Tozali na mokumba
1 Yesu asɛngaki na baoyo bazali kolanda ye ete bázalisa “bayekoli bato na mabota nyonso.” (Mat. 28:19, NW ) Basambeli ya Yehova Nzambe oyo motángo na bango eleki milió mitano bazali elembeteli ya nguya oyo emonisi kokokisama ya etindá wana kati na mikili koleka 232 mpe bisanga. Kasi ezali boni mpo na mokomoko kati na biso? Tózwaka mokumba na biso ya kosakola na motuya?
2 Lisɛngisi oyo lilongobani: Mokumba ezali “mosala mopesameli moto ete akokisa yango.” Klisto apesaki biso etindá ya kosakola. (Mis. 10:42) Na etindá wana, ntoma Paulo ayebaki ete ntina, to lisɛngisi oyo lilongobani, ya kosakola nsango malamu etyamaki na mapeka na ye. (1 Kol. 9:16) Tómonisa yango na ndakisa moko: Tóloba ete ozali mosáli na masuwa moko oyo ezali kozinda. Kapitɛ́ni apesi yo etindá ete okebisa bato oyo bazali kati na masuwa mpe ete okamba bango epai kuna bwato ya kobikisa bato ezali. Okotyola nde etindá wana na komibanzabanzáká bobele na kobikisa bomoi na yo moko? Okosala bongo te. Lobiko to kufa ya bato mosusu ezali na mabɔkɔ na yo. Bomoi na bango ezali na likámá. Osɛngisami na kokokisa mokumba na yo ya kosalisa bango.
3 Tosili kozwa uta na Nzambe mokumba ya kokebisa bato. Mosika te, Yehova akotya nsuka na ebongiseli mabe ya biloko oyo na mobimba na yango. Bomoi ya bamilió ya bato ezali na likámá. Ekozala nde malamu ete tózanga kotya likebi na likámá oyo lizali liboso ya bazalani na biso, komibanzabanzáká bobele mpo na lobiko na biso moko? Soko moke te. Tozali na lisɛngisi oyo lilongobani ya kosalisa bazalani na biso na kobikisa bomoi na bango.—1 Tim. 4:16.
4 Bandakisa ya bosembo oyo tosengeli komekola: Mosakoli Ezekiele ayebaki ete azalaki na mokumba ya kopesa nsango ya likebisi epai na Bayisalaele oyo bazangaki sembo. Yehova akebisaki ye polele na ntina na oyo ekosalema soki azangaki kokokisa mokumba na ye: “Soko nalobi na moto mabe ete, Okokufa solo; mpe yo okebisi ye te, . . . moto yango akokufa na lisumu na ye, nde nakotuna makila na ye na lobɔkɔ na yo.” (Ezek. 3:18) Ezekiele akokisaki mokumba na ye na bosembo nyonso, ata liboso ya botɛmɛli makasi. Na bongo, asepelaki ntango bikateli ya Yehova bikokisamaki.
5 Bikeke mingi na nsima, ntoma Paulo alobelaki mokumba na ye ya kosakola. Alobaki ete: “Nazali pɛto na makila na bino nyonso; zambi nazangaki kosakwela bino likambo na Nzambe nyonso te.” Paulo asakolaki liboso na bato mpe ndako na ndako mpamba te ayebaki ete soki amonisi bopɔtu na likambo yango akozala na nyongo ya makila liboso na Nzambe.—Mis. 20:20, 26, 27.
6 Tozali na molende lokola Ezekiele? Na ndakisa ya Paulo, tómiyokaka ete topusami na kosakola? Mokumba na biso ezali sé motindo moko. Tosengeli kokóba kokokisa mokumba na biso ya kokebisa bazalani na biso, ata soki bazali komonisa ezaleli ya botyoli, ya kozanga kotya likebi mpe botɛmɛli. Likoki ezali naino ete ebele ya bato bándima nsango ya Bokonzi mpe báloba ete: “Tokokenda na yo elongo zambi toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.” (Zek. 8:23) Tiká ete bolingo na biso mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na biso epusa biso ete tólɛmba te! Tozali na mokumba: kosakola!