Botongi Bandako ya Bokonzi na mokili mobimba
1 Mposa ya Bandako ya Bokonzi ezali makasi kati na mokili mobimba. Na boumeli ya mobu ya mosala 1996, masangá koleka 3 288 mafungolamaki, oyo mingi na yango ezali na Afrika, na Amerika ya ntei, na Amerika ya Súdi, na Azia mpe na Mpótó ya Ɛ́sti.
2 Banimero ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo ebimaki liboso elobelaki kobongisama ya botongi Bandako ya Bokonzi na mikili mingi. Nzokande, balapólo emonisi ete na mokili moko oyo ezali na masangá 568 ezali bobele na Ndako ya Bokonzi moko. Na mokili mosusu, ezali bobele na Ndako ya Bokonzi moko mpo na masangá 129. Bipai mosusu, mitango mimonisi Ndako ya Bokonzi moko mpo na masangá 41. Na mikili mingi mosusu oyo motango nyonso ya masangá ezali koleka 1000, likoki ezalaki te ya kotonga ata Ndako ya Bokonzi moko, mpo na mikakatano ya nkita. Mosala monene mosili kosalema, kasi mosala ya kosala mozali naino mingi. Tondimisami ete bandeko ya États-Unis bokosepela kosunga masangá ya mikili mosusu oyo mazali na Bandako ya Bokonzi ya malamu te.
3 Talá oyo ezali na boyokani na 2 Bakolinti 8:14, oyo elobi: “Nde mpo na kokokisa likambo, bozwi na bino na ntango oyo ekosunga kozanga na bango.” Na mikili mingi bafungolaki kɛsi ya mosolo mpo na botongi Bandako ya Bokonzi, kasi makambo ya nkita ezali kopesa nzela te na bandeko mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi ndenge mposa ezali kosɛnga. Atako bongo, na lisalisi ya bandeko ya mikili mosusu, la Société akokaki kosimba mosala ya botongi Bandako ya Bokonzi 413 mpe kobongisa Bandako ya Bokonzi 727 na mikili 75, mpe bobele na sanza minei mpamba. Lokola mposa ezali naino makasi, esengeli kozwa mosolo na kɛsi na biso mpo na kosimba misala ya botongi na mikili mosusu. Wana tokokóba kodefisa mosolo mpo na botongi ya Bandako ya Bokonzi oyo basengeli na yango na États-Unis, na meko oyo mposa yango ekokokisama mpe soki mbongo ezali, tokosalela mpe mosolo na biso mpo na kosalisa masangá na mikili mosusu. Tozali kosepela na kosangana na botongi Bandako ya Bokonzi mingi lisusu kati na mokili mobimba, mpo na lokumu ya Yehova.—Nz. 102:16; Hag. 1:7, 8.