Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • kl mok. 13 nk. 118-129
  • Kozala na bomoi ya kobanga Nzambe epesaka esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kozala na bomoi ya kobanga Nzambe epesaka esengo
  • Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KOLONGOBANA EPESAKA ESENGO
  • BOKABI EPESAKA ESENGO
  • MAKAMBO MOSUSU OYO MAPESAKA ESENGO
  • ESENGO KATI NA LIBALA
  • “BASANGANI NA MOKILI TE”
  • LOLENGE NINI KOTALELA MILULU YA MBULA NA MBULA
  • MOSALA MPE KOMINANOLA
  • LIMEMYA MPO NA BOMOI MPE MAKILA
  • Bongisá libota na yo mpo na bomoi ya seko
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Kosalela Jéhovah ezali bolamu ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Libala ezali nzela bobele moko ya kozwa bolamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Bóbakisa ezaleli ya kokangama na Nzambe na ezaleli na bino ya koyika mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
kl mok. 13 nk. 118-129

Mokapo 13

Kozala na bomoi ya kobanga Nzambe epesaka esengo

1. Mpo na nini tokoki koloba ete kolanda nzela ya Yehova epesaka esengo?

YEHOVA azali “Nzambe ya esengo” mpe alingi ete ozala na bomoi ya esengo. (1 Timoté 1:11, NW) Na kotamboláká kati na nzela na ye, okoki kozwa matomba mpe kozala na kimya ya mozindo mpe ya koumela, lokola ebale oyo ekaukaka te. Lisusu, kotambola kati na nzela ya Nzambe epusaka moto na kosala misala ya boyengebene, “lokola mbonge na mai-na-monana.” Yango epesaka esengo ya solo.​—Yisaya 48:17, 18.

2. Lolenge nini baklisto bakoki kozala na esengo atako na bantango mosusu bakutanaka na makambo ya mpasi?

2 Bato mosusu bakoki koloba ete: ‘Na bantango mosusu, bato banyokwamaka mpo ete bazali kosala makambo oyo mazali sembo.’ Ya solo, mpe ezali yango nde ekómelaki bantoma ya Yesu. Nzokande, atako banyokwamaki, bazalaki na esengo mpe balandaki “kosakola nsango malamu na ntina na Klisto.” (Misala 5:40-42, NW) Tokoki koyekola mateya ya ntina na likambo wana. Moko na yango ezali ete kozala na bomoi ya kobanga Nzambe ezali ndanga te ete bakosalela biso malamu ntango nyonso. Ntoma Paulo akomaki ete: “Ɛɛ, bango nyonso bazali na mposa na kozala na bomoi ya kobanga Nzambe na nzela na boyokani na bango na Klisto Yesu bakonyokolama.” (2 Timoté 3:12, NW) Ntina mpo na yango ezali ete Satana mpe mokili na ye bazali kotɛmɛla baoyo bazali na bomoi ya kobanga Nzambe. (Yoane 15:18, 19; 1 Petelo 5:8) Kasi esengo ya solosolo eutaka te na makambo mazali libándá. Nzokande, eutaka na endimiseli oyo ete tozali kosala oyo ezali sembo mpe na yango tondimami epai na Nzambe.​—Matai 5:10-12; Yakobo 1:2, 3; 1 Petelo 4:13, 14.

3. Lolenge nini losambo ya Yehova esengeli kozala na bopusi likoló ya bomoi ya moto?

3 Ezali na bato oyo bakanisaka ete bakoki kondimama epai na Nzambe na kokendáká na losambo na mabaku mokomoko, nzokande bazali kobosana Mozalisi na bango na bantango mosusu. Losambo ya solo ya Yehova Nzambe ezali motindo wana te. Ezali na bopusi likoló na etamboli ya moto na ngonga nyonso, mokolo na mokolo mpe mbula na mbula. Ezali mpo na yango nde ebéngami “Nzela.” (Misala 19:9; Yisaya 30:21) Ezali lolenge ya bomoi oyo eyokani na mokano ya Nzambe oyo ezali kotinda biso na koloba mpe na kosala na boyokani na Liloba na ye.

4. Mpo na nini ezali litomba kosala mabongwani mpo na kozala na bomoi oyo eyokani na banzela ya Nzambe?

4 Ntango bayekoli ya sika ya Biblia bamoni ete esengeli na bango kosala mabongwani mosusu kati na bomoi na bango mpo na kosepelisa Yehova, bakoki komituna: ‘Bomoi ya kobanga Nzambe ezali mpenza bomoi oyo ebongi?’ Okoki kondimisama ete ezali bongo. Mpo na nini? Mpamba te “Nzambe azali bolingo,” mpe azali kolakisa biso nzela na ye mpo na litomba na biso. (1 Yoane 4:8) Epai mosusu, Nzambe azali na mayele mpe ayebi eloko nini eleki malamu mpo na biso. Lokola Yehova Nzambe azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso, akoki kopesa biso makasi ya kotika momeseno moko mabe. (Bafilipi 4:13) Tiká tótalela mwa ndambo na malako oyo tosengeli kolanda mpo na kozala na bomoi ya kobanga Nzambe mpe tokomona lolenge nini yango ezali mpo na bolamu na biso.

KOLONGOBANA EPESAKA ESENGO

5. Biblia elobi nini na ntina na lokuta mpe moyibi?

5 Yehova azali “Nzambe na solo.” (Nzembo 31:5, NW) Na ntembe te, olingi kolanda ndakisa na ye mpe koyebana lokola moto akolobaka solo. Kolongobana epesaka limemya epai na moto ye moko mpe mayoki ya kozala malamu. Nzokande, lokola kozanga kolongobana ezali komonana mingi kati na mokili oyo ya masumu, baklisto basengeli kolanda likebisi oyo: “Bóloba solo moto epai na moninga na ye . . . Tiká ete moyibi ayiba lisusu te, kasi tiká ete asala mosala makasi . . . ete akoka kozala na eloko mpo na kopesa epai na moto oyo azali na bosenga.” (Baefese 4:25, 28, NW) Baklisto bakopesa mokolo mobimba ya mosala lokola bayokanaki na nkolo na bango ya mosala. Bakokamataka te biloko ya nkolo na bango ya mosala kozanga ndingisa. Ezala na mosala, kati na eteyelo to na ndako, mosambeli ya Yehova asengeli kozala ‘sembo na makambo nyonso.’ (Baebele 13:18, NW) Moto nyonso oyo azali na momeseno ya kobuka lokuta to ya koyiba akoki te kondimama epai na Nzambe.​—Deteronome 5:19; Emoniseli 21:8.

6. Lolenge nini kolongobana ya moto oyo abangaka Nzambe ekoki kokumisa Yehova?

6 Kozala na kolongobana epesaka mapamboli mingi. Selina azali mobólá mwasi-mokufeli-mobali, mobotami ya Afrika, oyo alingi Yehova Nzambe mpe mitindá na ye ya sembo. Mokolo moko, akutaki saki oyo ezalaki na búku ya bánki mpe ndambo mingi ya mosolo. Kosaleláká búku oyo ezali na banimero ya telefone, ayaki koyeba nkolo na yango—motɛkisi moko na magazini, oyo bautaki koyiba ye. Mobali wana akamwaki mingi ntango Selina, atako azalaki kobɛla, ayaki kokutana na ye mpe kozongisela ye saki mpe biloko nyonso bizalaki na kati. Mobali wana alobaki ete: “Kolongobana motindo oyo esengeli kopesamela mbano” mpe apesaki ye ndambo ya mosolo. Likambo ya ntina koleka, mobali wana akumisaki lingomba ya Selina. Ee, misala ya kolongobana ekɛmbisaka mateya ya Biblia, ekumisaka Yehova Nzambe mpe epesaka esengo epai na basambeli na ye ya kolongobana.​—Tito 2:10; 1 Petelo 2:12.

BOKABI EPESAKA ESENGO

7. Mabe nini ezali na masano ya mbongo?

7 Bato oyo bakabaka bazali na esengo, kasi bato na lokoso “bakosangola bokonzi ya Nzambe te.” (1 Bakolinti 6:10) Lolenge ya lokoso oyo emonanaka mingi ezali bongo masano ya mbongo, mpo ete mosáni azali komeka kozwa mbongo na kotikáká basusu mabɔkɔ mpamba. Yehova andimaka te baoyo bazali “baluli na mosolo.” (1 Timoté 3:8) Ata epai kuna masano ya mbongo mandimami na mibeko ya Leta mpe moto azali kobɛta masano ya mbongo mpo na kominanola, akoki kokóma moombo na yango mpe kopesa mabɔkɔ na momeseno moko oyo esili kokómisa bato mingi babólá. Mbala mingi kobɛta masano ya mbongo eyeisaka mikakatano na libota ya moto oyo abɛtaka yango, oyo akoki kozanga mbongo mpo na kosomba biloko bisengeli lokola bilei mpe bilamba.​—1 Timoté 6:10.

8. Lolenge nini Yesu atikaki ndakisa malamu ya bokabi, mpe lolenge nini tokoki kozala bakabi?

8 Lokola bakabaka na bolingo nyonso, baklisto bazali na esengo na kosunga basusu, mingimingi baninga na bango bandimi oyo bazali kokelela. (Yakobo 2:15, 16) Liboso ete Yesu aya awa na mabelé amonaki bokabi ya Nzambe epai na bato. (Misala 14:16, 17) Yesu ye moko apesaki ntango na ye, makoki na ye, mpe ata bomoi na ye mpo na bato. Na yango, abongaki mpo na koloba ete: “Esengo na kopesa eleki esengo na kozwa.” (Misala 20:35) Lisusu, Yesu alobaki malamu na ntina na mobólá mwasi-mokufeli-mobali, oyo atyaki na bokabi nyonso meya mike mibale kati na ebombelo na makabo kati na tempelo, mpamba te, apesaki “mosolo na ye nyonso.” (Malako 12:41-44) Bayisraele ya kala mpe baklisto ya ekeke ya liboso bapesi biso ndakisa ya kokaba na esengo nyonso mpo na oyo etali kosunga lisangá mpe mosala ya Bokonzi. (1 Ntango 29:9; 2 Bakolinti 9:11-14) Longola makabo ya biloko mpo na ntina wana, baklisto ya lelo bazali na esengo ya kopesa masanzoli epai na Nzambe mpe bazali kosalela bomoi na bango kati na mosala na ye. (Baloma 12:1; Baebele 13:15) Yehova azali kopambola bango mpamba te bazali kosalela ntango na bango, makasi na bango, mbongo na bango mpe biloko mosusu mpo na kotombola losambo ya solo mpe mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mokili mobimba.​—Masese 3:9, 10.

MAKAMBO MOSUSU OYO MAPESAKA ESENGO

9. Mabe nini ezali na kolekisa ndelo na komela masanga makasi?

9 Mpo na kozala na esengo, baklisto basengeli mpe ‘kobatela makoki na bango ya kokanisa.’ (Masese 5:1, 2) Yango esɛngi ete bátángaka mpe bámanyolaka likoló na Liloba ya Nzambe mpe mikanda nyonso oyo mikolimbolaka Biblia. Kasi ezali na makambo oyo tosengeli kopɛngola. Na ndakisa, kolekisa ndelo na komela masanga makasi ekoki kosala ete moto azanga komipekisa kati na makanisi na ye. Kati na ezalela motindo wana, bato mingi bazali komipesa na etamboli ya nsɔ́ni, na mobulu to mpe koyeisa makámá ya liwa. Ntina wana Biblia elobi ete balangwi-masanga bakosangola Bokonzi ya Nzambe te! (1 Bakolinti 6:10) Lokola ekateli na bango ezali ya kozala na “makanisi mabongi,” baklisto ya solo bazali koboya molangwa, mpe yango ezali mpo na bolamu na bango nyonso.​—Tito 2:2-6.

10. (a) Mpo na nini baklisto basalelaka makaya te? (b) Matomba nini moto akoki kozwa soki atiki kosalela bilangwiseli?

10 Bopɛto ya nzoto ezali mpo na bolamu na biso moko. Nzokande, mingi basili kokóma baombo ya biloko mabe. Na ndakisa, tótalela momeseno ya komela likaya. Lisangá ya mokili mobimba oyo ekotalelaka makambo ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto eyebisi ete likaya “ezali koboma bamilió misato ya bato mbula na mbula.” Kotika komela likaya ekoki kozala mokakatano na ntina na mposa oyo elukaka kosilisama. Nzokande, mingi na baoyo bazalaki kala komela likaya bazali sika na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ koleka mpe na mosolo mingi mpo na bamposa ya libota. Na ntembe te, kotika komela likaya mpe lolenge nyonso ya bilangwiseli lokola bángi, ezali nzela ya kozala na nzoto malamu, na lisosoli ya pɛto mpe na esengo ya solo.​—2 Bakolinti 7:1.

ESENGO KATI NA LIBALA

11. Libala nini ekoki kobéngama ete ya lokumu mpe oyo ebongi koumela?

11 Baoyo bazali kofanda elongo lokola mobali na mwasi basengeli kondimisama ete libala na bango esilaki kokomama na mikanda na boyokani na mibeko ya Leta. (Malako 12:17) Lisusu, basengeli kotalela libala ete ezali mokumba monene. Ya solo, kokabwana ekoki kosalema na ntango moto azali koboya na nkó nyonso koleisa mobalani na ye, to ete azali kobɛta ye makasi to lisusu soki atye na likámá mpenza bomoi na ye ya elimo. (1 Timoté 5:8; Bagalatia 5:19-21) Nzokande, maloba ya ntoma Paulo na 1 Bakolinti 7:10-17 mazali kolendisa babalani ete bázala ntango nyonso esika moko. Na ntembe te, mpo ete bázala na esengo ya solo, basengeli kozala sembo moko epai na mosusu. Paulo akomaki ete: “Tiká ete libala likumisama epai na bato nyonso, mpe mbeto ya libala ezala na mbindo te, mpamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na ekobo.” (Baebele 13:4, NW) Elobeli “mbeto ya libala” esalelami mpo na kolobela kosangana kati na mobali mpe mwasi oyo babalani na boyokani na mibeko ya Leta. Nzokande, kobala basi mingi ezali likambo liboyami, mpamba te ezali lolenge wana te ‘libala lisengeli kokumisama.’ Epai mosusu, Biblia ezali kokweisa kosangisa nzoto liboso ya kobalana mpe kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi.​—Baloma 1:26, 27; 1 Bakolinti 6:18.

12. Pite ekobimisaka matomba nini ya mabe?

12 Pite ekoki kopesa mwa ntango moke ya bosepeli na nzoto, kasi epesaka esengo ya solo te. Esepelisaka Nzambe te mpe ekoki kotika bilembo kati na lisosoli ya moto. (1 Batesaloniki 4:3-5) Mbuma mabe ya kosangisa nzoto na moto oyo azali mobalani na yo te ekoki kozala sida mpe bamaladi mosusu oyo ezwamaka na kosangisa nzoto. Lapólo moko ya makambo ya monganga eyebisi ete: “Esili kokanisama ete koleka bamilió 250 ya bato na mokili mobimba bazali kozwa kasende mbula na mbula, mpe soko bamilió 50 bazali kozwa sopisi.” Bazemi oyo ekanami te ezali mpe mokakatano mosusu. Lisangá likotalelaka lolenge ya kobota bana na mokili mobimba eyebisi ete, koleka bamilió 15 ya bana basi na mokili mobimba, oyo bazali na mibu kati na 15 mpe 19 bazali kozwa zemi mbula na mbula, mpe moko likoló na misato kati na bango asili kolongola zemi. Boyekoli emonisaki ete na mboka moko ya Afrika, mindɔndɔ́ ya kolongola zemi mizali koboma 72 % kati na bilenge basi. Basáli mosusu ya pite bakoki kopɛngola kozwa bokɔnɔ to zemi, kasi bakoki te kopɛngola kotungisama na mayoki. Mingi babungisaka limemya na bango moko mpe bakómaka ata komiyina bango moko.

