Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/4 nk. 28-31
  • Tozala na esengo mpe na molongó

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozala na esengo mpe na molongó
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na molongo mpe na esengo
  • Tomisalela makambo na makasi te
  • Mbwa na bomoi to nkosi ya kokufa?
  • Tomisalela malamu
  • Tosalela basusu malamu
  • Esengeli kokanisela moto na moto
  • Bozala penepene na etonga
  • Basaleli ya Nzambe​—⁠Libota libongisami malamu mpe ya esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Esengo na baoyo basalelaka “Nzambe ya esengo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Bóbatela etongá ya Nzambe na bolingo nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Ndenge ya kozwa esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/4 nk. 28-31

Tozala na esengo mpe na molongó

KOZALA na molongo ezali kopesa biso nzela na kokokisa makambo malamu. Koyeba kokokisa mosala malamu ekosunga biso na kosalela malamu ntango mpe makoki na biso. (Bagalatia 6:16; Bafilipi 3:16; 1 Timote 3:2) Kasi kati na bomoi, ezali te bobele likambo ya molongo mpe koyeba kokokisa mosala malamu. Wana apemamaki, mokomi na Nzembo akomaki ete: “Esengo ezali na bato oyo Jéhovah azali Nzambe na bango!. (Nzembo 144:15) Mokakatano ezali ya kozala na esengo mpe na molongó na makambo nyonso oyo tozali kosala.

Na molongo mpe na esengo

Jéhovah Nzambe azali ndakisa eleki malamu na makambo matali molongó. Misala na ye nyonso ya kozalisa, kobanda na selile kino bikelamu ya kokamwa, longwa na atome kino bagalaksi ya mineneminene, ezali na molongó mpe na sikisiki. Mibeko na ye oyo mizali kotambwisa molongó mizali kopesa biso nzela na kobongisa bomoi na biso kozanga kobanga. Toyebi ete moi mokobima ntongo nyonso mpe elanga ekoya nsima na eleko ya mbula.​—Genese 8:22; Yisaya 40:26.

Kasi Jéhovah asuki te bobele na kozala Nzambe na molongó. Azali lisusu “Nzambe na esengo.” (1 Timote 1:11, MN; 1 Bakolinti 14:33) Esengo na ye ezali komonana kati na bozalisi na ye. Bana ya nyau ya kitoko, kolala ya moi ya kitoko, bilei ya elengi, miziki oyo mizali kotinda na kokanisa, mosala ya esengo mpe ebele na makambo mosusu mizali komonisa ete alingaki ete tosepela na bomoi. Mibeko na ye mizali bipekiseli ya kotungisa te, kasi mizali kobatela biso mpo na bolamu na biso.

Yesu Klisto azali kolanda ndakisa ya Tata na ye. Azali “Mokonzi moko ya lokumu mpe ya esengo” mpe azali komitambwisa lokola Tata na ye. (1 Timote 6:15; Yoane 5:19) Ntango asalaki elongo na Tata na ye kati na kozalisama, azalaki bobele “mokonzi wa mosala” te. (Liloba lya Nzambe) Azalaki na esengo kati na mosala na ye. Azalaki “kosepela liboso na Jéhovah ntango nyonso, azalaki kosepela na bifandelo na mokili na ye, mpe esengo na ye ezalaki kati na bana na bato.”​—Masese 8:30, 31.

Tolingi komonisa boboto lolenge moko, esengo motindo moko mpe kosepela motindo moko na Yesu epai na bato, kati na makambo nyonso oyo tozali kosala. Nzokande, wana tolingi kokokisa mosala na biso malamu mingi, ekomaka mbala mosusu tobosana ete, mpo na “kotambola na botosi ... na elimo na Nzambe” tosengeli komonisa mbuma ya elimo na Nzambe. (Bagalatia 5:22-25) Mpo na yango ezali malamu ete tomituna lolenge nini tokoki kozala na molongó mpe na esengo kati na mosala na biso, mpe wana tozali kotambwisa mosala ya bato mosusu?

Tomisalela makambo na makasi te

Totalela toli kitoko oyo ezali kati na Masese 11:17. Mokomi na yango oyo apemamaki na Nzambe ayebisi biso na esika ya liboso ete “moto na boboto akosunga molimo na ye moko.” Na nsima amonisi likanisi oyo ekeseni na yango: “Nde ye oyo azali na nkanda akobebisa nzoto na ye mpenza.” Liloba lya Nzambe ebongoli eteni yango boye: “Moto malamu akomipesa bolamu ye moko, nde moto wa motema mabe, akomilukela mpasi.”

