotyela Yehova motema?
• Ndenge nini ndakisa ya Davidi mpe oyo ya Yosua emonisi ete tosengeli kokeba ntango tozali kozwa bikateli?
• Ntango nini ebongi tóbondela mpo na komekama?
[Elilingi na lokasa 9]
Mpo na kotɛmɛla komekama, ntango nini eleki malamu kobondela?