Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/97 lok. 1
  • Bato ya mitindo nyonso bakobika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bato ya mitindo nyonso bakobika
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • “Esengo na moto oyo azwi mayele”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Misala malamu oyo mikumisaka Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Bampate na Yesu bakoyokaka mongongo na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 2/97 lok. 1

Bato ya mitindo nyonso bakobika

1 Yehova alingi “ete bato ya mitindo nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:4, NW) Ya solo, na lolenge moko to mosusu, bato bazali kokutana na makambo oyo basangolá, bopusi ya biutelo na bango mpe ya bisika na bango, kasi bazali na bonsomi ya kopona oyo balingi mpe kozwa bikateli ya bango moko na oyo bakosala na bomoi na bango. Bakoki kosala malamu mpe kotikala na bomoi, to kosala mabe mpe kokufa. (Mat. 7:13, 14) Yango esengeli kozala na bopusi nini likoló na lolenge na biso ya kotalela bato oyo tozali koyebisa bango nsango malamu ya Bokonzi?

2 Tosengeli te kokanisa liboso ete bosepeli ya moto moko mpo na solo epusami na makambo lokola ekólo, mimeseno, to esika afandi. Solo ezali kobenda ezala bato oyo basalá bakelasi mingi to oyo basalá bakelasi mingi te, bakisá mpe baoyo bazali kosala na politiki, baoyo basalaka misala na bango moko, baoyo bandimaka te ete Nzambe azali, baoyo bandimaka te makambo maleki mayele ya bato, ata mpe basáli na mabe oyo bayebani mingi. Bato ya bipai nyonso mpe ya mitindo nyonso basili kobongola bizaleli na bango mpe sikawa bazali na elikya ya kofanda libela na libela kati na Paladiso. (Mas. 11:19) Na yango, tosengeli te kokakatana mpo na koyebisa nsango ya Bokonzi epai na bato ya mitindo nyonso.

3 Tótalela bandakisa oyo elandi: Mobali moko akanaki koboma bokilo na ye ya mobali, kasi abomaki ye te. Mikolo mingi na nsima, azwaki ekateli ya komiboma, kasi akokisaki mwango na ye wana te. Na nsima, bakangaki ye na bolɔ́kɔ mpo na moyibi mpe mpo na botɛkisi bilangwiseli, mpe libala na ye libebaki. Lelo oyo, mobali yango azali na bomoi malamu mpe na ezaleli ya kolongobana, azali na esengo kati na libala na ye mpe azali koyokana malamu na bokilo na ye ya mobali. Nini esali ete abongwana bongo? Boyekoli ya Biblia elongo na Batatoli ya Yehova mpe kosalela makambo oyo ayekolaki. Yehova amonaki ye te ete azali moto oyo akoki kobonga lisusu te.

4 Elenge mwasi moko mosani, azalaki kolakisama na televizyó mpe ayebanaki mingi, kasi yango ezalaki kopesa ye esengo te. Wana akamwaki na lolenge ya bizaleli bitombwami ya Batatoli, andimaki boyekoli ya Biblia mpe nokinoki abandaki koyebisa na basusu nsango malamu ya Bokonzi. Bipai nyonso oyo ye azalaki kosakola ndako na ndako, bato bazalaki koyeba ye, kasi azalaki kolimbwela bango na esengo nyonso ete akosepela koyebana lokola Motatoli ya Yehova kasi lokola mosani te.

5 Ndeko mwasi moko ayokanaki kokutana na moto moko oyo asalaki abonemá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na koyekola Biblia, mpe moninga mwasi moko ya pembeni, oyo ayokaki yango, asanganaki na boyekoli. Nokinoki moninga yango amonaki ete ezalaki solo oyo ye azalaki koluka! Ye na mobali na ye baboyaki koboma libala na bango mpe babongisaki. Amipesaki mingi na astrolojí mpe azalaki kosalela losambo ya bilimu mabe, kasi na bolingi na ye mpenza abwakaki babúku ya motuya mpe biloko mosusu nyonso azalaki na yango, oyo ezalaki na boyokani na misala ya bademó. Nokinoki abandaki koyangana na makita mpe koyebisa na libota mpe baninga na ye bindimeli na ye ya sika. Lelo oyo, azali kopesa litatoli na esengo nyonso epai na basusu.

6 Tosengeli te kozala na makanisi mabe likoló na bato. Kasi, tóyebisa nde nsango malamu na molende na bisika nyonso. Tozali na bantina nyonso ya kondimisama ete Yehova, oyo “akotalaka kati na motema,” akokóma “Mobikisi na bato ya mitindo nyonso.”​​​—1 Sam. 16:7; 1 Tim. 4:10.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto