Loyembo 174
Tósɛnzɛla, tótɛlɛma ngwi mpe na makasi
1. Batelá kondima na yo
N’etumba mpo na sembo.
Monisá molende na yo,
Okolónga na yango.
Tólanda Gédéon Monene!
Mboka ya Madiani, tózinga!
Mpe mosika te, tokonganga,
Mokili mooka nsɔmɔ.
2. Batelá elimo na yo.
Tosá na ntango inso.
Zalá sé n’esika na yo.
Landá Nkolo na sembo.
Azali ndakisa malamu,
Landá ye mp’ozwa ngolu’a Nzambe.
Mpo ete tókoka kolónga,
Tósala na bomoko.
3. Zalá motema molai.
Talelá sé Yehova.
Akangi monguna na ye;
Solo akobomama.
Tozali kozela etindá,
Lokola, bato ya Gédéon.
Tótosa mibeko ya Nzambe;
Mp’elónga, ye akozwa.
4. Tósɛnzɛla ntango inso!
Tólóngisa solo bɛɛ.
Tokambami na Yehova,
N’ebongiseli na ye.
Basodá’a Nzambe, tóloba’te:
‘Mopanga na Yah mpe Gédéon!’
Tósɛnzɛla, tótɛlɛma ngwi,
Tokobika nsuka te.