Mokapo 3
Nani azali Nzambe ya solo?
1. Mpo na nini bato mingi bazali kondima maloba ya ebandeli ya Biblia?
WANA ozali kotala likoló na ntango butu engɛngisami, ozali mpenza kokamwa na komona ebele ya minzoto, boye te? Lolenge nini okoki kolimbola yango? Mpe ezali boni mpo na biloko ya bomoi oyo bizali awa na mabelé—bafololo ya lángi ndenge na ndenge, bandɛkɛ elongo na nzembo na yango ya kitoko, babalɛ́nɛ ya nguya mingi oyo ezali kotambola kati na mai monene? Biloko yango bikoki nyonso kotángama te. Nyonso wana ekokaki kobima yango moko te. Likambo ya kokamwa ezali te na komona ete mingi bazali kondima maloba na yambo ya Biblia oyo ete: “Na ebandeli Nzambe azalisaki makoló mpe mabelé”!—Genese 1:1, NW.
2. Biblia eyebisi nini na ntina na Nzambe, mpe elendisi biso na kosala nini?
2 Bokabwani ezali makasi kati na bato na ntina na likambo litali Nzambe. Basusu bakanisaka ete Nzambe azali nguya moko boye. Bamilió ya bato bazali kosambela bankɔ́kɔ na bango oyo basilá kokufa, kokanisáká ete Nzambe azali mosika mingi na boye ete likoki ezali te ya kobɛlɛma epai na ye. Kasi Biblia emonisi ete Nzambe ya solo azali mpenza moto oyo asepelaka makasi na moko na moko kati na biso. Yango wana ezali kolendisa biso ete “tóluka Nzambe” koyebisáká ete: “Azali mpe mosika na moto na moto na biso te.”—Misala 17:27.
3. Mpo na nini likoki ezali te ya kosala ekeko ya Nzambe?
3 Nzambe akokani na nini? Bobele bato moke kati na basaleli na ye nde bazwaki bimonaneli ya nkembo na ye. Kati na bimonaneli yango amimonisaki na lolenge ya elilingi lokola ete afandi na kiti ya bokonzi, kongɛnga ya kokamwa ezalaki kouta epai na ye. Nzokande, baoyo bazwaki bimonaneli motindo wana balobelaki soko moke te lolenge ya elongi na ye. (Danyele 7:9, 10; Emoniseli 4:2, 3) Ezali bongo, mpamba te “Nzambe azali elimo”; azali na nzoto ya mosuni te. (Yoane 4:24, NW) Ya solo, likoki ezali te mpo na komonisa na sikisiki elilingi ya Mozalisi na biso, mpamba te “moto ata moko te asili komona Nzambe.” (Yoane 1:18; Exode 33:20) Nzokande, Biblia ezali koteya biso makambo mingi na ntina na Nzambe.
NZAMBE YA SOLO AZALI NA NKOMBO
4. Tángá mwa bibéngeli ya lokumu oyo esalelami mpo na Nzambe kati na Biblia?
4 Kati na Biblia, Nzambe ya solo amonisami na maloba lokola “Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso,” “Oyo Aleki-Likoló,” “Mozalisi Monene,” “Molakisi Monene,” “Nkolo-Mokonzi,” mpe “Mokonzi ya seko.” (Genese 17:1; Nzembo 50:14; Mosakoli 12:1; Yisaya 30:20; Misala 4:24; 1 Timoté 1:17) Kokanisa likoló na bibéngeli wana ya lokumu ekoki kosalisa biso na kokóla na boyebi ya Nzambe.
