Salelá mwa babuku mpo na kosimba makanisi mpe motema
1 Solo ya Biblia esengeli kolakisama na lolenge ete esimba makanisi mpe motema. Ntango Yesu azalaki kosakola solo epai na bayoki na ye, azalaki kopona masolo oyo ezalaki kosepelisa bango mpe kopusa bango na misala. (Luka 24:17, 27, 32, 45) Bolongi ya mosala na biso etaleli milende oyo tozali kosala mpo na koyeba bamposa ya elimo ya bayoki na biso.
2 Mwa babuku ekoki kozala bisaleli malamu mpo na kosimba elimo mpe mitema ya baoyo tozali kokutana na bango na mosala ya kosakola. Kanisá liboso mpo na moto oyo akoki kondima nsango ya mwa buku mokomoko oyo tokolakisa na Sɛtɛ́mbɛ:
—Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso? Bato oyo bazali konyokwama na makambo ya nkita to oyo bazali kokutana na mikakatano, bakosepela na nsango ya kobɔndisa na ntina na bomoi oyo ezangi mpasi na mikolo mizali koya.
—Quel est le but de la vie? Comment le découvrir? Bilenge oyo bazali kokanisa na mozindo na ntina na bomoi na bango ya mikolo mizali koya bakozwa matomba na biyano ya Biblia kati na mwa buku yango.
—Sepela na bomoi ya seko na Mabele! Bililingi mingi mpe mikapo mingi oyo mitángami ekosalisa bana mpe bato oyo bazali na mokakatano mpo na kotánga mingi te ete básosola mikano ya Nzambe.
—Bokonzi oyo ekosala Paradis. Moto nyonso oyo azali na mokumba na boyangeli to na makambo ya bato, akoki kondima nsango etali lolenge Bokonzi ya Nzambe ekosilisa mikakatano ya bato.
—Ntango moto oyo olingaka akufi. . . Bakambi ya milulu ya kokunda ebembe mingi basepelaka kozala na mwa babuku yango mpo na kobɔndisa mabota ya bawei. Basakoli oyo bapesaka litatoli na malita basalelaka mwa buku yango mpo na kobɔndisa bato oyo bazwi matánga. Bandeko basi mibale basololaki na libota moko ya bato nsambo oyo bazalaki kobondela na lilita. Nsima ya kosolola nsango ya kobɔndisa na mwa buku yango, mokolo oyo elandaki, boyekoli ya Biblia ebandaki elongo na mama!
—Osengeli kondima Trinité? Moto oyo amipesá makasi na makambo ya losambo akoki kondima solo oyo ezwami kati na mwa buku yango na ntina na mateya ya moboko ya mangomba ya boklisto.
3 Omimesenisa na mokomoko ya mwa babuku yango, mpe yebá lolenge malamu ya kosalela yango na teritware na yo. Mpo na kozwa makanisi ya kolakisa yango, talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Augústo 1998. Tiká ete Yehova apambola milende oyo ozali kosala mpo na kosimba makanisi mpe motema ya bato.—Mko. 6:34.