Makita ya mosala mpo na Yanuáli
Pɔ́sɔ ebandi na 1 Yanuáli
10 mn: Mayebisi mpe Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.
17 mn: “Bósɛnzɛlaka.” Ekosalema na mituna mpe biyano.
18 mn: “Tósalela mwa babúku ndenge na ndenge kati na mosala ya kosakola.” Lisoló likoló na kolakisama oyo epesami. Monisá na maloba mokuse mwa makambo ya sikisiki ya mwa babúku wana. Bongisá bilakiseli mibale to misato ya mikuse oyo bizali komonisa lolenge ya kolakisa mwa babúku yango.
Loyembo 213 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 8 Yanuáli
10 mn: Mayebisi. Lapólo ya kɔnti.
15 mn: “Makundoli ya Yehova malendisaka biso na elimo?” Ekosalema na mituna mpe biyano.
20 mn: Osili komilɛngɛla mpo na kolónga likambo litali monganga oyo ekoki kotya kondima na yo na komekama? Lisukúlu ya mɔ́tɔ mpenza oyo likosalema na nkulutu moko ya makoki. Na kosaleláká makanisi ya paragrafe 1 kino paragrafe 3 ya libakema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Máí 1994, salisá bayoki na koyeba ete kálati ebéngami “Attestation” ezali mpenza kopesa libateli. Lobá ete bákabola bakálati yango ya sika epai na basakoli oyo babatisami, mpe bapesa mua likabo moke mpo na yango; talelá nkomá ya 15 Sɛtɛ́mbɛ 1995 oyo ezali na malako matali lolenge ya kotondisa bakálati yango. Yebisá bandeko ete bátondisa bakálati yango na mpokwa wana TE. kasi bámema yango epai na bango, bátalela likambo yango na lisalisi ya libondeli, mpe na nsima bátondisa yango. Kasi BAKOTYA SINYATILI na bakálati yango na ntango wana TE. Nsima na kotondisa, bakomema yango na boyekoli ya mokanda oyo ekolanda, epai kuna bankulutu bakosɛnga ete sinyatili etyama na bakálati yango, ete batatoli bándimisa bosolo na yango mpe ete dati etyama likoló na yango. Motambwisi ya boyekoli ya mokanda akosalela liste moko ya sika mpo na kondimisama ete babosani ata moto moko te kati na baoyo bazali kosangana na etuluku na ye. (Baboti oyo babatisami bakoki kosalisama mpo na koyeba lolenge ya kotondisa Cartes d’identité ya bana na bango.) Baoyo bakozala te mokolo wana na boyekoli ya mokanda bakokoka mpe kozwa lisungi ya batambwisi ya boyekoli ya mokanda mpe ya bankulutu na likita ya mosala oyo ekolanda, kino basakoli nyonso oyo babatisami bakosilisa kotondisa malamumalamu bakálati na bango mpe kotya sinyatili likoló na yango. Bankulutu bakosala liste ya baoyo bayaki te mpe bakomeka kotondisa bakálati nyonso, soki likoki lizwami.
Loyembo 154 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 15 Yanuáli
10 mn: Mayebisi.
20 mn: “Tózongela moto nyonso oyo azwaki mwa búku.” Ndeko oyo akopesamela eteni oyo ya likita azali kosolola elongo na basakoli misato mpo na komonisa ntina ya kozongela baoyo nyonso bamonisaki bosepeli mpe oyo bazwaki mikanda. Bazali kotalela kolakisama oyo epesami mpe bazali komimekisa elongo mpo na kosalela yango.
15 mn: Tótambwisa boyekoli ya Biblia epai na bato. Ekosalema na nkulutu moko oyo atambwisaka boyekoli ya Biblia oyo ezali kobota mbuma. Lendisá basakoli ete básala milende mingi mpo na kobanda boyekoli ya Biblia. Zongelá mwa makanisi ya búku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe, na lokasa 89 kino lokasa 91. Okoki koyebisa na mokuse mwa masoló oyo mabimaki kati na lisangá.
Loyembo 164 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 22 Yanuáli
10 mn: Mayebisi. Talelá etánda oyo ete “Manáka ya liyangani ya zongazonga 1995-1996.”
15 mn: Tóluka mabaku mpo na kopesa litatoli. Mingi kati na biso bazali kosala mibembo mpo na kokende na liyangani to na lói, mpe yango ezali kopesa biso mabaku kitoko ya kopesa litatoli na lolenge ya libaku malamu. Na kosaleláká Mokanda mpo na Eteyelo, na lokasa 80 mpe lokasa 81, paragrafe 11 kino paragrafe 16, yebisá na lolenge nini likoki lizali mpo na kobanda lisoló elongo na moto oyo oyebi ye te. Monisá ete komibongisa ezali kopesa nzela na kozwa matomba malamu. Bilakiseli misato ya mikuse oyo bikomonisa basakoli misato bakeseni: moko azali kobanda lisoló elongo na motekisi esánsi (to mofutisi tiké); mosusu azali kobanda lisoló elongo na moto ya mobembo kati na bisi; mpe ya misato azali kobanda lisoló elongo na moto moko oyo azali kozela liboso ya kɛ́si kati na magazini moko. Kundwelá basakoli ete ezali likambo ya ntina kozwa nɔ́ti ya baoyo bamonisaki bosepeli mpe kokamata bibongiseli na ntina ete moto moko akende kotala bango na mikolo mikolanda.
20 mn: Bato ya pembeni bakoloba nini? Lisukúlu mpe elakiseli oyo etongami likoló na lisoló oyo libimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yulí 1974 (ebimeli ya Lifalansé), nkasa 425-427. Lisukúlu yango ezali kolimbola ntina oyo bato ya pembeni oyo bazali Batatoli te bamekaka mbala mingi kosala bopusi likoló na biso. (Talelá lokasa 425 mpe paragrafe ya liboso ya lokasa 426.) Na nsima, bongisá elakiseli oyo ekomonisa babalani mibale ya makoki bazali kosolola na libota moko oyo libandi kosepela na solo kala mingi te mpe oyo bato ya pembeni, baoyo bazali kotɛmɛla boyekoli na bango ya Biblia elongo na Batatoli ya Yehova, bazali koluka kolɛmbisa bango. (Talelá makanisi ya ntina oyo mazwami kati na biteni mosusu ya lisoló yango.) Bimisá polele bantina oyo libota wana lisengeli te kolɛmba to kotika koyekola.
Loyembo 169 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 29 Yanuáli
10 mn: Mayebisi. Nsango ya Teokrasi.
15 mn: “Tózala bato oyo balendisaka.” Lisoló mpe lisukúlu ekosalema na nkulutu moko.
20 mn: Mikanda oyo tokolakisa na Febwáli. Kundolá mwa babúku ya nkasa 32 oyo ikoki kosalelama. Tuná basakoli ete báyebisa makambo oyo bakutanaki na yango ntango bazalaki kolakisa mwa babúku na Yanuáli. Elakiseli: Mosakoli moko abandi boyekoli ya Biblia na lisalisi ya mwa búku Nzambe azali oyo azali kokanisa biso?; atuni motuna oyo mozwami na paragrafe 1 ya eteni 1; atuni molobani na ye soki akanisi nini mpo na paragrafe 2 kino paragrafe 4; ayebisi ete mwa búku yango emonisi ete Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso mpe ete likoki ya kofanda na mokili ya sika mozangi mpasi lizali; alobi na ye ete akozonga mpo na kotalela lisoló yango na bozindo.
Loyembo 179 mpe libondeli ya nsuka.