Loyembo 163
Mbuma ya elimo
(Bagalatia 5:22, 23, NW)
1. Elimo santu ya Yehova,
Tólóna mbuma na yango.
Bongo, tokopesa ye nkembo.
Mpe tokoki kozwa bomo’.
Mpo ete tómekola Nzambe,
Tómilatisa bolingo.
Mpe esengo ekolendisa
Biso na kozala sembo.
2. Tosengeli koluka kimya
Mpo tózala na bomoko.
Tólóna motema molai,
Yango ebongi na biso.
Tózala na boboto mingi
Na bazalani na biso.
Malamu ekopusa biso
Ete tósakola solo.
3. Mpiko mp’elikya ya bomoi
Ekouta na kondima.
Bopɔlɔ nd’ekosilisaka
Matáta manso makoya.
Komipekisa, tokolóna
Mpo tozwa ngolu ya Nzambe.
Solo, mbuma y’elimo oyo,
Tóbota na kotika te.