Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/5 nk. 21-24
  • Batelá elikya na yo makasi kino nsuka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batelá elikya na yo makasi kino nsuka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lendisá kondima na yo
  • Tóyekola kotya motema na nzela ya makambo tokutani na yango
  • Baninga bakoki kopɛngola biso na nzela malamu
  • Bozimbisi ya mposa ya mosolo
  • Motema ya boyambi ezali moboko ya kondima
  • Tómibalola epai na Nzambe mpo na kobikisama na biso
  • Ondimaka mpenza nsango malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Monisá kondima na bilaka ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Tómonisa kondima kati na bilaká ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • “Bakiselá biso kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/5 nk. 21-24

Batelá elikya na yo makasi kino nsuka

KANISÁ ete mpɛpo moko ya moke ezali kopumbwa na ntango ya mbula makasi. Mokumbi-mpɛpo akoki mpenza te komona biloko oyo bizali na mabelé. Azipami na bibuki ya mapata. Akoki te komona mosika libándá ya mpɛpo, atako bongo andimisami makasi ete akosukisa mobémbo na ye malamu mpenza. Mpo na nini azali komindimisa motindo yango?

Azali na bamasini ya sikisiki oyo ekosungaka ye ete alanda mobémbo ata kati na mapata mpe kati na molili. Na mobémbo na ye, mingimingi penepene ya libándá ya mpɛpo, miinda mikokamba ye na lisalisi ya bamasini na ye, mpe akosolola na radio elongo na batambwisi oyo bazali na mabelé.

Lolenge moko, tokoki kotalela mikolo mizali koya na elikya nyonso, atako lolenge ya makambo ya mokili ezali kokóma molili mingi mokolo na mokolo. Mobémbo na biso kati na ebongiseli ya biloko mabe oyo ekoki koumela mingi lisusu koleka oyo basusu bazali kokanisa, kasi tondimisami makasi ete tozali kokóba na nzela na biso mpe tokokóma na ntango malamu. Mpo na nini tokoki kondimisama lolenge yango? Mpamba te tozali na litambwisi oyo esungaka biso ete tómona makambo oyo miso ya bomoto ekoki komona yango te.

Liloba ya Nzambe lizali ‘pole na nzela na biso,’ mpe lizali “solo, ekopesa boyebi epai na ye oyo azangi yango.” (Nzembo 19:7; 119:105) Lokola miinda oyo milakisaka mokumbi-mpɛpo nzela, Biblia ezali koyebisa na bosikisiki makambo makoya nsima mpe ezali kopesa biso mitindá ya polele oyo ekosalisa biso ete tókóma na kimya nyonso na esika tozali kokenda. Nzokande, mpo na kozwa litomba ya litambwisi wana, tosengeli kotyela yango motema.

Kati na mokanda na ye epai na Baebele, Paulo alendisaki baklisto oyo bazalaki Bayuda na mosuni ete ‘básimba kino nsuka [elikya] na bango ya ebandeli.’ (Baebele 3:14) Motema mokoki kobulungana soki bokangami na biso likoló na yango ‘esimbami makasi’ te. Na yango motuna oyo mozali kotunama: Lolenge nini tokoki kobatela elikya na biso makasi epai na Yehova kino nsuka?

Lendisá kondima na yo

Liboso ete mokumbi-mpɛpo akoka komitambwisa kozanga komona nzela, kotya motema mobimba na bamasini na ye mpe na batambwisi oyo bazali na mabelé, asengeli kobongisama malamu mpe kolekisa bangonga mingi na kopumbwáká kati na mpɛpo. Bobele bongo, moklisto asengeli ntango nyonso kolendisa kondima na ye mpo ete akoka kobatela elikya makasi kati na litambwisi ya Yehova, mingi mpenza na ntango ya mikakatano. Ntoma Paulo akomaki ete: “Tozali na [elimo] na kondima moko mpenza, pelamoko esili kokomama ete, Nandimaki, bongo nalobaki. Biso mpe tozali kondima mpe tozali koloba.” (2 Bakolinti 4:13) Na yango, wana tozali koloba na ntina na nsango malamu ya Nzambe, tozali bongo kolendisa mpe kokɛmbisa kondima na biso.

Magdalena, oyo alekisaki mibu minei na káa ya bakangami na boumeli ya etumba ya mibale ya mokili mobimba, amonisi motuya ya mosala ya kosakola: “Mama ateyaki ngai ete mpo na kobatela kondima makasi, ezali na ntina mingi komibanzabanza mpo na bolamu ya elimo ya bato mosusu. Nazali komikundola likambo moko oyo likomonisa lolenge tozalaki kokanisa. Nsima ya kobimisama na biso longwa na káa ya bakangami ya Ravensbrück, ngai mpe mama tokómaki na ndako mokolo ya Mitano. Mikolo mibale na nsima, na mokolo ya Lomingo, tosanganaki elongo na bandeko mosusu mpo na kosakola ndako na ndako. Nandimisami makasi ete soki totye likebi na biso likoló na mosala ya kosunga basusu ete bátya motema na bilaka ya Nzambe, bilaka yango bikomonana likambo ya solo epai na biso.”​—Kokanisá na Misala 5:42.

Mpo na kobatela elikya na biso makasi kino nsuka tosengeli komipesa na mosala kati na makambo mosusu. Boyekoli na yo moko ezali elendiseli mosusu ya monene ya kondima. Soki tomekoli bato na Bɛlɔya mpe totaleli Makomami mokolo na mokolo, yango ekosalisa biso ete tókólisa “mposa monene mpo na kotondisa elikya kino nsuka.” (Baebele 6:11; Misala 17:11) Ezali solo ete boyekoli na yo moko ekosɛnga ntango mpe ekateli makasi. Ekoki kozala mpo na yango nde, Paulo akebisaki Baebele na likámá ya kozala “goigoi,” to na bolɛmbu, kati na makambo motindo yango.​—Baebele 6:12.

Elimo ya bolɛmbu ekoki kobimisa mbuma mabe kati na makambo mingi ya bomoi. Salomo amonisaki ete: “Mpo na goigoi mingi, nsamba ekokwea, mpo na kozanga mosala na mabɔkɔ, ndako ekobukana.” (Mosakoli 10:18) Ata ndele mbula ekobanda kotanga na nsamba ya ndako oyo ebongisami te. Soki na elimo tosalisi mabɔkɔ na biso mosala te mpo na kobatela kondima na biso makasi, ntembe ekoki kokóla kati na yango. Na ngámbo mosusu, komanyola mpe koyekola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo ekoleisa mpe ekobatela kondima na biso.​—Nzembo 1:2, 3.

Tóyekola kotya motema na nzela ya makambo tokutani na yango

Ya solo, mokumbi-mpɛpo ayekolaka na nzela na makambo oyo akutanaki na yango mpe na nzela na boyekoli na ye ete bamasini na ye ebongi kotyelama motema. Bobele bongo, elikya na biso epai na Yehova ekokóla wana kati na bomoi na biso moko tozali komona bilembeteli ya bolingo na ye. Yosua amonaki likambo yango, mpe akundwelaki baninga na ye Bayisalaele ete: “Bino boyebi na mitema na bino mpe na milimo na bino nyonso ete eloko moko ezangi te na makambo malamu nyonso oyo [Yehova] Nzambe na bino atyaki ndaka na yango na ntina na bino. Yango nyonso ebimelaki bino, mpe eloko na yango moko ezangaki te.”​—Yosua 23:14.