Lolenge nini tokoki kozala na makambo makasi epai na biso moko, kozanga ete toyeba yango? Na ndakisa, ata wana tozali na mikano ya malamu, tokoki mpenza kozanga ezaleli ya komibongisa. Ekopesa matomba nini? Moto moko ya mayele alobaki ete: “Kobosana makambo, kokoma banote na esika esengeli te, kozanga koyoka etinda malamu, kokoma malamu te nsango ya telefone​— nyonso wana ezali makambo ya mikemike, bankusu oyo ezali kobebisa makoki ya kosala mosala malamu, oyo ezali koyeisa mpamba makanisi nyonso malamu.”​—Yekola kokokisa mosala malamu (na Lingelesi).

Maloba oyo makokani na oyo mokomi apemami alobaki ete: “Ye oyo azali na goigoi na mosala na ye​— azali ndeko na ye oyo akobebisa biloko.” (Masese 18:9) Ya solo, bato oyo bazangi bibongiseli na mosala na bango mpe bazali kokokisa mosala na bango malamu te bakoki komema mpasi mpo na bango moko mpe mpo na bato mosusu. Bato bakokimaka bango mpo na yango. Mpo na bopotu na bango bazali komipesa mpasi bango moko.

Mbwa na bomoi to nkosi ya kokufa?

Tokoki lisusu komisalela makambo makasi soki tomityeli mikano oyo eleki mpenza makoki na biso. Kati na mokanda oyo ezali kolobela kokokisa mosala malamu tozali kotanga ete tokoki komityela lokola mokano “masengami ya kokoka oyo eleki makasi mpo na kolonga yango.” Mpe yango ekosuka na “kopesa biso mawa na motema mpe kolembisa biso.” Ye oyo alingi kosala makambo na lolenge ya kokoka mbala mosusu ayebi komibongisa mpe ayebi malamu kokokisa mosala na ye, kasi akozala na esengo soko moke te. Nsukansuka akobuka mawa ya motema lokola litomba.

Soki tozali na momeseno ya koluka kosala makambo na lolenge ya kokoka, ebongi tomikundola ete “mbwa na bomoi aleki nkosi ekufi na malamu.” (Mosakoli 9:4) Mbala mosusu tokomiboma na lolenge ya solo te wana tozali koluka kokoka na motindo mobongi te, nzokande kolemba na nzoto oyo ekoki kouta na yango ekoki kopesa biso mpasi mingi. Moto moko oyo ayekoli makambo mingi na likambo yango azali kolobela “kolemba na nzoto, na maoki, na elimo, na makanisi mpe na boyokani.” (Mitungisi ya mosala mpe kolemba [na Lingelesi]) Wana tozali koluka mikano oyo mikoki kokokisama te, na ntembe te tozali komisalela makambo makasi mpe tozali komipimela mpenza esengo.

Tomisalela malamu

Omikundola ete: “Moto na boboto akosunga molimo na ye moko.” (Masese 11:17) Tozali komisalela malamu wana tozali komityela mikano ya mayele, tozali kobatela na makanisi ete Jéhovah, Nzambe na esengo ayebi bandelo ya makoki na biso. (Nzembo 103:8-14) Tozali na esengo ntango biso moko tozali koyeba bandelo yango mpe “tozali kosala nyonso oyo ekoki,” engebene makoki na biso, mpo na kokokisa malamu mikumba na biso.​—Baebele 4:11; 2 Timote 2:15; 2 Petelo 1:10.

Ya solo, likama mosusu ezali ya kokende na ndelo mosusu​— ya kozala malamu mingi epai na biso moko. Tobosana eyano na Yesu te, oyo apesaki na likanisi oyo ntóma Petelo abimisaki ete “soko moke te, Nkolo! Oyo ekokómela yo te!” Nzokande, esengelaki na ntango wana ekateli ya nguya. Likanisi ya Petelo ezalaki mpenza mabe mingi yango wana Yesu alobaki ete: “Kenda nsima na ngai, Satana! Ozali libaku liboso na ngai mpo ete ozali kokanisa lokola Nzambe te kasi lokola bato.” (Matai 16:22, 23) Komisalela malamu elimboli te kozanga komibanzabanza na makambo to koluka biloko oyo ezangi mpasi. Yango mpe ekoki kopekisa biso na kozala na esengo. Tosengeli komonisa mayele, kasi kolanda bilandela te.​—Bafilipi 4:5.

