Makundoli ya Yehova malendisaka biso na elimo?
1 Wana azalaki kosanzola Yehova, mokomi moko ya Nzembo alobaki ete: “Makundoli na yo mazali lobanzo na ngai.” (Nz. 119:99, NW) Liloba ya Liebele oyo libongolami na “makundoli” lizali kopesa likanisi ete Yehova azali kozongisa kati na makanisi na biso makambo oyo mibeko na ye, bikateli na ye, malako na ye mpe mitindá na ye ezali koloba. Soki tolandi yango, ekolendisa biso na elimo mpe ekopesa biso esengo.—Nz. 119:2.
2 Lokola tozali kati na libota ya Yehova, tozali ntango nyonso kozwa batoli; tosilá koyoka mingi kati na batoli yango. Atako tosepelaka mingi na bilendiseli motindo wana, nzokande tomemamaka mingi na kobosana yango. (Yak. 1:25) Na motema pɛtɛɛ nyonso, Yehova azali kosalela biso makundoli oyo matondi na bolingo. Ntoma Petelo alobelaki mwa ndambo na yango mpo na ‘kolamwisa likoki na biso ya kokanisa malamumalamu, mpo ete tómikundola malako na Nkolo.’—2 Pet. 3:1, 2.
3 Bazali ntango nyonso kokundwela biso ntina ya kosala boyekoli ya biso moko mpe ya kosangana na makita. Ntina ya likambo yango ezali ete misala wana mizali na ntina mingi mpo na bolamu na biso na elimo.—1 Tim. 4:15; Eb. 10:24, 25.
4 Mpo na bamoko, mokakatano moleki monene ezali ya kokokisa mokumba na bango ya boklisto oyo motali kosakola. Yango ezali likambo oyo lisɛngi milende, ekateli makasi mpe kolendendela. Atako yango esɛngi makambo mingi epai na biso, nzokande kozala na “makolo malatisami na bisaleli ya nsango malamu” ekosalisa biso na ‘kotɛlɛma ngwi.’—Ef. 6:14, 15, NW.
5 Koyeba makambo oyo Yehova asɛngi na biso esengeli te kozala eloko bobele moko oyo ezali kopusa biso kati na mosala. Ntoma Paulo akundweli biso ete eloko ezali kopesa bopusi oyo tosengeli na yango mpo na kosala “eyambweli ekokómisa moto na lobiko” ezali nde motema. (Lom. 10:10, NW) Soki tozali na kondima makasi mpe soki motema na biso mobaluki epai na makundoli ya Yehova, tokopusama na kolobela nkombo na ye mpe kosanzola yango.—Nz. 119:36; Mat. 12:34.
6 Wana tozali kosala makasi mpo na kokokisa misala malamu, tokomizela na ntina ebongi mpenza ete tózwa esengo uta na yango. (Mos. 2:10) Paulo atángi esengo ete ezali mbuma ya elimo ya Yehova, mpe tosengeli koluka kofulukisa ezaleli yango kati na biso. (Gal. 5:22) Petelo abakisaki ete “milende nyonso makasi” mikopesamela mbano; mbano yango ezali mosala oyo mozali kobota mbuma, mpe yango ezali kopesa esengo.—2 Pet. 1:5-8.
7 Soki tokutani na mikakatano, tómikundwela etɛlɛmɛlo makasi ya bantoma, oyo balobaki ete: “Mpo na makambo mayebi biso mpe mayoki biso, tokoki kotika kosolola yango te.” (Mis. 4:20) Tozali kozwa lisusu makasi ntango tomikundoli ete ‘na kosaláká bongo, tokomibikisa biso moko, mpe baoyo bazali koyoka biso.’—1 Tim. 4:16.
8 Tozali komona mabe te mpe tozali koyoka nkanda te mpo na makundoli oyo mazali kopesamela biso mbala na mbala. Kutu, toyebi malamumalamu motuya monene na yango. (Nz. 119:129) Na eleko oyo ya mpasi, tozali na botɔ́ndi ete Yehova azali kokóba kopesa biso makundoli mpo na kolendisa biso na elimo mpe kopusa biso na kozala na molende mpo na misala malamu.—2 Pet. 1:12, 13.