Loyembo 114
Bolingo ya sembo ya Nzambe
1. Nzambe, yo bolingo;
Ekimelo na biso.
Y’opesi Mwana na yo,
Mpo akufela biso.
Tózala na bosembo.
Y’okosalisa biso.
(Mondimo)
2. Nzambe, yo bolingo;
Ozali mpo na seko.
Y’okokisi elaká.
Klisto azwi Bokonzi.
Akoboma batuki.
Mpo batyoli mibeko.
(Mondimo)
3. Nzambe, yo bolingo;
Yo mosungi na biso.
Y’otii moombo ya sembo,
Ye moleisi na biso.
Amemi nkombo na yo.
Mpe akumisi yango.
(Mondimo)
4. Nzambe, yo bolingo;
Tokosalela sé yo.
Tosunga basɔkɛmi
Mpo, bosembo, bálanda.
Tokoki kotatwela
Bango ndako na ndako.
(MONDIMO)
Bato na mposa na mai,
Bóya mpo na komela.
Oyo nde mai ya bomoi,
Euti na Nzambe.