Tosalela basusu malamu

Bakomeli mpe Bafalisai ya ntango na Yesu bakanisaki mbala mosusu ete babongisamaki malamu mpe bayebaki kokokisa malamu mosala na bango. Kati na Dictionnaire de la Bible (na Lingelesi) tokoki kotanga na ntina na lolenge ya losambo na bango ete: “Mobeko nyonso ya Biblia ezalaki na malako mikemike ebele. Likambo ya kolembisa bikateli ezalaki te; Moyuda nyonso asengelaki mpenza kotosa Mibeko, na makambo mikemike na yango nyonso ... Babakisaki makambo ya mpambampamba mingi na mibeko kino losambo ekomaki mombongo, mpe bomoi ekomaki mokumba ya kilo mingi. Na oyo etali bizaleli malamu bato bakomaki lokola masini. Lisosoli na bango ezalaki kosala te. Nguya ya Liloba na Nzambe esilaki, enyatamaki na nse ya malako ebele oyo makokaki kolongolama te.”

Ezali likambo ya kokamwa te ete Yesu Klisto akweisaki bango. Alobaki ete: “Bazali kokanga mikumba na bozito mpe bakotya yango na mapeka na bato, nde bango mpenza balingi kotombola yango ata na mosapi na bango te.” (Matai 23:4) Bankulutu oyo bazali na bolingo bazali komipekisa na kotyela etonga ebele na malako ya mikemike. Bazali kosalela etonga na Nzambe malamu, na kolandaka ndakisa na Yesu Klisto, oyo azalaki malamu mpe mobondisi.​—Matai 11:28-30; Bafilipi 2:1-5.

Atako mikumba na bango kati na lisanga ya Jéhovah mibakisami, bankulutu basengeli kobosana te ete bazali kosala elongo na bato​— bato oyo Nzambe alingi bango. (1 Petelo 5:2, 3, 7; 1 Yoane 4:8-10) Basengeli te kozindisama mingi koleka na makambo matali komibongisa kino kobosana mokumba na bango ya ntina, oyo ya bakɛngɛli, mpe ya babateli ya etonga.​—Masese 3:3; 19:22; 21:21; Yisaya 32:1, 2; Yilimia 23:3, 4.

Na ndakisa, komibanzabanza mingi koleka na ba programmes mpe na mituya ekoki kolongola komibanzabanza na bango mpo na bato. Tokamata ndakisa ya mokombi motoka oyo akanisi ete mokumba na ye ya liboso ezali bobele ya kotosa ebongiseli na ye ya ntango. Lobanzo na ye moko ezali bobele ya kokoma na nsuka ya nzela na ye, na ngonga oyo epesameli ye. Likambo ya mawa mpo na ye, bato oyo ye azali kokumba bazali kopekisa ye na kokokisa yango. Bazali kotambola malembe, bazangi ebongiseli mpe bazali ntango nyonso kokoma esika motuka etelemaka wana ye alingi kokende. Na esika ya kokanisa ete mosala na ye ezali ya komibanzabanza na bamposa ya bato oyo ye azali kokomba, azali komona bango lokola bipekiseli mpo ete akokisa malamu mosala na ye mpe azali kolemba mpo na yango.

Esengeli kokanisela moto na moto

Koluka kokokisa mosala malamu mingi esukaka mbala mingi na kozanga kokanisa bamposa ya bato. Bato na bolembu mpe baoyo bazali kokokisa mosala na bango malamu te batalelamaka mbala mosusu lokola mokumba ya kilo. Yango ekoki kobimisa mikakatano mingi. Na ndakisa, kati na Sparte, engumba moko ya Grece ya kala, bazalaki kosundola bana oyo bazalaki makasi te mpe baoyo bazalaki kobela mingi. Bakokaki te kozala basoda ya makasi mpe ya molende mpo na kobundela ekolo ya makasi mpe ya nguya. Filozofe Bertrand Russell alobi ete: “Ntango mwana abotami, tata na ye azalaki komema ye epai na mikolo na libota na ye mpo batalela ye. Soki azalaki na nzoto kolongono, bazalaki kozongisa ye epai na tata na ye mpo abokola ye, soki bongo te basengelaki kobwaka ye kati na libulu moko mozindo.”​—Histoire de la philosophie occidentale.

