Liloba ya Nzambe lizali kotambwisa biso
1 “Mokili ya lelo ezali konyokwama na bampasi ndenge na ndenge, kasi nkisi mpo na kosilisa bampasi yango ezali komonana te. Bamilió ya bato bazali konyokwama na nzala; basusu, oyo motángo na bango mozali sé kobakisama, bazali kokóma baombo ya bilangwiseli. Mabota makabwaná mazali koya sé mingi, nzokande kosangisa nzoto na moboti to na ndeko mpe mobulu kati ‘na libota’ ezali kolobelama mingi. Biloko oyo bizali na ngɛngɛ bizali mingi na mopɛpɛ oyo topemaka mpe na mai oyo tomelaka. Tóbosana mpe te koboma bato, oyo ezali kosalema mingi zingazinga na biso.”
2 Ezali wana maloba ya ebandeli na búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? Maloba yango mazali mpenza na ntina mingi lelo oyo koleka ndenge yango ezalaki esili koleka mibu nsambo ntango búku yango ebimaki. Bato basengeli koyeba ete Liloba ya Nzambe ezali kotambwisa biso mpe ezali komonisa biso oyo esengeli mpo na kosilisa bampasi oyo ezali konyokola biso. Na Yanuáli, tokosala makasi ete tósalisa bango na kolakisáká bango Traduction du monde nouveau mpe búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? Ezali solo ete kotika bobele mokanda epai na moto ezalaka ndanga te ete moto yango akondima litambwisi ya Nzambe. Esengeli na biso kozongela bato na mokano ya kobanda boyekoli ya Biblia. Tozali na elikya ete tokosalisama soko tozali kosala milende. (Mat. 28:19, 20) Talá mwa bandakisa tomonisi oyo bokoki kosalela:
3 Soki tokutani na mobangé moko, tokoki komeka maloba oyo ya bokɔti na lisoló:
◼ “Nasepeli kotuna yo motuna moko: Ntango ozalaki mpenza elenge, bato bazalaki na ezaleli nini bamoko epai na basusu? [Tótika moto yango ayanola.] Ozali komona ete ezalela yango ekeseni na oyo ya lelo, boye te? Na likanisi na yo, mpo na nini mbongwana wana? [Tótika ete moto yango ayanola.] Ya solo, tozali komona kokokisama ya esakweli moko ya Biblia. [Tótánga 2 Timoté 3:1-5, NW.] Biblia esuki te bobele na kolobela na bosikisiki ndenge mokili ezali lelo oyo; ezali kopesa elaka ya mokili moleki kitoko na mikolo mizali koya mosika te. Yango wana tozali kolendisa bato banso ete bátángaka yango. Omoni ete libongoli oyo nasaleli, Traduction du monde nouveau, ezali na elobeli moko ya sikisiki, boye te?” Tóbakisa ete yango ekomami na Lifalansé ya mikolo na biso, yango esali ete ezala pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina ya maloba na yango. Tómonisa búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? mpe tólobela mingi mokapo 10, oyo elobeli likambo mokomoko ya esakweli mosusu oyo tozali komona kokokisama na yango. Tólakisa ye Biblia mpe búku.
4 Ntango tozongeli mobangé oyo totikelaki Biblia mpe búku, tokoki koloba ete:
◼ “Na mbala eleki, tondimaki yo na ngai ete mokili ya lelo esili kobeba na makambo mingi, soki totaleli bomoi ndenge yango ezalaki esili koleka mwa bambula. Nzokande, nazongi lisusu mpo na komonisa yo ete Biblia epesi elaka ya mokili moko kitoko na mikolo mizali koya. [Tótánga Emoniseli 21:3, 4.] Koyeba ete Liloba ya Nzambe elobeli yango esengeli kopusa biso na kotalela makambo mosusu oyo yango ekoki koyebisa biso.” Tófungola búku Parole de Dieu na mokapo 14 mpe tótánga paragrafe 3-4. Tósɛnga ye ete tóyekolaka Biblia kozanga ete afuta mbongo.
5 Soki tozali kosolola elongo na elenge moko, tokoki koloba ete:
◼ “Nasepeli kotuna yo motuna moko: Lokola ozali elenge, okanisi ete tozali na ntina ya kotalela bomoi na mikolo mizali koya na elikya nyonso? Lolenge nini ozali komonela makambo? [Tótika ete elenge yango ayanola.] Likambo ya esengo, tozali na ntina ya moboko ya kozala na elikya. [Tótánga Nzembo 37:10, 11.] Lokola bato bazali na makanisi makeseni na ntina na Biblia mpe na makambo mazali kati na yango, tobimisaki búku oyo La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? Talá bantina oyo yango ezali kolendisa biso ete tótángaka Biblia. [Tótánga paragrafe 16-17, nk. 10-11.] Wana tondimisami ete Biblia elobaka solo, tokómi na elikya ya solosolo mpo na mikolo mizali koya. Soki okolinga kotánga búku oyo, nakosepela kotikela yo yango na lisalisi ya likabo moke.”
6 Ntango tozongeli elenge oyo andimaki búku “Parole de Dieu,” tokoki kobanda na koloba ete:
◼ “Nasepelaki mingi na komona ete omibanzabanzaka mpo na mikolo mizali koya. Soki obosani te, nalakisaki yo mokapo ya Biblia oyo epesi biso elaka ya esengo mpe ya solosolo mpo na mikolo mizali koya. Talá mokapo mosusu. [Tótánga Emoniseli 21:3, 4.] Búku oyo natikelaki yo ezali kopesa bilembeteli ya kondimisa ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe kasi ya bato te. Likambo wana ezali na ntina monene. Talá oyo yango elimboli. [Tótánga paragrafe 1-2, nk. 184-185.] Soki olingi, nakosepela koyekolaka na yo Biblia kozanga ete ofuta mbongo.” Soki elenge yango andimi boyekoli, tótuna ye soki azali na Biblia. Soki azali na yango te, tólakisa ye Traduction du monde nouveau.
7 Moto oyo ayebi te epai wapi asengeli komibalola mpo na kozwa lisalisi mpo ete alónga mikakatano na ye, mbala mosusu motema na ye ekosimbama na maloba oyo:
◼ “Na eleko na biso, tóloba ete bato banso bakutanaka na mikakatano minene. Mingi bamibalolaka epai na bapesi-toli ya lolenge na lolenge. Basusu bakendaka kotala basololi na bilimu mabe. Na likanisi na yo, epai wapi tokoki komibaloba mpo na kozwa batoli malamu oyo ezali mpenza na litomba? [Tótika ete moto yango ayanola.] Biblia ezali komonisa likambo moko ya ntina oyo moko na moko asengeli koyeba.” Tótánga Yilimia 10:23. Tófungola búku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? na lok. 187 mpe tótánga paragrafe 9. “Búku oyo ekosalisa yo na koyeba lolenge nini mikakatano na biso nyonso mikosila na lisalisi ya Bokonzi ya Nzambe. Okosepela kotánga yango?”
8 Soki na boumeli ya lisoló ya liboso tolobaki ete moto azali na mposa ya motambwisi moko, na bozongeli ya sika, tokoki kokóba lisoló na lolenge oyo:
◼ “Mbala eleki, tondimaki yo na ngai ete tozali na mposa ya litambwisi ya Nzambe soki tolingi kolónga kosilisa mikakatano ya bomoi. Mpo na yango, nakanisi ete okosepela na maloba ya nsuka oyo tokoki kotánga kati na búku oyo natikelaki yo. [Tótánga paragrafe 12-13, lok. 189 ya búku Parole de Dieu.] Nasepeli ete tóyekolaka Biblia elongo na yo na ndako kozanga ete ofuta mbongo mpe nalingi komonisa yo sikawa lolenge yango esalemaka.”
9 Yehova akopambola milende oyo tozali kosala mpo na kosalisa bilenge mpe mibangé ete báyeba motuya ya Liloba ya Nzambe, oyo ezali kotambwisa biso kati na bomoi.—Nz. 119:105.