Loyembo 77
“Yehova azali Mobateli na mpate mpo na ngai”
1. Yah nde Mobateli na ngai.
Nábanga mpo na nini?
Mosungi na bampate na ye,
Ye solo Mobikisi.
Ateyi ngai nzela na ye;
Yango ezali solo.
Nakambami na Yehova na
Nzela oyo’a lobiko.
Nakambami na Yehova na
Nzela oyo’a lobiko.
2. Ata kati na molili,
Nakobang’eloko te.
Nzambe azali pene na ngai,
Nakosungama na ye.
Mafuta, y’apakoli ngai
Mpe y’atondisi mɛkɛ.
Ye azali solo malamu.
Nakotika ye mpe te.
Ye azali solo malamu.
Nakotika ye mpe te.
3. Tika nakumisa Nzambe!
Tika nayembela ye!
Epai na basɔkɛmi na ye,
Tika nálobela ye!
Nakotosa bobele ye
Mpe nakozala sembo.
Kosalela ye ntango inso,
Yango nkembo, esengo.
Kosalela ye ntango inso,
Yango nkembo, esengo.