Ekolo wana oyo ezangaki koyokela bato mawa ezalaki na makambo makasi kasi ezalaki na esengo te. (Tala Mosakoli 8:9.) Bayangeli ya Sparte bakanisaki mpenza ete molende na bango ya kokokisa makambo malamu epesaki bango bantina ya kosala bongo, kasi bizaleli na bango ezangaki mawa mpe boboto. Nzela na bango ezalaki oyo na Nzambe te. (Nzembo 41:1; Masese 14:21) Nzokande, bakɛngɛli kati na lisanga ya boklisto bazali komikundola ete bampate nyonso ya Nzambe bazali na motuya na miso na ye, mpe bazali kosalela moko na moko na lolenge ya malamu. Bazali kotya likebi te bobele na bampate 99 oyo bazali na nzoto kolongono, kasi lisusu na baoyo balembi to baoyo bazali na mpasi na maoki.​—Matai 18:12-14; Misala 20:28; 1 Batesaloniki 5:14, 15; 1 Petelo 5:7.

Bozala penepene na etonga

Bankulutu bazali kotikala penepene na etonga oyo bazali kobatela. Nzokande, bolukiluki ya mikolo na biso likolo na miango misalelami na mombongo mpo na kopesa litomba monene emonisi ete, directeur to mokambi asengeli kozala mosika na bato oyo azali kokamba. Molukiluki moko alobelaki matomba makeseni oyo mokonzi moko ya basoda oyo basalelaka mpepo ya etumba azwaki, ntango azalaki koyokana na bango penepene, to ntango azalaki mosika na bango: “Wana azalaki penepene na ba officiers na ye, bazalaki komiyoka na kimya mpe bazalaki komitungisa mingi te na ntina na milende ya basoda na bango. Nokinoki ntango amibendaki lokola mokonzi, balandi na ye babandaki komitungisa soki makambo mazalaki kotambola malamu te ... mpe komibanzabanza na bango ememaki bango na kotya likebi mingi na mosala na bango. Bongo, bokoli malamu emonaki mpo na litomba ya basoda nyonso.”​—Bososoli ya kokamba mosala (na Lingelesi).

Kasi lisangá ya boklisto ezali mosala ya soda te. Bankulutu oyo bazali kotalela mosala ya basangani ya lisanga basengeli komekola ndakisa na Yesu Klisto. Nzokande, azalaki ntango nyonso penepene na bayekoli na ye. (Matai 12:49, 50; Yoane 13:34, 35) Asalelaki komitungisa na bango te mpo na kokokisa mosala malamu. Akolisaki kati na ye mpe bayekoli na ye boyokani ya makasi etongami likoló na kotyanela motema. Bayekoli na ye bazalaki komikesenisa na bolingo makasi oyo ezalaki kopesa bango bomoko. (1 Batesaloniki 2:7, 8) Soki boyokani ya lolenge yango ezali, etonga ya esengo oyo epusami na bolingo na Nzembe, ekotosa kozanga kopusama mpe ekosala nyonso mpo na kosalela ye.​—Tala Exode 35:21.

Biteni mingi ya Makomami bizali kolimbola polele bizaleli ya boklisto lokola esengo mpe bolingo mpo na bandeko. (Matai 5:3-12; 1 Bakolinti 13:1-13) Nzokande, mikapo moke mizali kolobela ntina ya kokokisa mosala malamu mingi. Ya solo, komibongisa ezali na ntina. Libota na Nzambe ebongisami uta kala. Nzokande, na ndakisa, tokanisa naino mbala boni bakomi na Nzembo bazali kolobela basaleli na Nzambe lokola bato na esengo. Nzembo 119, oyo ezali kolobela mingi mibeko, bokundoli mpe mitinda ya Jéhovah, ezali kobanda na maloba oyo: “Esengo na baoyo bakotambola alima, baoyo bakotambola kati na Mobeko na Jéhovah. Esengo na baoyo bakotalela bokundoli na ye, bango bakolukaka ye na motema mobimba.” (Nzembo 119:1, 2) Okoki nde kolonga ntembe oyo ya komibongisa mpe kozala na esengo?

[Elilingi na lokasa 28]

Libungutulu libengami sphère armillaire​—elembo ya kala ya bazolóngano minene ya makoló

[Elilingi na lokasa 31]

Jéhovah, lokola Mobateli na mpate na bolingo, azali bobele Nzambe na molongó te, kasi lisusu Nzambe na esengo

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Garo Nalbandian

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto