Loyembo 143
Tózwa etɛlɛmɛlo mpo na Yehova!
1. Makanisi mabulungani na
Vinyo ya mangomba ya lokutá.
Oyo esengo, tozwi libaku
Ya koyeba Bokonzi (Bokonzi).
(Mondimo)
2. Tolingi kosalela Yehova
Na motema na biso mobimba.
Tólendisa bandeko mpo ete
Bákumisa Yehova (Yehova).
(Mondimo)
3. Mbanzi ya Satana, tóbanga te;
Tokolikya na Yehova Nzambe.
Tozali moke, mokili béboo;
Nguya, tozwi na Nzambe (na Nzambe).
(MONDIMO)
Pónani Yehova!
Sepelá na ye!
Akotika yo te
Mpo’azali sembo.
Sakolá bonsomi,
Kimya na bato.
Nzamb’akoyangela
Kati na Nkolo.