Josefina, ndeko mwasi moko ya mboka Philippines oyo asilá kobala, ayekolaki liteya lolenge yango. Amonisi motindo ya bomoi na ye liboso ete ayeba solo: “Mobali na ngai azalaki komela mingi, mpe wana alangwi, azalaki kosilika mpe kobɛta ngai. Kozanga esengo oyo ezalaki na libala na biso ezalaki mpe kotungisa mwana na biso ya mobali. Ngai mpe mobali na ngai tozalaki kosala, mpe tozalaki kozwa mosolo mingi, kasi tozalaki kobungisa yango nyonso na masano ya mbongo. Mobali na ngai azalaki na baninga mingi, nzokande mingi kati na bango bazalaki koluka boninga na ye bobele mpo asombelaka bango masanga, mpe basusu kútu bazalaki koluka ete alangwa bobele mpo básɛka ye.

“Makambo mabongwanaki ntango toyaki koyeba Yehova mpe tondimaki toli na ye na motema mobimba. Mobali na ngai amelaka lisusu te, tosili kotika masano ya mbongo, mpe tozali na baninga ya solo oyo balingi biso mpe bazali kosalisa biso. Bomoi na biso ya libala ezali na esengo, mpe mwana na biso asili kokóma elenge mobali malamu mingi. Tozali kopesa ngonga mingi te na mosala, kasi tozali na mbongo mingi. Makambo oyo tokutanaki na yango masili koteya biso ete Yehova akokani mpenza na Tata ya bolingo, oyo azali ntango nyonso kotambwisa biso na nzela malamu.”

Wana bakambami na litambwisi ya radio to ya bamasini na bango, mbala mosusu bakumbi-mpɛpo bamonaka ntina ya kosembola nzela ya mpɛpo na bango. Bobele bongo tokoki kozala na mposa ya kosembola nzela na biso engebene malako ya Yehova. “Matoi na yo makoyoka liloba nsima na yo ete, Oyo ezali nzela, tambolá na yango, wana ekobongwana yo na epai na mobali to na epai na mwasi.” (Yisaya 30:21) Na nzela ya Liloba na ye mpe na nzela ya lisangá na ye, tozali kozwa batoli oyo ezali kokebisa biso na makámá ya elimo. Moko na yango etali baninga.

Baninga bakoki kopɛngola biso na nzela malamu

Mpɛpo ya moke ekoki nokinoki kopɛngolama na nzela na yango soki kosembolama oyo esengeli esalemi te. Bobele bongo, bopusi ya bato mosusu ezali ntango nyonso likoló na baklisto na mikolo na biso. Tozali kobika na mokili oyo kati na yango bato bamipesi mingi na mposa ya mosuni, kati na yango mingi bazali kotyola makambo ya elimo, bazali kopesa ntina mingi na mbongo mpe na bisengo. Paulo akebisaki Timoté ete mikolo ya nsuka mikozala “ntango ya mpasi.” (2 Timoté 3:1-5) Bilenge oyo bazali koluka kondimama na baninga mpe koyebana mingi, bazali mpenza kati na likámá monene ya baninga mabe.​—2 Timoté 2:22.

Amanda, oyo azali na mibu 17, alobi ete: “Na boumeli ya mwa ntango kondima na ngai elɛmbaki mwa moke na ntina na bopusi ya baninga na ngai ya kelasi. Bazalaki ntango nyonso koyebisa ngai ete lingomba na ngai lizali na bipekiseli mingi mpe lizangi bokatikati, yango ebandaki kolɛmbisa ngai. Nzokande, baboti na ngai basungaki ngai na kososola ete litambwisi ya boklisto lizali libateli na esika ete ezala bipekiseli. Sikawa nasosoli ete mitindá wana mizali kosunga ngai na kozala na bomoi moko ya kosepelisa koleka baninga na ngai ya kala ya kelasi. Nasili koyekola kotya motema epai na baoyo bazali mpenza komibanzabanza mpo na ngai​—baboti na ngai mpe Yehova​—mpe nazali kosala mosala ya mobongisi-nzela.”

Ata soki tozali na mbula boni, tokokutana na bato oyo bakobimisa maloba mpo na kotyola bindimeli na biso. Bakoki komonana lokola bato na mayele mingi, kasi epai na Nzambe bazali bato na mosuni, bato bazangi elimo. (1 Bakolinti 2:14) Na mikolo ya Paulo etuluku moko ya bato oyo bazalaki na bopusi makasi ezalaki bongo bato na mayele ya mokili oyo bazalaki kobɛta ntembe na makambo nyonso. Ekoki kozala ete mateya ya bafilozofe wana mamemaki baklisto mosusu ya Kolinti na kobungisa kondima kati na elikya ya lisekwa. (1 Bakolinti 15:12) Ntoma Paulo akebisaki ete, “Bózimbisama te; kotambolana na bato mabe ekobebisa malamu na motema.”​—1 Bakolinti 15:33.

Na ngámbo mosusu, boninga ya malamu ekolendisaka biso na elimo. Kati na lisangá ya boklisto, tozali na libaku ya kosangana elongo na bato oyo bazali komonisa kondima kati na bomoi na bango. Norman, ndeko mobali moko oyo ayebaki solo na 1939, azali naino liziba ya elendiseli monene mpo na moto nyonso. Nini ebatelaki elikya na ye ya elimo ete ezala ntango nyonso makasi? Ayanoli ete: “Makita mpe boninga ya penepene elongo na bandeko oyo bazali sembo ezali na ntina mingi. Boninga lolenge yango esalisaki ngai ete namona polele bokeseni kati na lisangá ya Nzambe mpe oyo ya Satana.”

Bozimbisi ya mposa ya mosolo

Brian, mokumbi-mpɛpo moko oyo amesani mingi, alobi ete: “Mbala mosusu mokumbi-mpɛpo akoki kozala na ntembe mpo na kondima bamasini na ye​—bobele mpo ete mayoki ya motema na ye maboyi kondima yango. Bakumbi-mpɛpo mosusu ya basodá bamonanaki ete babalolaki libumu ya mpɛpo likoló wana bazalaki kokumba yango mpamba te miinda na mabelé mimonanaki na miso na bango lokola minzoto​—atako bamasini na bango emonisaki bango ete basalaki libúngá.”

Bobele bongo, na ndimbola ya elimo bamposa na biso ya moimi ekoki kozimbisa biso. Yesu alobaki ete mosolo ezali na “[nguya ya] bozimbisi,” mpe Paulo akebisaki ete ‘mposa na mosolo epɛngwisaki basusu longwa na kondima.’​—Malako 4:19; 1 Timoté 6:10.

Motindo moko na miinda oyo mizali kosala balibali, mikano mpo na kozwa biloko ya kongɛnga mikoki komema biso na nzela mabe. Na esika ya kosepela na “elendiseli na biloko bikolikya biso,” tokoki kobendama na nzombo na bizaleli ya mokili oyo mozali koleka. (Baebele 11:1; 1 Yoane 2:16, 17) Soki tozali “na mposa” ya lolenge ya bomoi ya bozwi mingi, tokopesa ntango mingi te mpo na bokóli na biso ya elimo.​—1 Timoté 6:9; Matai 6:24; Baebele 13:5.

Elenge mobali moko oyo asili kobala, na nkombo Patrick ayebisaki ete ye mpe mwasi na ye basundolaki mikano ya elimo mpo ete bákoka kosepela na bomoi ya bozwi. Amonisi ete: “Tolandaki bopusi ya bandeko ya lisangá oyo bazalaki na mituka ya ntálo mpe na bandako ya kitoko. Atako tobungisaki te elikya ya Bokonzi, tokanisaki ete tosengelaki mpe kozala na motindo ya bomoi ya bozwi mingi. Nzokande, na nsima, tososolaki ete bolamu ya solo eutaka na kosalela Yehova mpe na bokóli ya elimo. Sikawa tozongeli lisusu bomoi oyo ezangi mindɔndɔ́. Tokitisi motángo ya bangonga oyo tolekisaka na mosala, mpe tosili kokóma babongisi-nzela ya sanza na sanza.”

Motema ya boyambi ezali moboko ya kondima

Motema ya boyambi mpe mozali na ntina monene mpo na oyo etali kokólisa elikya epai na Yehova. Ezali solo ete, “kondima ezali elendiseli na biloko bikolikya biso; ezali mpe elimbweli [to, “bilembeteli ya kondimisa,” NW, maloba na nsé ya lokasa] na biloko bizangi komonana.” (Baebele 11:1) Soki tozali na motema ya boyambi te, tokoki mpenza te kondimisama. (Masese 18:15; Matai 5:6) Mpo na ntina wana ntoma Paulo alobaki ete “bato nyonso bazali na kondima te.”​—2 Batesaloniki 3:2.

Bongo, lolenge nini tokoki kosala ete motema na biso moyanola na bilembeteli nyonso ya kondimisa oyo tozali na yango? Na kolónáká bizaleli ya bokangami na Nzambe, bizaleli oyo bikolendisa mpe bikoyikisa kondima mpiko. Petelo alendisi biso ete ‘likoló na kondima na biso, tóbakisa bizaleli malamu, boyebi, komipekisa, mpiko, bokangami epai na Nzambe, bolingo ya motema mpo na bandeko, mpe bolingo.’ (2 Petelo 1:5-7, NW; Bagalatia 5:22, 23) Na ngámbo mosusu, soki tozali na lolenge ya bomoi ya moimi to soki tozali kopesa Yehova bobele mosala moke, tokoki mpenza te komizela ete kondima na biso ekóla.

Ezɛla “asili kotya motema na ye” mpo na kotánga Liloba ya Yehova mpe mpo na kotosa yango. (Ezɛla 7:10) Mika mpe azalaki na motema ya boyambi. “Kasi ngai nakotalela [Yehova]; nakolambela Nzambe na kobika na ngai; Nzambe na ngai akoyoka ngai.”​—Mika 7:7.

Magdalena, oyo totángaki maloba na ye na ebandeli, azelaka mpe Yehova na motema pɛtɛɛ nyonso. (Habakuku 2:3) Alobi ete: “Tosili kozwa paladiso ya elimo. Likambo oyo ekolanda, ezali Paladiso ya solosolo, oyo ekoya nokinoki. Liboso na yango, bankóto bazali kobakisama na ebele monene. Nazali na esengo monene ya komona ebele ya bato kotonda kati na lisangá ya Nzambe.”

Tómibalola epai na Nzambe mpo na kobikisama na biso

Mpo na kobatela elikya na biso makasi kino nsuka tosengeli kolendisa kondima na biso mpe koyoka na likebi nyonso litambwisi oyo tozali kozwa epai na Yehova mpe lisangá na ye. Ya solo, ebongi ete tósala milende nyonso mpo na yango. Mokumbi-mpɛpo azalaka na bosepeli monene wana nsima ya mobémbo molai, ya mpasi, akiti mpe abimi na bibuki ya mapata. Kuna liboso na ye mabelé mamonani​—na lángi ya mai ya mpondu mpe mazali pene na koyamba ye. Nzela kati na libándá ya mpɛpo ezali komonana na nsé, ezali kozela ye.

Likambo ya esengo monene lizali kozela biso banso. Mokili oyo mabe, ya molili mokotika esika na mabelé ya sika ya boyengebene. Nzambe azali kozela mpo na koyamba biso. Tokokóma kuna soki tolandi maloba oyo ya mokomi na Nzembo: “Zambi yo ozali elikya na ngai, ɛ Nkolo [Yehova]. . . . Nakosanzola yo mikolo nyonso.”​—Nzembo 71:5, 6.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto