Loyembo 156
“Nalingi”
1. Yesu alingaki biso.
Akiti uta makoló;
Akómaki moto; asakoli solo;
Yango nde Liloba ya Nzambe.
Eliky’apesi na bato;
Ye mpe abikisi bango.
Soki moto’alobi: ‘Pɛtolá ngai,’
Ye azongisi ’te: “Nalingi.”
2. Kapita, moombo na sembo,
Nzambe apesi likabo.
Tozali, elongo, kosala na bango
Mpo na kosakola Bokonzi.
Mpe biso banso tolingi
Bato bábika na mpasi.
Soki moto’alobi: ‘Salisá ngai,’
Yanolá noki ’te: “Nalingi.”
3. Na bolingo’epai na Nkolo
Yah, toteyi na boboto
Baoyo balɛmbi mpo na mitungisi.
Tóluka bato ya bosembo.
Oyo esengo koteya
Mpe kolakisa Liloba!
Mosala ya Nzambe, tokosala!
Na yango tolobi: “Nalingi.”