13. Wapi mikakatano misusu mikoki kobima na ntina na ekobo, mpe nini ezali kozela baoyo baboyi kotika pite mpe ekobo?

13 Atako ekobo ekoki kolimbisama, nzokande Makomami mapesi nzela na mobalani oyo asali ekobo te ete aboma libala mpo na ntina yango soki alingi. (Matai 5:32; kokanisá na Hosea 3:1-5.) Ntango libala ekufi mpo na ekobo, yango etikaka bilembo mozindo kati na mayoki ya mobalani oyo asali ekobo te mpe epai ya bana. Mpo na kobatela bolamu ya libota, Liloba ya Nzambe emonisi ete Yehova akoyeisa etumbu likoló na basáli na pite mpe basáli na ekobo oyo baboyi kobongola motema. Lisusu, emonisi polele ete basáli na pite mpe basáli na ekobo “bakosangola bokonzi ya Nzambe te.”​—Bagalatia 5:19, 21.

“BASANGANI NA MOKILI TE”

14. (a) Tángá mwa ndambo na mitindo ya losambo ya bikeko oyo esengeli kopɛngolama na moto oyo abangaka Nzambe? (b) Toli nini epesami na Yoane 17:14 mpe Yisaya 2:4?

14 Baoyo balingi kosepelisa Yehova mpe kozwa mapamboli ya Bokonzi baboyaka losambo ya bikeko na lolenge na yango nyonso. Biblia emonisi ete ezali mabe kosala bikeko mpe kosambela yango, ata ezali ekeko ya Klisto, to ya Malia, mama na Yesu. (Exode 20:4, 5; 1 Yoane 5:21) Na yango, baklisto ya solo bakosambelaka te ezala bikeko, to bikulusu mpe bililingi. Bapɛngolaka mpe mitindo ya mayele mabe ya losambo ya bikeko, lokola kosambela bɛndɛ́lɛ mpe koyemba nzembo oyo ezali lokola losambo mpo na ekólo. Ntango batindikami na kosala misala motindo wana, baklisto bazali komikundola maloba oyo Yesu alobaki epai na Satana ete: “Ezali Yehova Nzambe na yo nde osengeli kosambela, mpe ezali bobele ye nde osengeli kosalela mosala na bulɛɛ.” (Matai 4:8-10, NW) Yesu alobaki ete bayekoli na ye “basangani na mokili te.” (Yoane 17:14, NW) Yango elimboli kozanga komikɔtisa na makambo ya politiki mpe kozala na bomoi ya kimya na boyokani na Yisaya 2:4, oyo elobi ete: “[Yehova Nzambe] akosambisa kati na mabota, akopamela mpe bikólo mingi; bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mázala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.”

15. Babilone Monene ezali nini mpe ebele ya bayekoli ya sika ya Biblia basalaka nini mpo na kobima kati na ye?

15 Kozanga “kosangana na mokili” elimboli mpe kokata boyokani nyonso elongo na “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba. Losambo ya mbindo epalanganaki uta na Babilone ya kala kino ebebisaki elimo ya bato na mabelé mobimba. “Babilone Monene” esangisi mangomba nyonso oyo bindimeli na yango mpe misala na yango eyokani te na boyebi ya Nzambe. (Emoniseli 17:1, 5, 15) Mosambeli ya sembo ya Yehova akomikɔtisa te na bosangisi bindimeli na kosanganáká na losambo elongo na mangomba mosusu to na kozaláká na boyokani na makambo ya elimo elongo na eteni moko ya Babilone Monene. (Mituya 25:1-9; 2 Bakolinti 6:14) Na yango, mingi kati na bayekoli ya sika ya Biblia bazali kotinda mikanda ya komilongola na mangomba oyo bazalaki. Yango ebɛlɛmisi bango penepene na Nzambe ya solo, oyo alakaki ete: “Bóbima na kati na bango, mpe bókabwana na bango. [Yehova] alobi bongo. Bótika kosimba eloko na mbindo mpe boye nakoyamba bino.” (2 Bakolinti 6:17; Emoniseli 18:4, 5) Ezali kondimama motindo boye epai na Tata na biso ya likoló nde tozali na mposa na yango mpenza, boye te?

LOLENGE NINI KOTALELA MILULU YA MBULA NA MBULA

16. Mpo na nini baklisto ya solo bakumisaka Eyenga ya Mbótama te?

16 Bomoi ya kobanga Nzambe ezali kolongola biso mbala mingi na bozito ya milulu ya biyenga ya mokili. Na ndakisa, Biblia emonisi te mokolo ya sikisiki oyo Yesu abotamaki. Moto mosusu akoki koloba ete: ‘Nakanisaka ete Yesu abotamaki na mokolo ya 25 Desɛ́mbɛ!’ Yango ekokaki kosalema te, mpamba te akufaki na eleko ya prɛntá ya mobu 33 T.B. wana azalaki na mibu ya kobotama 33 na ndambo. Lisusu, na ntango ya kobotama na ye, babateli na mpate bazalaki “na lisobe na butu kosɛnzɛla etongá na bango na mpate.” (Luka 2:8) Na mokili ya Yisraele, nsuka ya sanza ya Desɛ́mbɛ ezalaka malili, eleko ya bambula oyo na boumeli na yango bampate basengeli kozala na bandako na yango na butu mpo ete bábatelama na malili ya eleko ya mpiɔ. Mpo na koloba solo, mokolo ya 25 Desɛ́mbɛ eponamaki na Baloma lokola mokolo ya kobotama ya nzambe na bango moi. Bikeke mingi na nsima ya Yesu, baklisto bapɛngwi bamekolaki dati wana mpo na kokumisa kobotama ya Klisto. Na yango, baklisto ya solo bakumisaka Mbótama ya Klisto te soko mpe biyenga mosusu oyo bizwi moboko na bindimeli ya mangomba ya lokuta. Lokola bapesaka losambo bobele epai na Yehova, basalaka te biyenga oyo bizali kokumisa bato bazangi kokoka soko mpe bikólo.

17. Mpo na nini bato oyo bakobangaka Nzambe bakumisaka te mikolo ya kobotama ya bato, mpe atako bongo mpo na nini bana oyo bazali baklisto bazalaka na esengo?

17 Biblia elobeli bobele milulu mibale ya kokundola mokolo ya kobotama, mpe nyonso mibale esalemaki na bato oyo bazalaki basaleli ya Nzambe te. (Genese 40:20-22; Matai 14:6-11) Lokola Makomami mapesi te dati ya kobotama ya Yesu Klisto, moto na kokoka, mpo na nini tosengeli kotya likebi na mikolo ya kobotama ya bato oyo bazangi kokoka? (Mosakoli 7:1) Ya solo, baboti oyo babangaka Nzambe bazelaka te mokolo moko ya sikisiki mpo na komonisa bolingo epai na bana na bango. Elenge mwasi moko moklisto ya mibu 13 alobaki ete: “Ngai mpe libota na ngai tozalaka na mabaku mingi ya kosepela. . . . Nazalaka penepene ya baboti na ngai, mpe ntango bana mosusu batunaka ngai mpo na nini nakumisaka biyenga te, nayebisaka bango ete mokolo nyonso epai na ngai ezalaka lokola eyenga.” Elenge mobali moklisto ya mibu 17, alobaki ete: “Na ndako na biso, makabo mapesamaka ata na eleko nini na boumeli ya mbula.” Esengo ya solo emonanaka wana makabo mazali kopesama kozanga komizela na yango.

18. Wapi molulu bobele moko na kati na mbula oyo Yesu asɛngaki na bayekoli na ye ete básalaka, mpe yango ezali kokundwela biso nini?

18 Mpo na baoyo bazali na bomoi ya kobanga Nzambe, ezali na mokolo moko kati na mbula oyo basengeli mpenza kokumisa. Ezali bongo Elambo ya Mpokwa ya Nkolo, oyo mbala mingi ebéngamaka Ekaniseli ya Liwa ya Klisto. Na ntina na yango, Yesu apesaki etindá na bayekoli na ye ete: “Bósalaka boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19, 20, NW; 1 Bakolinti 11:23-25) Ntango Yesu abandisaki elambo wana na butu ya 14 Nisan ya mobu 33 T.B., asalelaki mampa mazangi mfulu mpe vinyo ya motane, oyo emonisaki nzoto na ye ya moto azangi masumu mpe makila na ye ya kokoka. (Matai 26:26-29) Baklisto bapakolami na elimo santu ya Nzambe nde balyaka limpa mpe bamelaka vinyo. Basili kokɔtisama kati na kondimana ya sika mpe kati na kondimana mpo na Bokonzi, mpe bazali na elikya ya kokende na likoló. (Luka 12:32; 22:20, 28-30; Baloma 8:16, 17; Emoniseli 14:1-5) Atako bongo, matomba mazali kozwama epai na baoyo nyonso bazali koyangana na molulu yango na mpokwa oyo ekokani na 14 Nisan engebene manáka ya kala ya Bayuda. Bazali kokundwela bango bolingo oyo Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto bamonisaki na kopesáká lisiko, mbeka ya mbɔndi oyo efungoli nzela ya bomoi ya seko mpo na baoyo bandimami na Nzambe.​—Matai 20:28; Yoane 3:16.

MOSALA MPE KOMINANOLA

19. Mokakatano nini baklisto bazali kokutana na yango mpo na mosala ya mosuni?

19 Baklisto ya solo basengeli kosala mosala mpe kokokisa bongo bamposa na bango. Kokokisa yango epesaka epai na batata ya mabota mayoki ya bosepeli. (1 Batesaloniki 4:11, 12) Ya solo, soki mosala ya moklisto moko eyokani te na Biblia, yango ekoki kozangisa ye esengo. Nzokande, na bantango mosusu ezalaka mpasi mpo na moklisto na kozwa mosala oyo eyokani na mitindá ya Biblia. Na ndakisa, basáli basɛngisamaka na bankolo na bango ya mosala ete bábubaka bakiliya. Nzokande, bankolo mingi ya misala oyo balingi te kobungisa mosáli oyo abongi kotyelama motema, bakomeka kosala boyokani mpo na kotosa lisosoli ya mosáli oyo azali moto na kolongobana. Nzokande, atako boni, okoki kondimisama ete Nzambe akopambola milende na yo ya sembo mpo na kozwa mosala oyo ekopesa yo nzela na kobatela lisosoli ya pɛto.​—2 Bakolinti 4:2.

20. Mpo na nini tosengeli kozala na bokatikati wana tozali kopona kominanola?

20 Lokola Nzambe alingi ete basaleli na ye bázala na esengo, esengeli na biso ete bokatikati ezala kati na mosala mpe ntango ya kominanola mpe ya kopema. (Malako 6:31; Mosakoli 3:12, 13) Mokili ya Satana ezali kotombola kominanola ya mbindo. Kasi mpo na kosepelisa Nzambe, tosengeli kopona malamu babúku oyo tozali kotánga, baemisyó ya radio mpe miziki oyo tozali koyoka, mpe bafilime, masano, baemisyó ya televizyó, mpe bavideo oyo tozali kotala. Soki kominanola oyo toponaki ezali na boyokani te na makebisi oyo mazwami na mikapo lokola Deteronome 18:10-12, Nzembo 11:5, mpe Baefese 5:3-5, tokosala mabongwani oyo masengeli, boye tokosepelisa Yehova mpe tokozala na esengo eleki.

LIMEMYA MPO NA BOMOI MPE MAKILA

21. Lolenge nini limemya na ntina na bomoi esengeli kozala na bopusi likoló na lolenge na biso ya kotalela kolongola zemi, mimeseno na biso mpe etamboli na biso?

21 Mpo na kozala na esengo ya solo, tosengeli kotalela bomoi ya moto ete ezali bulɛɛ, motindo moko lokola Yehova atalelaka yango. Liloba na Ye epekisi biso koboma moto. (Matai 19:16-18) Na yango, Mibeko ya Nzambe epai na Yisraele emonisi ete atalelaka mwana oyo azali na libumu ete ezali bomoi ya motuya—azali te eloko oyo basengeli kobebisa. (Exode 21:22, 23) Na bongo, tosengeli te kotalela bomoi lokola eloko oyo ezali na motuya moke na kosaleláká makaya, kobebisáká nzoto na biso na bilangwiseli to na masanga makasi, to na kosakana na yango mpambampamba. Tosengeli mpe te komipesa na masano nyonso oyo mazali kotya bomoi na likámá to kokumba ngambo ya makila mpo ete totosi te mibeko lokola oyo ya nzela.​—Deteronome 22:8.

22. (a) Likanisi ya Nzambe na ntina na makila mpe kosalelama na yango ezali nini? (b) Bobele makila ya nani mazali mpenza kobikisa bomoi?

22 Yehova ayebisaki Noa mpe libota na ye ete makila ezali komonisa molimo to bomoi. Na yango, Nzambe apekisaki bango kolya makila. (Genese 9:3, 4) Lokola tozali bakitani na bango, mobeko wana ezali likoló na biso banso. Yehova ayebisaki Bayisraele ete makila masengelaki kosopama na mabelé mpe masengelaki te kosalelama. (Deteronome 12:15, 16) Mpe mobeko ya Nzambe na ntina na makila mozongelamaki lisusu ntango baklisto ya ekeke ya liboso bazwaki malako: “Bóboya . . . makila.” (Misala 15:28, 29) Na ntina na limemya oyo bazali na yango mpo na bosantu ya bomoi, bato oyo babangaka Nzambe bandimaka te kozongisama makila, ata soki basusu bazali kondima ete mwango wana ebikisaka bomoi. Batatoli ya Yehova bazali kondima myango mingi ya minganga oyo ezalaka mpenza na matomba malamu mpe oyo esɛngaka te ete moto azongisama makila. Baklisto bayebi ete bobele makila ya Klisto oyo masopamaki nde mazali mpenza kobikisa bomoi. Kondimela yango epesaka bolimbisi mpe elikya ya bomoi ya seko.​—Baefese 1:7.

23. Tángá mwa ndambo na matomba tozali kozwa na kolanda kozala na bomoi ya kobanga Nzambe?

23 Ya solo, kozala na bomoi ya kobanga Nzambe esɛngaka milende. Ekoki kozala ete basangani ya libota to baninga na biso bakosɛka biso. (Matai 10:32-39; 1 Petelo 4:4) Kasi mbano ya bomoi motindo oyo eleki mosika komekama nyonso oyo tokoki kozwa. Epesaka lisosoli ya pɛto mpe bondeko ya solosolo elongo na basambeli mosusu ya Yehova. (Matai 19:27, 29) Lisusu, kanisá esengo ya kozala na bomoi ya seko kati na mokili ya sika mpe ya sembo ya Nzambe. (Yisaya 65:17, 18) Mpe oyo nde esengo ezali na kolanda batoli ya Biblia mpe kosepelisa motema ya Yehova! (Masese 27:11) Na ntembe te, kozala na bomoi ya kobanga Nzambe ezali nzela ya kozwa esengo ya solo!—Nzembo 128:1, 2.

MEKÁ BOYEBI NA YO

Mpo na nini bomoi ya kobanga Nzambe ezali mpo na bolamu na biso?

Kozala na bomoi ya kobanga Nzambe ezali kosɛnga mabongwani nini?

Mpo na nini olingi kozala na bomoi ya kobanga Nzambe?

[Elilingi na lokasa 124, 125]

Bokatikati na misala ya elimo mpe ntango ya kominanola ekoki kokólisa esengo ya baoyo bazali na bomoi ya kobanga Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto