Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/97 lok. 8
  • Tósalisa bazalani na biso ete bálendisama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tósalisa bazalani na biso ete bálendisama
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Tómekola Yehova na komibanzabanzáká mpenza mpo na bazalani na biso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tósakola nsango malamu ya Bokonzi na lisalisi ya mwa babúku
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tósalela mwa babúku ndenge na ndenge kati na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Ndenge ya kosalela mwa buku ya sika Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 8/97 lok. 8

Tósalisa bazalani na biso ete bálendisama

1 Bato mingi balembi na koyoka ntango nyonso kolobelama ya makámá, bitumba, kobomana mpe bampasi. Kolendisama, atako ezali komonana te na bipanzeli nsango, ezali mpenza likambo oyo bato bazali na mposa na yango. Kolendisa moto, to kobɔndisa ye, elimboli kopesa ye makasi mpe bantina ya kozala na elikya, kosalisa ye na kolónga mokakatano moko. Batatoli ya Yehova babongisami mpo na kopesa lisalisi ya lolenge yango. (2 Kol. 1:3, 4) Mwa babúku na biso oyo ezwi moboko na yango na Biblia, oyo tokokabola na Augústo mpe na Sɛtɛ́mbɛ, ezali na nsango ya solo mpe ya libɔndisi. (Lom. 15:4) Talá mwa makanisi oyo makoki kosalisa biso na kokabola yango na mabaku makeseni:

2 Likambo moko ya mawa oyo esalami ekoki kopesa biso libaku ya kopesa litatoli mpe ya kolendisa bazalani na biso na maloba lokola oyo:

◼ “Ntango makambo ya lolenge oyo mazali kosalama, bamoko bazali komituna soki ya solo Nzambe azali, mpe soki ezali bongo, bazali komituna soki amibanzabanzaka mpo na biso. Okanisi nini mpo na yango? [Tótika moto yango ayanola.] Moko na lolenge ya koyeba soki Nzambe azali ezali bongo kosalela motindá moko oyo eyebani malamu.” Tótánga Baebele 3:4. Tólobela biloko mosusu oyo bizingi biso mpe oyo bizalisamaki mpenzampenza. Na nsima tókoba: “Nazali na mwa búku oyo okomona ya solo ete ezali kolendisa. Ezali na motó na likambo ete Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso? [Tótánga mituna oyo mizali na lokasa ya ebandeli.] Mwa búku yango ezali kopesa bilembeteli ya kondimisa, bobele te ete Nzambe azali, kasi mpe ete mosika te akosukisa bizalela ya kozanga sembo oyo tozali komona yango lelo oyo. Okosepela kotánga yango?” Na nsima tóyokana mpo na bozongeli ya sika.

3 Na ntango ya bozongeli ya sika, tokoki koloba ete:

◼ “Tosololaki na ntina na elembeteli oyo ezali komonisa ete Nzambe azali mpe natikelaki yo mwa búku Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso? Ntango mosusu omonaki likanisi yango na lokasa 7. [Tómonisa elilingi mpe tólobela na mokuse paragrafe 15.] Ezali bobele ndakisa moko kati na bandakisa mosusu mpo na komonisa ete ezali solo na Nzambe moko oyo azali komibanzabanza mpo na biso. [Tótánga na lokasa 8 na paragrafe 27.] Boyekoli ya ngai moko ya Biblia ezali kosalisa ngai mpo na kolónga mikakatano ya bomoi ya mokolo na mokolo mpamba te ezali kopesa likanisi ya Nzambe likoló na makambo tozali kokutana na yango.” Tósɛnga moto yango ete tólakisa ye lolenge toyekolaka.

4 Kosakola na nzela ya telefone na lisalisi ya mwa búku “Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?” Tokoki komiyebisa mpe koloba ete:

◼ “Nazali kobenga yo mpo na likambo moko ya ntina mpamba te nazali na likoki ya koya kotala yo ngai moko te.” Tótánga paragrafe ya liboso na lokasa 4 ya mwa búku, tósala yango lokola soki nde tozalaki liboso ya moto yango. Tótuna likanisi na ye mpe tótika ye ayanola. “Biblia na ngai efungolami na Yisaya 45:18. Mokapo yango ezali komonisa ete mabelé masalamaki mpo na biso. Nakoki kotángela yo yango?” Na nsima, tólimbola mokano ya mwa búku yango mpe tótuna ye soki tokoki komemela ye mwa búku moko.

5 Na ntango ya libyangi ya mbala ya nsima, tokoki komeka lolenge oyo mpo na kobanda boyekoli:

◼ “Nalingi kokóba lisoló na biso ya mbala eleki na ndakisa moko oyo ezali komonisa epai ya nani tosengeli koluka biyano na ntina na bomoi. [Tólobela na mokuse mwa búku But de la vie na lokasa 6 na paragrafe 1 mpe paragrafe 2.] Emoniseli 4:11 ezali kolimbola ete Yehova Nzambe azali Mozalisi na biso. [Tótánga versɛ́.] Ya solo, azalaki na ntina mpo na yango akelaki biso. Bato mingi oyo balingaki koyeba ntina yango bamipesaki na boyekoli ya Liloba ya Nzambe, Biblia. Nalingi kopesa yo libaku yango.” Tólimbola ndenge nini tosalaka boyekoli ya Biblia na ndako kozanga kofuta mbongo mpe tóyokana mpo na kobanda boyekoli.

6 Lolenge malamu oyo ya bokɔti na lisoló ekoki kolendisa bato oyo bakufeli moto oyo bango balingaka:

◼ “Nazali kosangana na mosala oyo etaleli bato nyonso oyo bakufeli moto moko oyo bango balingaka. Ezali solo moko ya makambo maleki mpasi mpo na kolónga. Yango wana mwa búku oyo ezali na motó na likambo ete Soki moto oyo olingaka akufi. . . ebongisamaki. Esili kosalisa bamilió ya bato. Nalingi komonisa yo oyo yango ezali koloba na ntina na elaka moko ya kitoko Yesu Klisto apesaki. [Tótánga na lokasa 26 na paragrafe 5, bakisa mpe Yoane 5:21,  28, 29.] Talá elilingi oyo, na lokasa 29​—ezali komonisa Lasalo oyo asekwisamaki na Yesu lokola yango eyebisami kati na Baevanzile. Soki osepeli kotánga mwa búku oyo ezali kolendisa, nakosepela kotikela yo yango.”

7 Na ntango ya bozongeli ya sika, tokoki komonisa lisusu elilingi oyo ezali na lokasa 29 ya mwa búku “Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ,” mpe koloba ete:

◼ “Mbala eleki, tosololaki na ntina na lisekwa ya Lasalo. [Tótánga maloba oyo mazali kolimbola elilingi oyo mazali na lokasa 28 mpe tótalela makanisi oyo mamonisami na motó na likambo moke “Esalemaki solo?”] Soki motema na yo ezali kolikya ete mokolo mosusu okoki komona moto oyo akufaki, tiká ete nasalisa yo ozwa mpe elikya ya lisekwa.” Na nsima tósɛnga ye ete ayekola Biblia.

8 Tiká ete tósala nyonso oyo ekoki na biso na basanza ekolanda mpo na komekola Yesu mpe “kobɔndisa baoyo bazali kolela.”​— Yis. 61:2.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto