Loyembo 108
Liloba ya Yehova lizali sembo
1. Liloba’a Nzambe likoleka te
Lokola mbul’ekonɔkaka;
Ekokita kino komwangisa
Mabelé ete ebota mbuma.
2. Na Yisraele, Yosu’alobaki:
‘Nzambe aleki na boboto.
Mpe bilaká apesaki bino,
Yango nyonso ekokani solo.’
3. Yehova Nzambe nd’alobi ete:
‘Nalápi ndai na nkombo na nga.’
Babulami bandimisami ’te,
Bilaká na ye bikokokana.
4. Ɛ Yah, tondimi maloba na yo;
Oyebi kotosa bilaká.
Na Paladis’osaleli biso,
Ntango nyonso, y’okokumisama.