Tómipesa na bolingo na biso moko
1 Davidi, mokomi na Nzembo, asakolaki ete bato ya Yehova ‘bakomipesa na bolingo na bango moko,’ elingi koloba bakondima komipesa “nokinoki na bolingo na bango moko.” (Nz. 110:3, maloba na nsé na lokasa). Na ntembe te ezali yango nde ezali kosalema kati na libota ya bandeko na mokili mobimba. Na boumeli ya mbula mokomoko kati na bambula minei ya mosala oyo euti koleka, basaleli ya Yehova balekisaki ngonga koleka miliare moko na koyebisa nsango malamu ya Bokonzi. Epai mosusu, longola mosala ya kosakola mpe mosala ya kozalisa bayekoli, tozali na mabaku mingi ya komipesa na bolingo na biso moko mpo na kosalisa bazalani na biso.
2 Makambo kati na yango tokoki komipesa na bolingo na biso moko: Ekoki kozala ete basangani mosusu ya lisangá bazali na mposa ya lisalisi mpo na kokende na makita. Mpo na nini te kosɛnga bango ete tókenda kozwa bango? Ekoki kozala ete basusu bazali kobɛla, bazali bibɔsɔnɔ to bazali na lopitalo. Tokoki nde kosala ebongiseli ya kokende kotala bango to ya kosalisa bango na lolenge moko to mosusu? Ekoki kozala ete ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko, to mpe libota moko bazali na mposa ya bilendiseli. Tosilaki kokanisa na kobyanga bango ete básangana na boyekoli na biso ya libota na bantango mosusu? Ekoki kozala ete mosakoli moko to mobongisi-nzela moko azali na mposa ete ndeko moko abima elongo na ye kati na mosala ya kosakola. Mpo na nini te kosala ebongiseli ya kobima elongo na ye kati na mosala ya kosakola? Ezali wana ndambo ya makambo oyo kati na yango tokoki kosala oyo ezali malamu na bolingo na biso moko epai na baoyo bazali bandeko na biso kati na kondima.—Gal. 6:10.
3 Bandeko mibali bakoki komonisa mposa na bango ya kosalelama kati na lisangá ya Yehova na kosaláká milende ete bákokisa masɛngami mpo na koponama bankulutu mpe basaleli na misala. (1 Tim. 3:2-10, 12, 13; Tito 1:5-9) Lokola tozali kokóma ntango nyonso mingi, tozali na mposa ya bandeko mibali ya makoki baoyo bakondima kopesa ndakisa kati na mosala ya kosakola mpe ya koteya, mpe na mosala ya kotala bampate kati na lisangá.—1 Tim. 3:1.
4 Ekoki kozala ete bamoko kati na biso bakoki komipesa bango moko kati na mosala ya Yehova na kozaláká babongisi-nzela basungi na basanza mosusu. To lisusu, na kosaláká mwa mabongwani mabongi na manáka na biso, mbala mosusu tokoki kozala babongisi-nzela basungi ya libela to babongisi-nzela ya sanza na sanza. Ezalela na biso ekopesa biso nzela ya kokende na etúká epai kuna mposa ezali mingi? Tokoki nde kondima kokende kosala na Betele na kopesáká bongo mabɔkɔ na bokóli ya mosala oyo ezali kosalema na mokili mobimba? Mosala monene mozali kosalema mpo na oyo etali botongi Bandako ya Bokonzi, Bandako ya mayangani mpe bandako ya Betele na mokili mobimba, mpe yango ezali kosɛnga basáli mingi oyo bamipesi na bolingo na bango moko. Baoyo bazali komipesa na bolingo na bango moko mpo na kosangana na misala wana ya malamu tosepelaka na bango mingi mpe bazali kozwa mapamboli mingi.—Luka 6:38.
5 Tozali kobika na eleko moko ya kokamwa. Na lisalisi ya elimo na ye, Yehova azali kokokisa mosala moko ya kokamwa awa na mabelé na nzela ya basaleli na ye oyo bamipesi na bolingo na bango moko! Na nzela ya lisangá na ye, mbala nyonso oyo Yehova azali kobyanga biso ete tómipesa mingi kati na mosala ya Bokonzi, ekozala malamu tómituna ete: ‘Nazali komipesa ntango nyonso na bolingo na ngai moko?’ Na nsima, tosengeli kotalela kati na libondeli motema na biso mpe ezalela na biso. Bokangami na biso epai na Nzambe ekopusa biso ete tósala nyonso oyo ekoki na biso kati na mosala ya bulɛɛ, boye tokosepelisa mpenza motema ya Yehova.—Sef. 3:17.