Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/97 nk. 2-3
  • Makita ya mosala mpo na Yanuáli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Yanuáli
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔ́sɔ ebandi na 6 Yanuáli
  • Pɔ́sɔ ebandi na 13 Yanuáli
  • Pɔ́sɔ ebandi na 20 Yanuáli
  • Pɔ́sɔ ebandi na 27 Yanuáli
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 1/97 nk. 2-3

Makita ya mosala mpo na Yanuáli

Pɔ́sɔ ebandi na 6 Yanuáli

Loyembo 134

10 mn: Mayebisi. Pesá mpe Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo matali lisangá.

15 mn: “Nani akoyoka nsango na biso?” Ekosalema na mituna mpe biyano. Kɔtisá makanisi mazwami na Lamuká! ya 22 Mársi 1987, lok. 5 (ebimeli ya Lifalansé), komonisáká na nini nsango na biso ezali kosepelisa bato.

20 mn: “Liloba ya Nzambe lizali kotambwisa biso.” (paragrafe 1-6) Bandisá lisoló na yo na lisalisi ya paragrafe 1-2. (Salelá mpe búku Comment raisonner, nk. 51-52, mpo na komonisa na mokuse ‘bantina minei mpo na yango tosengeli kotalela Biblia.’) Elakiseli ya bandakisa oyo epesami na paragrafe 3-6 na basakoli ya makoki. Sɛngá na bayangani ete báloba (1) lolenge nini mituna mitunami mipesaki nzela na kolamwisa bosepeli, (2) na nini bavɛrsɛ́ oyo esalelami ekokanaki na lisoló oyo lizalaki kolobelama, (3) lolenge nini likambo litali makabo lilobelamaki, (4) na nini bozongeli ya sika ezalaki kolandana ya lisoló ya liboso mpe (5) lolenge boyekoli esɛngamaki.

Loyembo 75 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 13 Yanuáli

Loyembo 100

5 mn: Mayebisi. Pesá lapólo ya kɔ́nti.

20 mn: “Lisungi na ntango ebongi.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Bimisá makanisi ya ntina ya mokomoko na mikanda ya sika.

20 mn: “Liloba ya Nzambe lizali kotambwisa biso.” (paragrafe 7-9) Lobelá motó ya likambo moke “Mposa ya batoli” kati na Mosenzeli ya 1 Máí 1993, lok. 3. Yebisá mpo na nini masoló na biso masengeli komonisa ntina ya koluka lisalisi ya moto oyo aleki likoló: Nzambe. Sɛngá na mosakoli moko ete asala elakiseli na kolanda makanisi mapesami na paragrafe 7-8. Monisá ete mokano na biso esengeli kozala ya kobanda boyekoli ya Biblia na lisalisi ya búku Boyebi.

Loyembo 197 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 20 Yanuáli

Loyembo 209

10 mn: Mayebisi. “Makita ya malamu.” (paragrafe 1-12) Lisoló elongo na bayangani.

15 mn: “Tómipesa na bolingo na biso moko.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá mwa makanisi mazwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augústo 1984, lok. 24 (ebimeli ya Lifalansé).

20 mn: “Tósepela na ntina na bokóli oyo Nzambe azali kopesa biso.” Lisukúlu ya mɔ́tɔ oyo ekosalema na nkulutu moko. Na lisalisi ya ba Annuaires ya sika, lobelá makambo to pesá bilembeteli ya bokóli kati na mikili oyo milobelami.

Loyembo 41 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔ́sɔ ebandi na 27 Yanuáli

Loyembo 223

10 mn: Mayebisi. “Makita ya malamu.” (paragrafe 13-18) Lisukúlu.

20 mn: “Tósangana na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.” Lisukúlu oyo ekosalema na mokɛngɛli ya eteyelo. Pesá motángo ya bato oyo basili kokomisa nkombo na bango mpe lendisá baoyo nyonso bakoki ete bákomisa nkombo na bango. Mpo na oyo etali masoló ya banakelasi, talelá malako oyo mazwami na kati na “Manáka mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na 1997.”

15 mn: Mikanda oyo tokolakisa na Febwáli. Tokolakisa búku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya 1984. Soki lisangá lizali na yango te kati na libómbo na yango ya mikanda, salelá búku Ndenge nini okoki kobika mpo na kokota na mokili ya sika. Yebisá babúku nini lisangá ezali na yango. Poná mibale to misato oyo ekobonga mpo na teritware na bino. Na lisalisi ya mwa búku Lolenge nini okoki kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia, nk. 2-6, talelá na mokuse maloba mpo na kobanda masoló oyo mabongi mpo na búku mokomoko. Bongisá elakiseli moko to bilakiseli mibale.

Loyembo 166 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto