Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/96 lok. 2
  • Makita ya Mosala mpo na Desɛ́mbɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya Mosala mpo na Desɛ́mbɛ
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔ́sɔ ebandi na 2 Desɛ́mbɛ
  • Pɔ́sɔ ebandi na 9 Desɛ́mbɛ
  • Pɔ́sɔ ebandi na 16 Desɛ́mbɛ
  • Pɔ́sɔ ebandi na 23 Desɛ́mbɛ
  • Pɔ́sɔ ebandi na 30 Desɛ́mbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 12/96 lok. 2

Makita ya Mosala mpo na Desɛ́mbɛ

Pɔ́sɔ ebandi na 2 Desɛ́mbɛ

Loyembo 29

10 mn: Mayebisi. Pesá mpe Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo matali lisangá. Lobelá lapólo ya mosala ya mboka mobimba (soki ezali) mpe ya lisangá mpo na sanza eleki.

15 mn: “Tosembolaka Liloba ya Nzambe na bosikisiki nyonso?” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá mpe mwa makanisi mapesami na búku Comment raisonner, na nsé na motó ya likambo moke “Raisons d’examiner la Bible,” (Bantina ya kotalela Biblia) nkasa 51-52.

20 mn: “Oyo elimboli bomoi ya seko.” (paragrafe 1-5) Nsima ya mwa maloba mokuse ya ebandeli oyo mazwami na paragrafe 1, sɛngá na basakoli mibale ya makoki ete básala elakiseli ya ndakisa ya paragrafe 2-5. Lobelá mingi ete mokano ezali ya kobanda boyekoli ya Biblia.

Loyembo 128 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 9 Desɛ́mbɛ

Loyembo 40

10 mn: Mayebisi. Pesá lapólo ya kɔ́nti.

20 mn: Mpo na nini tosengeli kopesa na Yehova? Lisoló kati na bankulutu mibale, lisoló oyo lizali komonisa polele makanisi minene mazwami na lisoló oyo lizali na nkasa 28-31 na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛ́mbɛ 1996. Makambo yango makoki mpe kolobelama lokola lisukúlu na nkulutu moko.

15 mn: “Oyo elimboli bomoi ya seko.” (paragrafe 6-8) Lobelá matomba mazali kozwama na kosalela mwango ya kobanda boyekoli na mbala moko. Bilakiseli ya ndakisa oyo bizali kati na paragrafe 6-7 na basakoli oyo bameseni na mosala. Byangá bayangani ete báyebisa lolenge babandaki boyekoli ya Biblia bobele na bosololi ya liboso. Ntango basɛngaki ye na mbala moko kobanda boyekoli, mobali moko ayanolaki ete: “Nandimi yango. Kɔtá. Nalingi koyekola.” Babandaki koyekola elongo na ye; pɔ́sɔ oyo elandaki, libota na ye mobimba lizalaki wana, mpe nokinoki bango nyonso babandaki koyangana na makita mpe kosangana na mosala ya kopesa litatoli. Lendisá bayangani ete bámema siplemá na bango ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yulí 1996 na likita ya mosala oyo likolanda.

Loyembo 129 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 16 Desɛ́mbɛ

Loyembo 140

5 mn: Mayebisi.

20 mn: “Tozali na mokumba.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá na mokuse paragrafe 13-16 ya Mosenzeli ya 1 Augústo 1988, nkasa 23-24 to Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 1988, nkasa 28-29 (ebimeli ya Lifalansé).

20 mn: Tótambwisa boyekoli ya Biblia oyo ezali kokóla. Lisukúlu likosalema na mokɛngɛli ya mosala. Esili koleka mbula moko uta tozali kosalela búku Boyebi mpo na boyekoli ya Biblia. Na ntembe te, bayekoli mosusu basilisi yango, nzokande basusu basili kopusana mosika na boyekoli. Tolendisamaki ete tósala makasi na kotambwisa boyekoli ya Biblia oyo ezali kosalisa bato ya sika ete báyekola solo nokinoki, ete básalela yango kati na bomoi na bango mpe ete bákóma basangani ya lisangá. Siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yulí 1996 epesaki biso makanisi kitoko mpo na kosalisa biso ete tókóma bateyi malamu. Zongelá kotalela na mokuse ndambo na makambo mosusu oyo tokoki kosala mpo na kozala na makoki na lolenge na biso ya koteya, engebene paragrafe 3-13. Na nsima lobelá mingi oyo tosengeli kosala mpo na kosalisa bayekoli ete bámitya na ngambo ya solo, lokola paragrafe 14-22 emonisi yango. Tángá paragrafe 15, 17, 20-21. Talelá mwa makambo ya kosepelisa oyo mazali komonisa matomba malamu basakoli ya lisangá bazwaki. Pesá bilendiseli oyo bikopusa bandeko mingi na kotambwisa boyekoli ya Biblia.

Loyembo 85 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 23 Desɛ́mbɛ

Loyembo 46

5 mn: Mayebisi. Lobelá bibongiseli bikamatami mpo na mosala ya kosakola na mwa 25 Desɛ́mbɛ oyo ekozala mokolo bato basalaka misala te.

15 mn: “Tiká ete bokóli na yo emonana!” Lisukúlu ekosalema na nkulutu moko.

10 mn: Biyano na mituna na bino. Lisoló elongo na bayangani.

15 mn: Mikanda oyo tokolakisa na Yanuáli. Tokolakisa Traduction du monde nouveau mpe búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? Na lisalisi ya búku “Toute Écriture,” nkasa 319-324, monisá na nini Traduction du monde nouveau eleki mabongoli mosusu: ezali kosimba mpe kokumisa nkombo ya Nzambe (paragrafe 1-2); lolenge malamu yango ebongolami ezali kosala ete makomi mázala mpasi te mpo na kokanga ntina (paragrafe 6); ezali esaleli ya nguya kati na mosala ya kosakola (paragrafe 22-23). Na lisalisi ya makanisi mazwami na lokasa 189 ya búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? lakisá lolenge ya kosala lisoló mpe bongisá elakiseli moko. Bibongiseli ya sikisiki bisengeli kokamatama mpo na kozongela bato oyo bamonisaki bosepeli.

Loyembo 180 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 30 Desɛ́mbɛ

Bankulutu bakobongisa manáka na bango moko engebene bamposa ya lisangá.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto