Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/2 nk. 24-28
  • Esika ya MIZIKI KATI NA LOSAMBO NA MIKOLO NA BISO

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esika ya MIZIKI KATI NA LOSAMBO NA MIKOLO NA BISO
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Esika ya miziki kati na losambo na ntango ya kala
  • Nzembo mpe baklisto ya ekeke ya liboso
  • Bopusi ya losambo ya lokuta
  • Kozongisama ya miziki na esika ebongi na yango kati na losambo
  • ‘Tóyembela Yehova na mitema na biso’
  • Tóyembela Yehova
  • Yembáká na esengo mpenza!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Nzembo mpo na kokumisa Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Tóyembela Yehova!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Miziki oyo esepelisaka Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/2 nk. 24-28

Esika ya MIZIKI KATI NA LOSAMBO NA MIKOLO NA BISO

KOYEMBA ezali likabo liuti na Nzambe. Kotombola mingongo na biso kati na loyembo ekoki kosepelisa biso mpe kosepelisa Mozalisi na biso. Na nzela na yango, tokoki komonisa mayoki na biso, ezala ya mawa to mpe ya esengo. Lisusu, tokoki koyemba mpo na komonisa bolingo, kopesa losambo, mpe kotinda masanzoli epai na Mobandisi ya nzembo, Yehova.

Na bisika soko nkama misato oyo Biblia elobeli miziki etaleli mingimingi losambo ya Yehova. Koyemba ezali mpe na boyokani na esengo​—bobele esengo ya bayembi te, kasi esengo mpe mpo na Yehova. Mokomi na Nzembo akomaki ete: “Tiká ete báyembela ye . . . Mpo ete [Yehova] asepeli na bato na ye.”​—Nzembo 149:3, 4.

Kasi, nzembo ezali na motuya nini kati na losambo na mikolo na biso? Lolenge nini basaleli ya Yehova bakoki kosepelisa ye na kotomboláká mingongo na bango kati na loyembo? Miziki esengeli kozwa esika nini kati na losambo ya solo? Kotalela lisoló ya kala ya miziki kati na losambo ekosalisa biso ete tóyanola na mituna oyo.

Esika ya miziki kati na losambo na ntango ya kala

Esika ya liboso oyo Biblia elobeli miziki emonisami sikisiki te ete etaleli losambo ya Yehova. Genese 4:21 emonisi ete Yubalo nde asalaki bibɛtelo ya liboso ya miziki to ekoki mpe kozala ete abandisaki lolenge moko ya mosala ya miziki. Nzokande, miziki ezalaki eteni moko ya losambo ya Yehova liboso kútu ete bato bazalisama. Mabongoli mosusu ya Biblia mazali kolobela baanzeli bazali koyemba. Na ndakisa, Yobo 38:7 elobi ete baanzelu bazali kobelela na kosepela nyonso mpe “konganga na esengo.” Na yango, tozali na bantina euti na Makomami oyo emonisi ete kati na losambo ya Yehova, nzembo ebandaki kosalelama uta kala mpenza liboso ete moto azalisama.

Bakomi mosusu ya makambo ya kala balobi ete miziki ya Baebele ezalaki bobele nzembo mpamba ezangi banóti oyo esangisami malamu. Nzokande, banóti mingi ya miziki ekokaki kobɛtama mbala moko na lisalisi ya nzenze, ebɛtelo ya miziki oyo elobelami mingi kati na Biblia. Na ntembe te, mobɛti-nzenze asengeli koyoka kosangisama malamu ya makɛlɛlɛ ndenge na ndenge oyo ebɛtɛlo ya miziki ezalaki kobimisa. Miziki na bango ezalaki ya bongo na bongo te, kasi ezalaki nde oyo ekólaki mpenza. Mpe na kotalela elobeli ya ntɔ́ki mpe elobeli ya polele oyo esalelami kati na Makomami ya Liebele, tokoki koloba ete miziki ya Bayisalaele ezalaki kitoko mingi. Ya solo, bazalaki kosala miziki na bango na lisalisi ya mayele oyo euti na esika etombwani koleka oyo ya mabota ya zingazinga.

Kati na tempelo ya kala, ebongiseli ezwamaki mpo na kosalela bibɛtelo ya miziki mpe mpo na koyemba na mingongo makasi. (2 Ntango 29:27, 28) Ezalaki na ‘bakambi,’ ‘bato na mayele,’ ‘bayekoli,’ mpe ‘batambwisi ya bayembi.’ (1 Ntango 15:21; 25:7, 8; Nehemia 12:46) Na ntina na makoki na bango na makambo ya miziki, Curt Sachs, mokomi na makambo ya kala, akomaki ete: “Emonani ete bituluku ya bayembi mpe ya babɛti bibɛtelo ya miziki oyo bazalaki kosala na Tempelo na Yelusaleme bazwaki kolakisama ya malamu mingi mpenza, bazalaki na makoki mpe na boyebi. . . . Atako toyebi te soki miziki wana ya kala ezalaki kobɛta lolenge nini, kasi tozali na bilembeteli mingi oyo bimonisi ete ezalaki ya nguya, ya lokumu, mpe ya ntɔ́ki.” (The Rise of Music in the Ancient World: East and West, 1943, nkasa 48, 101-102) Loyembo ya Salomo ezali ndakisa moko oyo emonisi likoki oyo Baebele bazalaki na yango ya kosala miziki mpe emonisi kitoko ya nzembo na bango. Ezali lisoló oyo eyembami na loyembo, ekokani na lolenge ya elobeli oyo esalelamaka kati na lisano-liteya oyo ebéngami ete opéra. Kati na makomi ya Liebele, loyembo yango ebéngami “Loyembo ya nzembo,” elingi koloba, loyembo oyo elekaki nzembo na ye nyonso na kitoko. Boyekoli ya makambo mazwami kati na nzembo yango emonisi ete ezali mpenza bongo. Mpo na Baebele ya ntango ya kala, nzembo ezalaki kati na losambo. Mpe ezalaki kopesa nzela na kobimisama ya mayoki malamu wana bazalaki kosanzola Yehova.

Nzembo mpe baklisto ya ekeke ya liboso

Baklisto ya ekeke ya liboso bakóbaki mpe kosalela miziki kati na losambo. Longolá Nzembo oyo epemami, emonani ete, basalaki miziki mpe maloba na bango moko ya nzembo mpo na losambo, kotikáká bongo ndakisa mpo na baklisto ya mikolo na biso na ntina na kosala nzembo. (Baefese 5:19) Búku The History of Music, oyo Waldo Selden Pratt akomaki, eyebisi ete: “Koyemba kati na likita oyo esangisi bato mingi mpe na esika ya moto ye moko ezalaki momeseno ya baklisto ya liboso. Mpo na Bayuda oyo bakómaki Baklisto, ezalaki bobele kokóba mimeseno oyo bazalaki kosalela kati na biyanganelo . . . Longolá Nzembo ya Baebele . . . , lingomba wana ya sika ezalaki ntango nyonso kobimisa nzembo ya sika, emonani ete na ebandeli ezalaki kosalema na lolenge ya ba rhapsodie.”a

Komonisáká polele motuya ya loyembo, ntango Yesu abandisaki Elambo ya mpokwa ya Nkolo, na ntembe te, ye mpe bayekoli na ye bayembaki nzembo ya Hallel. (Matai 26:26-30) Wana ezalaki nzembo ya kosanzola Yehova oyo ekomami kati na mokanda ya Nzembo mpe ezalaki koyembama na kati na molulu ya Elekeli.​—Nzembo 113-118.