5. Nkombo ya Nzambe ezali nani, mpe ezali komonana mbala boni kati na Makomami ya Liebele?
5 Nzokande, Nzambe azali na nkombo oyo ekeseni na nkombo nyonso mosusu, oyo emonani soko mbala 7 000 kati na Makomami ya Liebele—nkombo oyo esalelami mingi koleka bibéngeli na ye nyonso ya lokumu. Esili koleka soko bambula 1 900, Bayuda, na ntina na bobangi ya biyambayamba, batikaki kotánga nkombo ya Nzambe. Liebele ya Biblia ekomamaki kozanga mileli. Na yango, likoki ezali te ya koyeba na sikisiki lolenge Mose, Davidi mpe bato mosusu na ntango ya kala bazalaki kotánga milelisami minei (יהוה) oyo bakomaki na yango nkombo ya Nzambe. Kozanga kondimisama solosolo, bato mosusu ya mayele bakanisaka ete nkombo ya Nzambe ezalaki kotángama “Yawe” to “Yahvé.” “Yehova” ezali nde lolenge oyo ezali kosalelama uta bikeke mingi, mpe lelo oyo na minɔkɔ mingi ezali lolenge oyo nde eleki kosalelama.—Talá Exode 6:3 mpe Yisaya 26:4 kati na Biblia ya Uele.
MPO NA NINI OSENGELI KOSALELA NKOMBO YA NZAMBE
6. Nzembo 83:18 eyebisi nini na ntina na Yehova, mpe mpo na nini tosengeli kosalela nkombo na ye?
6 Yehova, nkombo ya Nzambe oyo ekeseni na nkombo nyonso mosusu, ezali kosalisa biso na kokesenisa ye na banzambe nyonso mosusu. Nde ntina wana nkombo yango ezali komonana mbala mingi kati na Biblia, mingimingi kati na makomi na yango ya Liebele. Babongoli mingi bazangaki kosalela nkombo ya Nzambe, kasi Basauma 83:18, kati na Biblia ya Uele, Biblia ya kala ya Lingala, eyebisi polele ete: “Boyo bo akuki kuiba Yo moko, kombo na Yo YEHOVA, Azi Motu na Likolo Nyoso na mokili nyoso.” Na bongo, ezali malamu mpo na biso ete tósalela nkombo mpenza ya Nzambe wana tozali koloba mpo na ye.
7. Ndimbola ya nkombo Yehova eteyi biso nini na ntina na Nzambe?
7 Nkombo Yehova euti na likelelo ya Liebele oyo elimboli “kokóma.” Na yango, nkombo ya Nzambe elimboli “Ye oyo asalaka ete ekóma.” Na motindo yango, Yehova Nzambe azali komimonisa lokola Mokokisi Monene ya Mikano na ye. Ntango nyonso asalaka ete mikano na ye mikokisama solo. Bobele Nzambe ya solo nde abongi kozala na nkombo wana, mpamba te bato bakoki soko moke te kondimisama ete myango na bango mikolónga. (Yakobo 4:13, 14) Bobele Yehova nde akoki koloba ete: “Boye na liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai; ekozonga epai na ngai mpamba te . . . ekolonga na likambo litindaki ngai yango.”—Yisaya 55:11.
8. Mokano nini Yehova ayebisaki na nzela ya Mose?
8 Batata na mabota ya Baebele, Abalayama, Yisaka mpe Yakobo bango nyonso bazalaki “kobyanga nkombo ya Yehova,” kasi bayebaki te ndimbola mpenza ya nkombo ya Nzambe. (Genese 21:33; 26:25; 32:9; Exode 6:3) Na nsima, ntango Yehova amonisaki mokano na ye ya kobimisa bakitani na bango, Bayisraele, na boombo na Ezipito mpe kopesa bango “mokili moleki na mabɛlɛ mpe na mafuta na nzoi,” yango emonanaki lokola ete ekosalema te. (Exode 3:17) Nzokande, Nzambe alobelaki makasi ndimbola ya seko ya nkombo na ye na koyebisáká mosakoli na ye Mose ete: “Lobela bato na Yisraele boye ete, ‘Yehova, Nzambe na batata na bino, Nzambe na Abalayama mpe Nzambe na Yisaka mpe Nzambe na Yakobo atindi ngai epai na bino.’ Oyo ezali nkombo na ngai lobiko na lobiko, mpe nakokanisama bongo kino libota na libota.”—Exode 3:15.
