Mokanda ya Biblia nimero 65—Yuda
Mokomi: Yuda
Esika ya bokomi: Palestine (?)
Nsuka ya bokomi: soko 65 T.B.
1. Mpo na makambo nini, oyo mazalaki kati na lisangá, Yuda amonaki ete esengelaki akoma mokanda na ye ya nguya mpo na bolamu ya bandeko na ye?
BANDEKO baklisto ya Yuda bazalaki kati na likámá! Na boumeli ya ntango oyo elekaki uta na liwa mpe lisekwa ya Yesu Klisto, bapaya bakɔtaki na lisangá ya boklisto. Bayini bamikɔtisaki na mokano ya kobebisa kondima, bobele lokola ntoma Paulo akebisaki yango, esili koleka mbula soko 14. (2 Tes. 2:3) Lolenge nini bandeko basengelaki kokebisama mpe komikɛngɛla liboso na likámá yango? Mokanda ya Yuda, oyo mozali na maloba ya mpiko mpe ya nguya, mopesaki eyano na motuna yango. Yuda ye moko amonisaki polele likatami na ye na vɛrsɛ́ 3 mpe 4: ‘Namoni ete ekoki na ngai kokomela bino mpo ete bato mosusu basili kokɔta na nkuku, bazali batyoli na Nzambe, bakobalolaka ngɔlu na Nzambe na biso kino bosɔtɔ.’ Miboko ya mateya mabongi mpe ya bizaleli malamu mizalaki na likámá ya kobukama. Yuda amiyokaki ete abyangami na kobundela matomba ya bandeko na ye, na ntina ete bango mpe, na ngala na bango, bábunda makasi mpo na kondima.
2. (a) Yuda azalaki nani? (b) Kati na boyokani mibale oyo azalaki na yango elongo na Yesu, wapi boyokani oyo amonaki ete elekaki ntina?
2 Kasi Yuda azalaki nani? Maloba ya ebandeli mayebisi biso ete mokanda oyo mokomamaki na “Yuda, moombo na Yesu Klisto, ndeko na Yakobo, [motindami epai na] babyangami.” Lokola nkombo ya bantoma 2 kati na bantoma ya libosoliboso 12 ya Yesu ezalaki bongo Yuda, tokoki nde koloba ete Yuda, to Yudasi, azalaki ntoma? (Luka 6:16) Yuda amilobeli te ete azali ntoma, nzokande azali kolobela bantoma na kosaleláká liloba “bango,” komilongoláká ye moko na lolenge ya polele mpenza. (Yuda 17, 18) Lisusu, amibéngi ye moko ete azali “ndeko na Yakobo,” oyo azali mokomi ya mokanda ya Yakobo mpe ndeko ya Yesu oyo abotamaki na ye mama moko. (v. 1) Lokola azalaki moko na “makonzí” ya lisangá na Yelusaleme, Yakobo yango ayebanaki mingi, boye Yuda asaleli nkombo na ye mpo na komiyebisa ye moko epai na bato. Lokola mpe azalaki ndeko na Yakobo, emonani polele ete Yuda azalaki mpe ndeko ya Yesu oyo babotamaki na ye mama moko, mpe atángami na molɔngɔ́ ya bandeko yango ya Yesu. (Gal. 1:19; 2:9; Mat. 13:55; Mko. 6:3) Nzokande, Yuda abendaki likebi likoló na bondeko na ye ya mosuni elongo na Yesu te, kasi na komikitisa nyonso abendi likebi likoló na boyokani ya elimo na komibéngáká ete “moombo na Yesu Klisto.”—1 Kol. 7:22; 2 Kol. 5:16; Mat. 20:27.
3. Nini ezali kondimisa bosolo ya mokanda ya Yuda?
3 Bosolo ya mokanda oyo endimisami na likambo oyo ete yango elobelami kati na Eteni ya Mokanda ya Muratori (Fragment muratorien), ya ekeke ya mibale T.B. Lisusu, Clément moto na Alesandalia (ekeke ya mibale T.B.) andimaki yango ete ezali eteni ya Makomami mapemami. Origène alobelaki yango ete ezalaki mosala ya “mwa milɔngɔ́ moke, kasi oyo motondi na maloba ya ngɔlu mauti na likoló.”a Tertullien mpe andimaki bosolo na yango. Ntembe ezali te ete yango ezali ndambo ya Makomami mapemami.
4. Mokanda ya Yuda mozali mokanda ya lolenge nini, ekoki kozala ete mokomamaki wapi, mpe nini emonisami na ntina na ntango ya kokomama na yango?
4 Yuda akomeli “babyangami,” kozanga kolobela lisangá moko to moto moko ya sikisiki; na yango, mokanda na ye mosengelaki kolekaleka esika na esika epai na baklisto banso. Atako yango eyebisami te, kasi emonani mingi mpenza ete mokanda yango mokomamaki na Palestine. Ezali mpe mpasi mpo na komonisa na bosikisiki mpenza dati ya kokomama na yango. Nzokande, yango esengeli kozala na boumeli ya eleko ya bokóli ya lisangá ya boklisto, mpamba te Yuda abendi likebi likoló na “maloba malobami liboso na minɔkɔ na Bantoma na Nkolo na biso, Yesu Klisto” mpe emonani ete atángi maloba ya 2 Petelo 3:3. (Yuda 17, 18) Lisusu, bokokani ezali makasi kati na mokanda ya Yuda 1-25 mpe mokapo ya mibale ya Mokanda ya Mibale ya Petelo. Yango emonisi ete akomaki mokanda na ye pene na ntango bobele moko na Petelo, kozaláká bango nyonso mibale na lobanzo mozindo na ntina na likámá oyo lizalaki liboso na lisangá na ntango wana. Boye, elobami ete mobu 65 T.B. ezalaki dati ya zingazinga ya bokomami na yango. Dati yango endimisami mpe na likambo oyo ete Yuda azali te kolobela bokei ya Cestius Gallus mpo na kosilisa botomboki ya Bayuda na mobu 66 T.B., mpe alobeli te kokwea ya Yelusaleme na mobu 70 T.B. Kati na mokanda na ye, Yuda azali kolobela bitumbu ya sikisiki oyo Nzambe akweisaki likoló na basáli na masumu mpe, soki na ntango wana Yelusaleme esilaki kokwea, mbɛlɛ alóngisaki lisusu bandimbola na ye, na kolobeláká kokweisama yango ya etumbu, mpe yango elingaki kobonga mpenza, mingimingi mpo ete Yesu asilaki kosakola likambo yango.—Yuda 5-7; Luka 19:41-44.
MAKAMBO MAZALI KATI NA YUDA
5. (a) Mpo na nini Yuda amoni ete esengeli kotindela babulami mokanda ete ‘bábunda makasi mpo na kobatela kondima’? (b) Bilakiseli nini ya makebisi Yuda atángi?
5 Makebisi na ntina na pite mpe na ntina na botyoli bonkolo (V. 1-16). Nsima ya kopesa mbote ya bolingo epai na “babyangami,” Yuda alobi ete azalaki na mposa ya kokoma mokanda “na ntina na lobiko na biso,” kasi amoni sikawa ete esengeli akomela bango ete ‘bábundela kondima.’ Mpo na nini bongo? Mpo ete bato bazangi kotosa Nzambe basili komikɔtisa na lolenge ya nkuku, kobongoláká ngɔlu ya Nzambe kino kokómisa yango ntina ya kozala na etamboli ya bosɔtɔ. Yuda alobi ete, bato yango “bakoangana ye Mokonzi moko mpenza mpe Nkolo na biso Yesu Klisto.” (V. 1, 3, 4) Akundweli bango ete, atako Yehova abikisaki libota moko na kobimisáká bango na Ezipito, nzokande na nsima “abomi bango bazangi kondima.” Lisusu, Yehova asili kobatela, “kino kosambisama na Mokolo yango monene,” baanzelu oyo batikaki esika na bango. Bobele bongo, etumbu ya seko oyo epesamaki na Sodomo mpe Gomola mpe bamboka ya zingazinga, ezali bongo elakiseli ya likebisi mpo na baoyo bazali ‘kosala pite mpe oyo bakei kino kosalela nzoto na motindo molongobani te.’—V. 5-7.
6. Mposa makasi nini batyoli na Nzambe bazali na yango, mpe bilakiseli nini Yuda asaleli mpo na komonisa mabe ya etamboli na bango mpe nsuka na yango?
6 Bobele bongo, batyoli na Nzambe ‘bakobebisaka nzoto, bakotyolaka bonkolo, bakotukaka bato na nkembo.’ Nzokande, ata Mikaele abimisaki maloba na kotuka te epai na Zábolo ntango bawelelaki nzoto ya Mose, kolobáká bobele ete: “[Yehova] apamela yo!” Kasi bato yango bazali kosalela maloba na kotuka mpe bamibebisi bango moko lokola banyama bazangi makanisi. Basili kolanda nzela ya Kaina, ya Balama, mpe ya motomboki Kola. Bazali lokola mabanga minene oyo mabombami na nsé na mai, lokola mapata mazangi mai, lokola nzeté oyo ekobotaka mbuma te, oyo ekufi mbala mibale mpe epikolami, lokola mbongé na kongala ya mai oyo ezali kobimisa fulu ya nsɔ́ni na bango, mpe bazali lokola minzoto oyo mizangi nzela ya kolanda. Mpo na bango, “mwindo na molili ebombameli bango libela.” (V. 8, 9, 13) Enoka asakolaki ete Yehova akokweisa bikateli na ye likoló na batyoli wana ya Nzambe. Bazali baimaimi mpe balelileli, mpe na moimi nyonso bazali kokumisa bato minene mpo na kozwa litomba.
7. (a) Lolenge nini bantoma bapesaki makebisi na ntina na batyoli? (b) Na kotalela elikya ya bomoi ya seko, “balingami” basengeli kosala nini mpo na bango moko mpe mpo na basusu?
7 Toli mpo na koumela kati na bolingo ya Nzambe (V. 17-25). Yuda akundweli bandeko lolenge oyo bantoma ya Nkolo Yesu Klisto bazalaki na momeseno ya kokebisa ete “na ntango na nsuka, basekaseki bakoya kotambolaka na motindo mokoyokaka mposa na bango na kilikili.” Bato yango ya kilikili bazali ‘bato na makambo na nzoto mpenza, baoyo bazangi elimo.’ Nzokande, “balingami” basengeli komilendisa kati na kondima mpe komibatela kati na bolingo ya Nzambe, wana bazali kozela motema mawa ya Klisto “kino na bomoi na seko.” Na ngala na bango, tiká ete bámonisa motema mawa epai na baoyo bazali kotengatenga. Yuda asukisi mokanda na ye na kopesáká nkembo, na nzela ya Yesu Klisto, epai na “Nzambe Mobikisi na biso,” Ye oyo akoki kobatela bango ete bátuta libaku te.—V. 18-21, 25.
LITOMBA NA YANGO
8. Lolenge nini Yuda asalelaki Makomami mapemami mpe “mokanda ya bozalisi” mpo na kopesa bandeko na ye toli?
8 Yuda ye moko amonaki ete Makomami mapemami mazalaki na litomba mpo na kokebisa, mpo na kolendisa, mpo na koyikisa mpiko, mpo na kolakisa, mpe mpo na kopesa toli epai na “balingami.” Na kotɔndɔláká lisumu monene ya batyoli na Nzambe, asalelaki bilakiseli ya nguya uta na Makomami ya Liebele, lokola elakiseli na ntina na Bayisalaele oyo bakweaki na bizaleli mabe, elakiseli ya baanzelu oyo basalaki masumu, mpe elakiseli ya bafándi na Sodomo mpe Gomola, komonisáká ete baoyo nyonso bazali kosala mabe motindo wana bakozwa etumbu motindo moko. Akokanisaki bato ya bizaleli mabe na banyama oyo bazangi makanisi, mpe alobaki ete bazalaki kolanda nzela ya Kaina, komikɔtisáká kati na mbeba ya Balama, mpe bakobeba lokola Kola mpo na maloba na bango ya botomboki. Abimisaki mpe bilakiseli ya nguya longwa na “mokanda ya bozalisi.” Mokanda ya Yuda oyo mozali na elobeli ya polele mokómaki yango moko eteni ya “Makomami nyonso,” oyo esengeli koyekolama elongo na biteni nyonso mosusu ya Makomami, kolendisáká etamboli ya sembo “na ntango na nsuka.”—Yuda 17, 18, 5-7, 11-13; Mit. 14:35-37; Gen. 6:4; 18:20, 21; 19:4, 5, 24, 25; 4:4, 5, 8; Mit. 22:2-7, 21; 31:8; 16:1-7, 31-35.
9. Mpo na nani mposa ya makebisi ya Yuda ezali naino kino lelo, mpe kati na makambo nini baklisto basengeli kokóba komilendisa?
9 Botɛmɛli mpe komekama oyo eutaki na bato ya libándá elóngaki te kokanga bokóli ya lisangá ya boklisto, kasi sikawa bandeko bazali na likámá ya kobebisama oyo liuti na kati ya lisangá. Mabanga mabombami na nsé na mai mazalaki koluka kozindisa lisangá mobimba. Koyebáká ete likámá yango likokaki koyeisa mbeba minene koleka, Yuda alendesi mpenza likambo litali ‘kobunda etumba makasi mpo na kobatela kondima.’ Na eleko ya Yuda, mokanda na ye moyaki mpenza na ntango mposa ezalaki; bobele bongo, yango eyei mpenza na ntango ebongi na eleko na biso. Mposa ya makebisi motindo wana ezali naino. Kondima esengeli ntango nyonso kobatelama mpe kobundelama, pite esengeli kopikolama, babɛti ntembe basengeli kosalisama na motema mawa nyonso mpe, soki likoki lizali, ‘basengeli kobɔtɔlama longwa na mɔ́tɔ.’ Mpo na kobatela bosembo na bizaleli malamu, bokasi ya elimo, mpe losambo ya solo, baklisto basengeli lelo kokóba komilendisa kati na kondima oyo eleki bulɛɛ. Basengeli kotosa mitindá ya sembo mpe kobɛlɛma epai na Nzambe na nzela ya libondeli. Basengeli mpe kozala na limemya mpo na “bonkolo,” kotosáká bokonzi botyami na Nzambe kati na lisangá ya boklisto.—Yuda 3, 23, 8.
10. (a) Lolenge nini lisangá lisengeli kotalela bato ya makambo ya nzoto mpenza, mpe yango ekobimisa nini? (b) Mbano nini ezali kozela basangoli ya Bokonzi, mpe bango bazali kosangana na Yuda kati na likambo nini?
10 ‘Bato na makambo na nzoto mpenza, baoyo bazangi elimo,’ bakokɔta soko moke te na Bokonzi ya Nzambe mpo ete bakozala ntango nyonso kotya, kati na likámá, baoyo bazali kotambola na nzela ya bomoi ya seko. (Yuda 19; Gal. 5:19-21) Lisangá lisengeli kokebisama na ntina na bango mpe lisengeli kobwaka bango! Na bongo, “mawa mpe kimya mpe bolingo” ekoyikana epai na balingami, mpe bakomibatela kati na bolingo ya Nzambe, ‘wana bazali kozela motema mawa ya Nkolo Yesu Klisto kino bomoi ya seko.’ Nzambe Mobikisi akotɛlɛmisa basangoli ya Bokonzi “na kozanga litɔnɔ liboso na nkembo na ye na esengo monene.” Ya solo, basangoli yango basangani elongo na Yuda mpo na kopesa “nkembo, mpe monene mpe nguya mpe bokonzi” epai na Ye na nzela na Yesu Klisto.—Yuda 2, 21, 24, 25.
[Maloba na nse ya lokasa]
a The Canon of the New Testament, 1987, ekomami na B. M. Metzger, lokasa 138.