Mokanda ya Biblia nimero 52—1 Batesaloniki
Mokomi: Paulo
Esika ya bokomi: Kolinti
Nsuka ya bokomi: soko 50 T.B.
1. (a) Nini esalaki ete mokanda ya Batesaloniki ya Liboso ekomama? (b) Yango ekomamaki ntango nini, mpe na nini mokanda yango mokeseni na mikanda mosusu?
EZALAKI soko na mobu 50 T.B. nde ntoma Paulo, na boumeli ya mobembo na ye ya mibale mpo na mosala ya kosakola, akendeki na Tesaloniki, engumba ya Makedonia, mpe abandisaki lisangá moko ya boklisto kuna. Na boumeli ya mbula moko, ntango azalaki na Kolinti elongo na Silwano (oyo abéngami Sila na mokanda ya Misala) mpe Timoté, Paulo apusamaki na kokoma mokanda na ye ya liboso epai na Batesaloniki mpo na kobɔndisa bango mpe kolendisa bango kati na kondima. Ezalaki mbala mosusu na nsuka ya mobu 50 T.B. Emonani ete mokanda oyo mokeseni na mikanda misusu mpamba te yango ezali mokanda ya liboso kati na makomi ya Paulo oyo mondimamaki lokola eteni ya Makomami mapemami ya Biblia mpe, longola mbala mosusu Evanzile ya Matai, yango ezali mokanda ya Makomami ya Greke ya boklisto oyo mokomamaki liboso.
2. Bilembeteli nini bimonisi mokomi mpe bosolo ya Batesaloniki ya Liboso?
2 Bilembeteli oyo bizali kosimba bosolo mpe bosembo ya mokanda oyo bizali mingi mpenza. Paulo amimonisi ete azali mokomi na yango na kotángáká nkombo na ye, mpe makambo mazali kati na mokanda yango mayokani mpenza na makambo oyo mazali na mikanda nyonso mosusu ya Liloba lipemami. (1 Tes. 1:1; 2:18) Nkombo ya mokanda yango etángami kati na bakataloge mingi ya kala ya Makomami mapemami, sangisá mpe Eteni ya mokanda ya Muratori (Fragment muratorien).a Batesaloniki ya Liboso etángami to elobelami na bakomi mingi ya kala oyo bazalaki bakonzi ya mangomba, bakisá mpe Irénée (na ekeke ya mibale T.B.), oyo atángi yango na nkombo. Papirise Chester Beatty No. 2 (P46), ya mobu soko 200 T.B., ezali na Batesaloniki ya Liboso kati na yango, mpe papirise mosusu ya ekeke ya misato (P30), oyo ezali sikawa na Gand, na mokili ya Belgique, ezali na eteni ya Batesaloniki ya Liboso mpe na eteni ya Batesaloniki ya Mibale kati na yango.b
3, 4. Makambo nini mabimaki na bolóngi ya ebandeli ya mosala ya kosakola ya Paulo na Tesaloniki?
3 Mwa botaleli moke ya lisoló mokuse ya lisangá ya Tesaloniki, liboso ete Paulo akoma mokanda oyo, ekomonisa ntina ya lobanzo ya Paulo mpo na bandeko oyo bazalaki na engumba wana. Longwa na ebandeli mpenza, lisangá yango lizwaki minyoko mpe botɛmɛli makasi. Kati na Misala mokapo 17, Luka ayebisi boyei ya Paulo mpe Sila na Tesaloniki, “kuna ezalaki eyanganelo na Bayuda.” Na boumeli ya Sabata misato, Paulo ateyaki bango, kososoláká na bango kati na Makomami; mpe ezali na makambo oyo mamonisi ete afandaki kuna mikolo mingi koleka Sabata misato, mpamba te komibongisela esika mpo na kosala mosala na ye ya mosuni ezwaki ntango mpe, likoló na nyonso, kotya mpe kobongisa lisangá [ya sika] ezwaka ntango mingi.—Mis. 17:1; 1 Tes. 2:9; 1:6, 7.
4 Lisoló lizwami na Misala 17:4-7 liyebisi polele makambo oyo mabimaki na mosala ya kosakola ya Paulo kati na Tesaloniki. Koyokáká zúwa na ntina na bolóngi ya mosala ya boklisto oyo Paulo asalaki, Bayuda basangisaki etuluku monene ya bato mpe bakɔtisaki engumba mobimba kati na yikiyiki. Bakɔtaki na mobulu nyonso kati na ndako ya Yasona, bamemaki ye mpe bandeko mosusu epai na bayangeli ya engumba, kongangáká ete: “Bato wana, baoyo basili kobalola mokili, bakómi awa lokola. Yasona mpe asili konyangela bango. Bango wana nyonso bakosopaka mibeko na Kaisala, mpe bakolobaka ete mokonzi mosusu Yesu azali.” Yasona mpe basusu basɛngisamaki na makasi ete báfuta lomande liboso ete bátika bango. Mpo na libateli ya bandeko kati na lisangá, mpe mpo na libateli na bango moko, Paulo mpe Sila bakimisamaki na butu mpo na kokende na Beloya. Kasi lisangá ya Tesaloniki lisilaki kosalama.
5. Lolenge nini Paulo amonisaki lobanzo mozindo mpe likebi ya bolingo mpo na lisangá ya Tesaloniki?
5 Botɛmɛli ya nsɔ́mɔ bouti na Bayuda elandaki Paulo kino na Beloya mpe elingaki kosukisa mosala na ye ya kosakola kuna. Na bongo, akendaki na Atene, na Grèce. Azalaki ntango nyonso na mposa ya koyeba lolenge bandeko na ye na Tesaloniki bazalaki koyika mpiko na nsé na minyoko. Amekaki, mbala mibale, kozongela bango kasi, na mbala yango nyonso ‘Satana akangaki ye nzela.’ (1 Tes. 2:17, 18) Komibanzabanzáká mpo na lisangá yango ya sika mpe koyebáká minyoko oyo bazalaki kokutana na yango, Paulo atindaki Timoté ete azonga na Tesaloniki mpo na kobɔndisa bandeko mpe kosala ete bázala lisusu ngwi kati na kondima. Ntango Timoté ayaki na nsango ya kolendisa mpenza, Paulo atondaki na esengo na ntina na bosembo ya solosolo oyo bazalaki na yango kati na minyoko makasi. Na ntango yango, lisoló na bango likómaki ndakisa malamu epai na bandimi kati na Makedonia mobimba mpe Akaya. (1:6-8; 3:1-7) Paulo amonisaki botɔ́ndi mingi epai na Yehova Nzambe mpo na mpiko na bango ya sembo, kasi asosolaki lisusu ete, wana bazalaki kokóla kino kokóma bato bakɔmeli, bazalaki lisusu na mposa ya kozwa litambwisi mpe toli. Na yango, ntango azalaki na Kolinti elongo na Timoté mpe Silwano, Paulo akomaki mokanda na ye ya liboso epai na Batesaloniki.
MAKAMBO MAZALI KATI NA BATESALONIKI YA LIBOSO
6. Na makambo nini Paulo akumisi Batesaloniki?
6 Batesaloniki bazali ndakisa mpo na bandimi mosusu (1:1-10). Paulo abandi mokanda na ye epai na Batesaloniki na makumisi ya mɔ́tɔ mpenza mpo na mosala ya sembo, mosala makasi oyo motondi na bolingo mpe mpiko na bango esimbami na elikya. Nsango malamu oyo esakolamaki epai na bango esalamaki bobele na maloba mpamba te, kasi ‘lisusu na nguya mpe na endimiseli makasi.’ Komekoláká ndakisa oyo epesamelaki bango, Batesaloniki bandimaki liloba “na esengo oyo eyei na elimo santu” mpe bango moko bakómaki ndakisa mpo na bandimi nyonso kati na Makedonia, na Akaya, mpe ata na bisika mosusu. Basilaki mpenza kobongwana longwa na bikeko na bango, ‘mpo na kosalela Nzambe ya bomoi mpe ya solo lokola baombo, mpe kozela Mwana na ye ete aya uta makoló.’—1:5, 6, 9, 10, NW.
7. Ezaleli nini Paulo mpe baninga na ye bamonisaki ntango bazalaki kati na Batesaloniki, mpe balendisaki bango na kosala nini?
7 Lobanzo ya bolingo oyo Paulo azali na yango mpo na Batesaloniki (2:1–3:13). Nsima ya kozwa minyoko ya nsɔ́ni na Filipi, Paulo mpe baninga na ye bayikinyaki mpiko na bango mpo na kolanda kosakola epai na Batesaloniki. Soki basalaki yango ezalaki mpo na kosepelisa bato te, to mpo na komilingisa na bato te, to mpe mpo na kozwa lokumu uta na bato te. Kútu, Paulo alobi ete “tokómi bato na malɛmbɛ [“boboto,” NW] na kati na bino pelamoko mama oyo azali kobokɔla bana na ye mpenza. Boye, awa ezalaki biso na bolingo monene epai na bino, toselingwi kokabela bino bobele Nsango Malamu na Nzambe te kasi bomoi [“milimo,” NW] na biso mpenza, mpo ete bosili kokóma balingami na biso.” (2:7, 8) Bakóbaki kolendisa Batesaloniki, lolenge tata asalaka epai na bana na ye, ete bálanda kotambola na motindo mobongi na Nzambe, oyo abyangaki bango na Bokonzi mpe nkembo na ye.
8. Na lolenge nini Batesaloniki bakómaki ntina ya esengo mpo na Paulo, mpe asali libondeli nini mpo na bolamu na bango?
8 Paulo akumisi bango na lolenge bayambaki nsango malamu na mposa mingi, mpo ete yango ezali “Liloba na Nzambe.” Bazali bango moko te mpo na kozwa minyoko uta na bato ya mokili na bango mpenza, mpamba te bandimi ya liboso kati na Yudea bazwaki minyoko motindo moko uta na Bayuda. Komibanzabanzáká mpo na bolamu na bango, Paulo alingaki, na mabaku mibale, kokende ye moko epai na bango kasi Satana akangaki ye nzela. Mpo na Paulo mpe basalani na ye, bandeko ya Tesaloniki bazali motole ya esengo, ‘nkembo na bango mpe esengo na bango.’ (2:13, 20) Ntango akokaki lisusu kokanga motema te na kozanga nsango na bango, Paulo atindaki Timoté na Tesaloniki mpo na kokembisa kondima na bango mpe mpo na kobɔndisa bango. Lokola Timoté azongi na nsango malamu ya bokóli na bango na elimo mpe bolingo na bango, ntoma azwi kobɔndisama mpe esengo. Paulo apesi Nzambe matɔ́ndi mpe abondeli ete Nkolo ayeisa bokóli kati na bango, ete bákoka kofuluka kati na bolingo bamoko epai na bamosusu, mpe ete mitema na bango mikoka “kozanga ekweli” liboso na Nzambe Tata na ntango na koya ya Nkolo Yesu.—3:13.
9. Paulo apesi toli nini na ntina na ezaleli ya bulɛɛ mpe bolingo ya moko epai na mosusu?
9 Kosala kati na bulɛɛ mpe na lokumu (4:1-12). Paulo akumisi Batesaloniki mpo na etamboli na bango ya kosepelisa Nzambe, mpe alendisi bango ete bákóba kosala bongo na koleka. Moto na moto “ayeba kozwa mwasi [“mbeki,” NW] na ye moko kati na bulɛɛ mpe na litosi, mpo na mposa mabe na nzoto te.” Na yango, moto moko te asengeli komikɔtisa kati na ntómo ya ndeko na ye. Mpo ete Nzambe abyangaki bango, “na bosɔtɔ te kasi kati na bulɛɛ. Bongo, ye oyo akoboya kotosa likambo oyo azali koboya kotosa moto te kasi Nzambe.” (4:4, 5, 7, 8) Paulo akumisi Batesaloniki mpo ete bazali komonisa bolingo bamoko epai na bamosusu, mpe alendisi bango ete básalaka bongo na koleka, komityeláká mokano ya kofanda na kimya, kotalela makambo na bango moko mpe kosala na mabɔkɔ na bango. Mpamba te basengeli komitambwisa na bopɛto nyonso “liboso na bato na libándá.”—4:12.
10. Ezaleli nini bandeko basengeli kozala na yango na ntina na baoyo basili kolala kati na kufa?
10 Elikya ya lisekwa (4:13-18). Mpo na baoyo bazali kolala kati na kufa, bandeko basengeli komitungisa te lokola baoyo bazangi elikya. Soki bazali na kondima ete Yesu akufaki mpe azongaki lisusu na bomoi, boye na nzela na Yesu, Nzambe akolamwisa basusu oyo basili kolala kati na kufa. Na koya ya Nkolo, akokita longwa na likoló na mbelá ya mokonzi, “mpe bakufi kati na Klisto bakosekwa liboso.” Na nsima, baoyo bakozala naino na bomoi ‘bakonɛtwa kati na mapata mpo na kokutana na Nkolo kati na mopɛpɛ,’ mpo na kozala ntango nyonso elongo na Nkolo.—4:16, 17.
11. Mpo na nini Batesaloniki basengeli kozala ntango nyonso na bokɛngi, mpe basengeli kokóba kosala nini?
11 Kozala na bokɛngi lokola mokolo ya Yehova mozali kobɛlɛma (5:1-28). “Mokolo na Nkolo ekoya lokola moyibi kati na butu.” Ezali na ntango bato bakozala koloba ete “kimya ezali, makambo mazali te”! nde libebi likokwela bango pwasa. Na yango, tiká ete Batesaloniki bázala ntango nyonso na bokɛngi lokola “bana na pole mpe bana na moi,” kobateláká makoki na bango ya kososola mpe kolatáká “ebolo na kondima mpe bolingo na ntolo mpe na motó elikya na lobiko lokola ekɔti.” (5:2, 3, 5, 8) Oyo ezali ntango mpo na bango ete bábɔndisanaka mpe bálendisanaka moko na mosusu. Tiká ete banso bápesaka ‘limemya mozindo kati na bolingo’ epai na baoyo bazali kosala mosala makasi kati na bango, oyo batyami batambwisi. Epai mosusu, bato na misala ya wusuwusu basengeli kokebisama, bato na bolɛmbu kolendisama, mpe esengeli komonisa motema molai epai na bato banso. Ɛɛ, Paulo akomi ete “ntango nyonso bómekaka kosalelana malamu kati na bino mpenza mpe na bato nyonso.”—5:13, 15.
12. Likoló na makambo nini ya ntina Paulo apesi toli na nsuka, mpe lolenge nini asukisi mokanda na ye epai na Batesaloniki?
12 Na nsuka, Paulo apesi toli likoló na mwa makambo mingi ya ntina ete: ‘Bósepelaka ntango nyonso. Bóbondelaka ntango nyonso, bópesaka matɔ́ndi mpo na makambo nyonso. Bóbatela mɔ́tɔ ya elimo. Bótyola bisakweli te. Bómeka makambo nyonso mpe bósimba ya malamu ngwi. Bóboya lolenge nyonso ya mabe.’ (5:16-22) Na nsima abondeli mpo ete Nzambe na kimya abulisa bango mpenza mpe bázanga efundeli na elimo, na molimo mpe na nzoto, na ntango Nkolo Yesu Klisto akoya. Asukisi mokanda yango na maloba ya mɔ́tɔ ya kolendisa mpe na kopesáká lilako ete mokanda yango mótángama liboso na bandeko nyonso.
LITOMBA NA YANGO
13. Na nini Paulo mpe baninga na ye bazalaki ndakisa malamu, mpe bopusi nini bolingo oyo emonisami uta na motema ezali na yango kati na lisangá?
13 Kati na mokanda oyo, Paulo amonisi elimo ya komibanzabanza na bolingo mpo na bandeko na ye. Ye mpe basalani na ye batikaki ndakisa malamu ya bolingo mozindo, kopesáká bobele nsango malamu ya Nzambe te, kasi ata milimo na bango moko mpo na bandeko na bango balingami oyo bazalaki na Tesaloniki. Tiká ete bakɛngɛli nyonso básala makasi na kozwa bikanganeli ya bolingo motindo wana elongo na masangá na bango! Lolenge wana ya komonisa bolingo ekopusa banso ete bámonisana bolingo bamoko na bamosusu, lokola Paulo alobaki ete: “Tiká mpe ete Nkolo akólisa mpe afulukisa bolingo na bino kolingana, moko epai na mosusu, mpe kolinga bato nyonso pelamoko biso epai na bino.” Bolingo mozindo wana kati na libota mobimba ya Nzambe ezali kopesa kolendisama ya solosolo. Ezali kosala ete mitema mizanga “ekweli kati na bulɛɛ liboso na Nzambe, Tata na biso, wana Nkolo na biso Yesu akomonana esika moko na Babulami nyonso na ye.” Yango ezali kotangola baklisto na mokili oyo mabe mpe ya mbindo na ntina ete bátambola kati na bulɛɛ mpe na kosantisama mpe, na bongo, básepelisa Nzambe.—3:12, 13; 2:8; 4:1-8.
14. Na lolenge nini mokanda ya Batesaloniki ya Liboso ezali ndakisa kitoko ya toli oyo epesami na bokɛngi mpe na bolingo nyonso?
14 Mokanda oyo mozali kopesa ndakisa malamu ya toli oyo etondi na bokɛngi mpe na bolingo kati na lisangá ya boklisto. Atako bandeko ya Tesaloniki bazalaki na molende mpe sembo, ezalaki na makambo mosusu oyo masengelaki kosembolama. Nzokande, kati na moko na moko ya makambo yango, Paulo azali libosoliboso kokumisa bandeko mpo na bizaleli malamu na bango. Na ndakisa, liboso ya kopesa likebisi na ntina na misala ya mbindo, akumisi bango naino mpo na etamboli na bango ya kosepelisa Nzambe mpe na nsima alendisi bango ete bákóba kosala bongo ‘lisusu koleka,’ moto na moto abatela mbeki na ye kati na bulɛɛ mpe lokumu. Mpe nsima na kokumisa bango na ntina na bolingo na bango mpo na bandeko, alendisi bango ete bálanda kosala bongo “lisusu mpe lisusu,” kotaleláká makambo na bango moko mpe kozaláká na bomoi ya pɛto liboso na bato na libándá. Na bokɛngi mpenza, Paulo akambi bandeko na ye na ‘kolanda kosalelana makambo malamu bango na bango mpe epai na basusu banso.’—4:1-7, 9-12; 5:15.
15. Nini emonisi ete Paulo asakolaki elikya ya Bokonzi na molende nyonso ntango azalaki na Tesaloniki, mpe toli malamu nini apesaki na ntina na yango?
15 Na mabaku minei, Paulo alobeli “koya” ya Yesu Klisto. Emonani ete baklisto ya Tesaloniki oyo bautaki kokóma bandimi kala mingi te bazalaki mpenza kosepela na liteya wana. Ntango azalaki na engumba na bango, ntembe ezali te ete Paulo asakolaki na mpiko mpenza Bokonzi ya Nzambe oyo epesami na mabɔkɔ ya Klisto, lokola yango emonisami na efundeli oyo bafundaki ye mpe baninga na ye ete: “Bango wana nyonso bakosopaka mibeko na Kaisala, mpe bakolobaka ete mokonzi mosusu Yesu azali.” (Mis. 17:7; 1 Tes. 2:19; 3:13; 4:15; 5:23) Bandeko ya Tesaloniki batyaki elikya na bango na Bokonzi mpe, kozaláká na kondima epai na Nzambe, bazalaki kozela “Mwana na ye uta na Likoló, ye oyo asekwisi ye kati na bakufi, ye Yesu,” mpo na kobikisa bango na nkanda oyo ezali koya. Bobele bongo, baoyo nyonso bazali kolikya na Bokonzi ya Nzambe lelo oyo basengeli kolanda toli kitoko ya Batesaloniki ya Liboso oyo etali kofuluka kati na bolingo, kozala na mitema ngwi mpe mizangi ekweli, na boye ete ‘bákóba kotambola na motindo mobongi na Nzambe oyo azali kobyanga bango na Bokonzi mpe na nkembo na ye.’—1 Tes. 1:8, 10; 3:12, 13; 2:12.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá etánda “Bakataloge minene ya kala ya Makomami ya Greke ya boklisto,” na lokasa 303.
b The Text of the New Testament, ya Kurt mpe Barbara Aland, oyo ebongolamaki na E. F. Rhodes, na 1987, nkasa 97, 99.