9. Lolenge nini Falo atalelaki Yehova?
9 Mose asɛngaki na Falo, mokonzi ya Ezipito, ete atika Bayisraele bákende kosambela Yehova kati na mokili mokauki. Kasi Falo, oyo azalaki mpe kotalelama lokola nzambe mpe oyo azalaki kosambela banzambe mosusu ya Ezipito, ayanolaki ete: “Yehova azali nani ete nayoka monɔkɔ na ye mpe natika Yisraele kokenda? Ngai nayebi Yehova te, mpe nakotika Yisraele kokenda te.”—Exode 5:1, 2.
10. Na Ezipito ya kala, likambo nini Yehova asalaki mpo na kokokisa mokano na ye na ntina na Bayisraele?
10 Na bongo, Yehova abandaki kokokisa mokemoke mokano na ye, kosaláká na boyokani na ndimbola ya nkombo na ye. Ayeisaki malózi zomi likoló na Baezipito ya kala. Bolózi ya nsuka ebomaki bana mibali nyonso ya liboso ya Ezipito, na mpe mwana ya Falo, moto na lolendo. Na nsima, Baezipito bazalaki na mposa makasi ete Bayisraele bákende. Nzokande, Baezipito mosusu bakamwaki mingi na nguya ya Yehova na boye ete basanganaki na Bayisraele mpo na kobima na Ezipito.—Exode 12:35-38.
11. Likamwisi nini Yehova asalaki na Mai Motane, mpe banguna na ye basɛngisamaki na kondima likambo nini?
11 Falo, oyo azalaki na motó makasi, mpe mampinga na ye oyo ezalaki na makalo mingi ya etumba, babandaki kolanda baombo na ye mpo na kokanga bango lisusu. Wana Baezipito babɛlɛmaki, na lolenge ya likamwisi, Nzambe akabolaki Mai Motane na boye ete Bayisraele bakokaki kokatisa na mabelé makauki. Wana balándi na bango bakɔtaki esika mai makabolamaki, Yehova “alongolaki piné na makalo na bango boye kobenda yango ezalaki bozito.” Babundi Baezipito bangangaki ete: “Tokima na liboso na Yisraele mpo ete Yehova azali kobunda na Baezipito na ntina na bango.” Kasi ntango ezalaki lisusu te. Bitutu minene ya mai bikweaki mpe “bizipaki makalo mpe bato na mbalata mpe ebele nyonso na Falo.” (Exode 14:22-25, 28) Na yango, Yehova amisalelaki nkombo moko monene mpe likambo wana liyebani malamu kino na mikolo na biso oyo.—Yosua 2:9-11.
12, 13. (a) Nkombo ya Nzambe ezali na ndimbola nini mpo na biso lelo oyo? (b) Bato basengeli nokinoki koyekola nini, mpe mpo na nini?
12 Nkombo oyo Nzambe amisalelaki ezali na ndimbola monene mpo na biso lelo oyo. Nkombo na Ye, Yehova, ezali ndanga oyo emonisi ete nyonso oyo asili kolaka ekokokisama solo. Yango esangisi kokokisama ya mokano na ye ya ebandeli oyo ete mabelé na biso makobongwana paladiso. (Genese 1:28; 2:8) Mpo na yango, Nzambe akolongola bato nyonso oyo bazali kotɛmɛla boyangeli na ye lelo, mpamba te asili koyebisa ete: “Bakoyeba ete ngai nazali Yehova.” (Ezekiele 38:23) Na nsima, Nzambe akokokisa elaka na ye ya kosikola basambeli na ye mpo na kokɔtisa bango kati na mokili ya sika ya boyengebene.—2 Petelo 3:13.
13 Baoyo nyonso balingi kozwa ngɔlu ya Nzambe basengeli koyekola kobelela nkombo na ye na kondima nyonso. Biblia epesi elaka oyo ete: “Moto na moto oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.” (Baloma 10:13, NW) Ee, nkombo Yehova ezali na ndimbola moko monene. Kobelela Yehova lokola Nzambe na yo mpe Mobikisi na yo ekoki komema yo kino na bolamu ya seko.
BIZALELI YA NZAMBE YA SOLO
14. Bizaleli nini ya moboko ya Nzambe oyo Biblia ezali komonisa yango?
14 Kotalela na bozindo kobikisama ya Yisraele longwa na Ezipito emonisi bizaleli minei ya moboko oyo Nzambe azali na yango na lolenge ya kokoka mpe azali kosalela yango na bokatikati. Makambo oyo asalaki epai na Falo mamonisaki nguya na ye monene. (Exode 9:16) Lolenge ya kokamwa oyo Nzambe asalaki mpo na kosilisa likambo wana ya mpasi emonisaki mayele na ye oyo maleki mayele nyonso. (Baloma 11:33) Amonisaki boyengebene na ye na kopesáká etumbu na batɛmɛli wana ya motó makasi mpe na banyokoli ya libota na ye. (Deteronome 32:4) Ezaleli ya Nzambe oyo eleki monene ezali bongo bolingo. Yehova amonisaki bolingo na ye monene na kokokisáká elaka na ye na ntina na bakitani ya Abalayama. (Deteronome 7:8) Amonisaki mpe bolingo na ye na kopesáká nzela na Baezipito mosusu ete bátika banzambe ya lokuta mpe bázwa matomba mingi na komitya na ngámbo na Nzambe bobele moko ya solo.
15, 16. Na makambo nini Nzambe amonisaki bolingo?
15 Wana ozali kotánga Biblia, okomona ete bolingo ezali ezaleli ya liboso mpenza ya Nzambe, mpe azali komonisa yango na makambo ndenge na ndenge. Na ndakisa, ezali mpo na bolingo nde abandaki kozalisa mpe kooka bongo esengo ya kokabola bomoi elongo na bikelamu na ye ya elimo. Ebele wana ya baanzelu balingi Nzambe mpe bazali kosanzola ye. (Yobo 38:4, 7; Danyele 7:10) Nzambe amonisaki lisusu bolingo na kozalisáká mabelé mpe na kobongisáká yango mpo ete bato básepela na bomoi kati na yango.—Genese 1:1, 26-28; Nzembo 115:16.
16 Tozali kozwa matomba na bolingo ya Nzambe kati na makambo mingi oyo tokoki kotánga yango te. Na ndakisa, na bolingo nyonso Nzambe asalaki nzoto na biso na lolenge ya kokamwa mpo ete tókoka kosepela na bomoi. (Nzembo 139:14) Bolingo na ye ezali komonana na ndenge azali kopesa “mbula uta na likoló mpe bilaka na kobota mbuma mingi, mpe atondisi mitema na [biso] na biloko na kolya mpe na esengo.” (Misala 14:17) Nkutu Nzambe “akobimisaka moi na ye likoló na bato mabe mpe likoló na bato malamu mpe akonokisaka mbula likoló na bayengebene mpe likoló na bapɛngwi.” (Matai 5:45) Bolingo ezali mpe kopusa Mozalisi na biso na kosalisa biso ete tózwa boyebi ya Nzambe mpe tósalela ye na esengo nyonso lokola basambeli na ye. Ya solo, “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Kasi ezali na makambo mingi mosusu oyo matali bomoto na ye.
“NZAMBE YA MOTEMA MAWA MPE YA NGƆLU”
17. Tozali koyekola nini na ntina na Nzambe na Exode 34:6, 7?
17 Nsima wana Bayisraele bakatisaki Mai Motane, bazalaki naino na mposa ya koyeba malamu Nzambe. Mose azalaki na mposa wana mpe abondelaki ete: “Soko nabongi na miso na yo, monisa ngai nzela na yo sasaipi ete nayeba yo mpe nabonga na miso na yo.” (Exode 33:13) Mose ayaki koyeba Nzambe malamumalamu koleka na koyokáká maloba ya Nzambe ye moko: “Yehova, Yehova, azali Nzambe na motema mawa mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo. Akobatela boboto na ye mpo na nkoto nkoto, mpe akolimbisa mabe mpe nkanza mpe lisumu, kasi akozanga kopesa etumbu soko moke te.” (Exode 34:6, 7, NW) Nzambe ayokanisaka bolingo na ye elongo na boyengebene, na yango akotika te ete bato oyo bazali kosala masumu na nkó bázanga kozwa etumbu ya misala na bango ya mabe.
18. Lolenge nini Yehova amonisaki ete azali na motema mawa?
18 Lokola Mose ayekolaki yango, Yehova amonisaka motema mawa. Moto ya motema mawa amonisaka ezaleli ya koyokela mawa epai na baoyo bazali konyokwama mpe amekaka kopesa bango libɔndisi. Na yango, Nzambe asili komonisa motema mawa epai na bato na kokamatáká ebongiseli ya kosikola bango seko na minyoko, na bokɔnɔ mpe na liwa. (Emoniseli 21:3-5) Basambeli ya Nzambe bakoki kokutana na bampasi na ntina na makambo ya mokili oyo ya mabe, to bakoki kosala likambo na lolenge ya kozanga mayele mpe kokutana bongo na mpasi. Kasi soki na komikitisa nyonso bamibaloli epai na Yehova mpo na koluka lisalisi, akobɔndisa bango mpe akosalisa bango. Mpo na nini? Mpamba te na motema mawa nyonso amonisaka boboto epai na basambeli na ye.—Nzembo 86:15; 1 Petelo 5:6, 7.
19. Mpo na nini tokoki koloba ete Nzambe azali na ngɔlu?
19 Bato mingi oyo bazali na bokonzi bamonisaka basusu mpasi. Nzokande, oyo nde ngɔlu Yehova amonisaka epai na basaleli na ye! Atako azali na bokonzi boleki monene kati na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba, amonisaka boboto monene na makambo mingi epai na bato banso. (Nzembo 8:3, 4; Luka 6:35) Yehova amonisaka mpe ngɔlu epai na moto moko na moko, na koyanoláká na masɛngi na bango ya sikisiki mpo na koluka kondimama epai na ye. (Exode 22:26, 27; Luka 18:13, 14) Ya solo, Nzambe asɛngisami na makasi te ete amonisa ngɔlu to motema mawa epai na bato banso. (Exode 33:19) Na yango, tosengeli komonisa botɔ́ndi mpo na motema mawa mpe ngɔlu ya Nzambe.—Nzembo 145:1, 8.
AYOKAKA NKANDA NOKI TE, AZALI NA KOPONAPONA TE MPE AZALI MOYENGEBENE
20. Nini emonisi ete Yehova ayokaka nkanda noki te mpe azalaka na koponapona te?
20 Yehova ayokaka nkanda noki te. Nzokande, yango elingi koloba te ete asalaka eloko te, mpamba te abomaki Falo, oyo azalaki na motó makasi mpe mampinga na ye kati na Mai Motane. Lisusu, Yehova azalaka na koponapona te. Yango wana, Bayisraele, libota na ye oyo alingaki mingi, na nsima babungisaki ngɔlu na ye mpamba te balandaki bobele kosala misala na bango ya mabe. Lelo, Nzambe azali kondima lokola basambeli na ye bato ya mabota nyonso, kasi bobele baoyo bazali kolanda banzela na ye ya boyengebene.—Misala 10:34, 35.
21. (a) Emoniseli 15:2-4 eteyi biso nini na ntina na Nzambe? (b) Nini ekosalisa biso mpo ete tókoka kosala oyo Nzambe alobi ete ezali sembo?
21 Emoniseli, mokanda moko ya Biblia, emonisi ntina ya koyekola “bikateli sembo” ya Nzambe. Eyebisi biso ete bikelamu ya likoló bizali koyemba ete: “Misala na yo minene mpe na kokamwa, Yehova Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Nzela na yo sembo mpe na solo, Mokonzi na seko. Nani akozanga kobanga yo, Yehova? Nani akozanga kokumisa nkombo na yo? Mpo ete bobele yo nde ozali sembo mpe mabota nyonso bakoya kosambela liboso na yo. Mpo ete bikateli na yo sembo bisili komonisama.” (Emoniseli 15:2-4, NW) Tozali komonisa bobangi ya sembo epai na Yehova, to limemya epai na ye, na kolandáká oyo ye azali koloba ete ezali sembo. Yango ekozala pɛtɛɛ na komikundoláká mayele mpe bolingo ya Nzambe. Mibeko na ye nyonso mizali mpo na bolamu na biso.—Yisaya 48:17, 18.
“YEHOVA NZAMBE NA BISO AZALI MOKO”
22. Mpo na nini baoyo bandimaka Biblia basambelaka Bosato te?
22 Baezipito ya kala bazalaki kosambela banzambe mingi, kasi Yehova azali “Nzambe oyo azali kosɛnga ete básambela bobele ye.” (Exode 20:5, NW) Mose akundwelaki Bayisraele ete “Yehova Nzambe na biso azali Yehova moko.” (Deteronome 6:4, NW) Yesu Klisto azongelaki maloba wana. (Malako 12:28, 29) Na yango, baoyo bandimaka Biblia ete ezali Liloba ya Nzambe basambelaka Bosato te, oyo ezali bongo na bato to banzambe misato kati na moto moko. Nkutu, liloba “Bosato” ezali na Biblia te. Nzambe ya solo azali Moto oyo akeseni na Yesu Klisto. (Yoane 14:28; 1 Bakolinti 15:28) Elimo santu ya Nzambe ezali moto te. Ezali nde nguya ya Yehova oyo ekosalaka mosala, oyo Mozwi-na-Nguya-Nyonso asalelaka yango mpo na kokokisa mikano na ye.—Genese 1:2; Misala 2:1-4, 32, 33; 2 Petelo 1:20, 21.
23. (a) Lolenge nini bolingo na yo mpo na Nzambe ekoki kokóla? (b) Yesu alobaki nini na ntina na kolinga Nzambe, mpe tosengeli koyekola nini na ntina na Klisto?
23 Ntango ozali kotalela lolenge ya kokamwa oyo Yehova azali, okondima ete ebongi mpenza ete osambela ye, boye te? Lokola ozali koyekola Liloba na ye, Biblia, okoya koyeba ye malamu mpe okoyekola nini azali kosɛnga epai na yo mpo na bolamu na yo ya seko. (Matai 5:3, 6) Lisusu, bolingo na yo mpo na Nzambe ekokóla. Yango ebongi mpenza, mpamba te Yesu ayebisaki ete: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo mobimba mpe na nguya na yo mobimba.” (Malako 12:30, NW) Ya solo, Yesu azalaki na bolingo motindo wana mpo na Nzambe. Kasi Biblia elobi nini na ntina na Yesu Klisto? Mokumba na ye kati na mokano ya Nzambe ezali nini?
MEKÁ BOYEBI NA YO
Nkombo ya Nzambe ezali nani, mpe mbala boni esalelami kati na Makomami ya Liebele?
Mpo na nini osengeli kosalela nkombo ya Nzambe?
Wapi bizaleli ya Yehova Nzambe oyo bizali mpenza kosepelisa yo?
[Elilingi na lokasa 29]
Oyebi malamu Mozalisi ya biloko binso?