Tósalela mwa babúku ndenge na ndenge kati na mosala ya kosakola
1 Bato ya mikolo na biso basepelaka na mitindo nyonso ya masoló. Kati na mosala na biso ya kosakola na Yanuáli, tómema mwa babúku mingi mpo na kosalela oyo ekosepelisa bafandi ya teritware na biso. Na bongo, tómeka kolakisama moko kati na oyo elandi:
2 Mpo na lipesi ya mwa búku “Bokonzi oyo ekosala Paradis,” tótuna motuna oyo:
◼ “Na makanisi na yo, mokili mokokaki kozala ndenge nini soki Nzambe azalaki motambwisi bobele moko na yango? [Tótika moto yango ayanola.] Tiká ete Nzambe ayangela mabelé; wana ezali mpenza eloko tosɛngaka ntango tosalaka libondeli ya Tata wa biso, oyo Yesu alakisaki biso. [Tófungola mwa búku yango na lokasa 3 mpe tótánga na paragrafe ya liboso, oyo etángi Matai 6:10.] Soki ozali na mposa ya kofanda na mokili motindo oyo, osengeli kotánga mwa búku oyo.” Na nsima, tólakisa mwa búku yango.
3 Likanisi mpo na kolakisa mwa búku “Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ”:
◼ “Ondimi ete mokolo mosusu moto moko te akolela lisusu na ntina na molingami na ye moko oyo amemami na kufa? [Tótika moto yango ayanola.] Mwa búku oyo ekomami malamu mpenza esili kolendisa bamilió ya bato, mpamba te ezali kolimbola ete mokolo yango mobɛlɛmi mpe ete yango ezali elaka ya solo oyo Biblia epesi. [Tófungola mwa búku yango na lokasa 5 mpe tótánga paragrafe ya mitano, bakisá mpe 1 Bakolinti 15:21, 22. Na nsima, tólakisa elilingi ya lokasa 30.] Awa moyemi amonisi malamu mpenza esengo oyo tokooka na koyambáká balingami na biso oyo bakufá, na ntango bakosekwa. Kasi koyambana wana ya esengo ekosalema wapi? Okokuta eyano euti na Biblia kati na mwa búku oyo.” Soki moto yango andimi lipesi na biso, tóbakisa ete: “Nakosepela kozongela yo mpo na kokɔta na bozindo ya lisoló oyo.”
4 Mbala mosusu tokosepela kolakisa mwa búku “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika” na kosɛngáká mbala moko boyekoli ya Biblia:
◼ “Bato mingi bazali komituna mituna na ntina na Biblia. Moko na mituna oyo esilá mbala mosusu koyela yo na makanisi. [Tófungola mwa búku yango na lokasa 30.] Mingi bazali kotɛlɛma na oyo ya nsuka: ‘Ndenge nini okoki komibongisa mpo na kozala na bomoi ya seko kati na Paradis? ’ ” Soki tolimboli baparagrafe 57 mpe 58 oyo ezali na lokasa 29 kino lokasa 30 mpe soki totángi Emoniseli 21:3, 4, boye totye moboko mpo na boyekoli ya Biblia. Tósukisa na kopesáká mwa búku mpe na kozwáká mokolo oyo tokokutana mpo na kotalela mituna misusu.
5 To mpe tokoki komeka kolakisama oyo ya pɛtɛɛ ya mwa búku “Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko”:
◼ “Moko na makambo ya liboso oyo nayekolaki kati na Biblia ezalaki nkombo ya Nzambe. Oyebi nkombo yango? [Tótika moto yango ayanola.] Nakosepela kolakisa yo yango. Na ndakisa, tozali kokuta yango kati na Nzembo 83:18. [Tótánga mokapo yango.] Mwa búku oyo ezali komonisa lolenge oyo nkombo ya Nzambe, Yehova, ezali komonana na kati na nkótá ikeseni. [Tólakisa etánda oyo ezali na lokasa 8.] Soki olingi koyeba makambo mingi likoló na Yehova mpe mikano na ye, boye tángá mwa búku oyo.” Tópesa yango na mabɔkɔ ya molobani na biso.
6 Kozaláká na mwa babúku yango ndenge na ndenge, na ntembe te tozali na bisaleli mingi mpenza mpo na “kosakola nsango malamu epai na basɔkɛmi.”—Yis. 61:1, NW.