Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/96 lok. 3
  • Tozali na mposa ya lisangá

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozali na mposa ya lisangá
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Tiká ete lisangá esanzola Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Tiká ete lisangá elendisama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Ozali na motuya na kati ya lisangá!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Sepelá na esika na yo na lisangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 2/96 lok. 3

Tozali na mposa ya lisangá

1 Bana na Kola bamonisaki botɔ́ndi na bango mpo na lisangá ya Yehova na maloba oyo: “Mokolo moko kati na lopango na yo eleki mikolo mosusu nkoto na malamu.” (Nz. 84:10) Na makanisi na bango, mokili ezalaki na eloko moko te oyo ekoki kopesa mpe kokokana na lisangá ya Yehova. Soki tozali na makanisi motindo moko na bango, tosengeli kotya lisangá ya boklisto na katikati ya bomoi na biso.

2 Uta ebandeli na yango, lisangá ya boklisto lizali kozwa matomba na mapamboli mauti na Nzambe. (Mis. 16:4, 5) Moko te kati na biso asengeli kotalela lisangá lokola eloko ya ntina moke to komona yango lokola mwa mwango ya bokutani esika moko. Lisangá ezali bongo “matákanelo” mpo na Batatoli ya Yehova ya mboka moko na moko. Tosangani kati na yango na bomoko mpo na koteyama na Yehova mpe kobongisama mpo na mosala ya Bokonzi.​—Yis. 2:2.

3 Lisangá ya boklisto ezali nzela oyo na lisalisi na yango solo eteyami epai na biso. (1 Tim. 3:15) Bayekoli ya Yesu basengeli bango nyonso ‘kozala moko,’ kozala na bomoko elongo na Nzambe, elongo na Klisto mpe bamoko na basusu. (Yoane 17:20, 21; talá mpe Yisaya 54:13.) Bipai binso na mokili, bandeko na biso baklisto bandimaka mateya mpe mitinda ya Biblia mpe batambwisaka bomoi na bango engebene yango.

4 Tobongisami mpe tozali na nyonso esengeli mpo na etinda na biso ya kozalisa bayekoli. Sanza na sanza, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Lamuká! mpe Mosala na biso ya Bokonzi epesaka biso makanisi mabongi mpo na kobanda masoló ya Biblia. Makita mazali na mokano ya kolakisa biso lolenge oyo tokoki koyeba mpe kolamusa mposa ya bato. Bokóli oyo emonani na mokili mobimba ezali komonisa lisungi oyo liuti na likoló oyo mosala yango ezali kozwa.​—Mat. 28:18-20.

5 Na lisalisi ya lisangá, mikolo nyonso topusami na ‘kopesana simbisi mpo na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu.’ (Eb. 10:24, 25) Lokola tolendisami, tokoyika mpiko na bosembo nyonso kati na komekama. Bakɛngɛli batondi na bolingo basungaka biso mpo na kolónga mitungisi. (Mos. 4:9-12) Soki tozali kati na likámá ya kotangwa, tozali kozwa batoli ebongi. Ezali na ebongiseli mosusu oyo epesaka lisungi litondi na bolingo motindo wana?​—1 Tes. 5:14.

6 Yehova alingi ete tótikala pene na ebongiseli na ye mpo ete bomoko na biso ebatelama. (Yoane 10:16) Lisangá lisalisaka biso ete tózala na boyokani na moombo ya sembo na kopesáká bakɛngɛli ya zongazonga oyo batindamaka mpo na kolendisa biso. Na botɔ́ndi na biso mpo na litambwisi wana litondi na bolingo, tozali kobelema bamoko epai na basusu mpe yango esungaka biso ete tótikala ngwi na elimo.

7 Lisangá ezali ebongiseli ya ntina mpo na lobiko na biso ya elimo. Soki yango ezalaki te, ekokaki kozala mpasi mpo na kosalela Yehova na lolenge lobongi. Na bongo, tótikala pene na mwango oyo motyami na Yehova mpo na bolamu na biso. Tósalana elongo na mikano oyo yango ezali kolanda mpe tósalela na bosembo nyonso batoli oyo tozali kozwa uta na yango. Na kosaláká bongo nde tokomonisa botɔ́ndi na biso mpo na lisangá.​—Nz. 27:4.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto