Tózala bato oyo balendisaka
1 Lokola tozali kobika na “ntango na mpasi,” biso banso tozali na mposa ya bilendiseli. (2 Tim. 3:1) Lokola asilaki kososola mposa wana na eleko na ye, Paulo azalaki kosɛnzɛla na kosaláká ete bokutani na ye elongo na bandeko ekoka kozala libaku libongi ‘mpo na kolendisana.’ Alendisaki bango ete ‘bálanda makambo oyo mazali kolendisa bamoko mpe bamosusu.’ (Lom. 1:11, 12; 14:19) Milende wana ‘mipesaki makasi epai na bayekoli, kolendisáká bango na koumela kati na kondima.’ (Misala 14:22) Tozali na mposa makasi ya bilendiseli motindo wana lelo oyo.
2 Maloba na biso makoki kolendisa basusu mpe, wana yango elobami na bososoli nyonso, makoki kozala “lokola wolo etyami kati na palata.” (Mas. 25:11.) Na kopesáká biyano na makita, ‘tozali kolendisana bamoko na bamosusu.’ (Eb. 10:25) Lolenge malamu ya kosalela monɔkɔ na biso ezali ya koyebisa makambo oyo tokutanaki na yango na mosala ya kosakola, kopesa bandeko longonya to kosolola makambo ya elimo. Koloba lolenge wana ‘ezali malamu mpo na kolendisa, kopesáká na baoyo bazali koyoka biso eloko oyo ekoki kopesa bango litomba.’—Ef. 4:29.
3 Tólobelaka makambo oyo mazali kolendisa: Na Bafilipi 4:8, Paulo apesaki toli malamu oyo ezali komonisa lolenge lobongi ya kosalela monɔkɔ: kotya likebi na biso na makambo nyonso oyo mazali solo mpe oyo mabongi kopesamela motuya, oyo mazali sembo, oyo mazali pɛto mpe ya kosepelisa, oyo mazali na lokumu, oyo mazali malamu mpe oyo mabongi kosanzolama. Tokoki kondimisama ete oyo tozali koloba ezali solo mpe ezali kolendisa soki yango euti na Liloba ya Nzambe. (Yoa. 17:17) Komipesa na biso epai na Nzambe, makambo oyo tozali koyekola na makita ya lisangá, molende oyo tozali komonisa kati na mosala ya kosakola mpe makambo mosusu ya motindo yango mabongi na kopesamela motuya. Na ntembe te, masoló na ntina na malako mpe mitindá ya Liloba ya Nzambe makosalisa biso na kokóma ‘bato na mayele mpo na lobiko.’ (2 Tim. 3:15) Tómonisa botɔ́ndi na biso mpo na etamboli ya pɛto ya baoyo bazali basangani ya lisangá ya Yehova oyo lizali pɛto. Tókumisa misala malamu ya bandeko na biso oyo mitondi na boboto. (Yoa. 13:34, 35) Kati na makambo oyo mazali na lokumu, tozali mpe na bizaleli ya pɛto ya boklisto lokola kondima, esengo, kimya mpe motema molai; yango ezali bizaleli oyo bandeko na biso bazali komonisa. Kosolola likoló na makambo wana ya malamu mpe oyo mabongi na kosanzolama ezali ‘malamu, mpo na kolendisama’ ya basusu.—Lom. 15:2.
4 Kokutana mikolo nyonso na makambo ya mpasi ya mokili elɛmbisaka mpenza. Oyo nde esengo na kotya makambo wana mpembeni mpo na kosepela na bolingo ya bandeko! Bangonga ya esengo oyo tozali kolekisa elongo ezali eloko ya motuya oyo tosengeli kobatela yango. Soki tozali ntango nyonso bato oyo basungaka mpe oyo balendisaka, basusu bakokoka mpenza koloba mpo na biso ete: ‘Balendisi elimo na ngai.’—1 Kol. 16:18.