Bopusi ya losambo ya lokuta

Na boumeli ya ntango oyo ebéngamaki ete Eleko ya molili, miziki ya mangomba ekómaki bobele nzembo ya mawa. Soko na mobu 200 T.B., Clément d’Alexandrie alobaki ete: “Tozali na mposa ya esaleli moko: liloba ya kimya ya losambo, nzenze te to mbonda to mongúngú to kelelo.” Batyaki mibeko mingi, na bongo miziki ya ndakonzambe ekómaki kosalela mingongo. Lolenge yango eyaki kobéngama loyembo ya molulu. Búku Our Musical Heritage elobi ete: “Pene na mbula ntuku minei nsima ya kotongama ya engumba ya Constantinople, Likita monene ya Laodicée (367 A.D.) epekisaki ete bibɛtelo ya miziki bisalelama te mpe basangani ya masangá bayemba na boumeli ya molulu ya lingomba. Miziki ya mangomba esalelaki bobele mingongo.” (Biso nde totɛngisi.) Bipekiseli wana bizwaki te moboko na yango kati na boklisto ya liboso.

Na boumeli ya Eleko ya molili, bato mingi te bazalaki na likoki ya kotánga Biblia. Baklisto oyo bazalaki koluka kozwa Biblia mpo na bango moko to kotánga yango bazalaki konyokolama, ata mpe kobomama. Na bongo, likambo ya kokamwa ezali te na komona ete momeseno ya koyemba masanzoli mpo na Nzambe ebungaki mpenza na boumeli ya eleko wana ya molili. Lokola bato mingi bazwaki likoki kotánga Biblia te, lolenge nini balingaki koyeba ete ndambo moko likoló na zomi ya Biblia ezali nzembo? Nani akokaki koyebisa bango ete Nzambe apesaki etindá epai na basambeli na ye ete ‘báyembela [Yehova] loyembo na sika,’ básanzola ye kati na koyangana ya bayengebene?​—Nzembo 149:1.

Kozongisama ya miziki na esika ebongi na yango kati na losambo

Lisangá ya Yehova esili kosala mosala monene mpo na kozongisa lisusu miziki mpe loyembo na esika ekoki na yango mpenza kati na losambo. Na ndakisa, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona ya 1 Febwáli 1896 (na Lingelesi) ezalaki bobele na nzembo kati na yango. Ezalaki na motó ya likambo “Nzembo ya Esengo ya ntɔ́ngɔ́ ya Siona.”

Kino 1938, nzembo ezalaki te na boumeli ya makita ya lisangá. Nzokande, nokinoki, likanisi ya mayele ya kolanda ndakisa mpe litambwisi ya bantoma elóngaki. Na liyangani ya etúká oyo esalemaki na 1944, F. W. Franz asalaki lisukúlu oyo ezalaki na motó ya likambo “Loyembo mpo na mosala ya Bokonzi.” Amonisaki ete uta kala mpenza bikelamu ya Nzambe na likoló bazalaki koyemba nzembo mpo na kosanzola Yehova liboso ete moto azalisama, mpe alobaki ete: “Ezali likambo libongi mpe ya kosepelisa Nzambe ete basaleli na Ye awa na mabelé bátombola mingongo na bango kati na loyembo.” Nsima ya kolimbola na bozindo likanisi wana ya koyemba kati na losambo, ayebisaki kobimisama ya Mokanda ya nzembo ya Mosala ya Bokonzi (na Lingelesi) mpo na kosalelama na boumeli ya makita ya mosala oyo esalemaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ.b Na nsima, nimero ya Desɛ́mbɛ 1944, ya lokasa oyo ebéngamaki Informateur (oyo ebéngami lelo Mosala na biso ya Bokonzi) elobaki ete makita mosusu mpe masengelaki kobanda mpe kosuka na nzembo. Nzembo ezongaki lisusu na esika na yango kati na losambo ya Yehova.

‘Tóyembela Yehova na mitema na biso’

Ntina ya koyemba na mayoki mauti na nsé ya motema emonisami kati na ndakisa ya bandeko na biso ya Mpótó ya Ɛ́sti mpe ya Afrika oyo bakutanaki na mikakatano mpe na monyoko na boumeli ya bambula mingi. Lothar Wagner alekisaki mbula nsambo kati na bolɔ́kɔ́ epai kuna akangisamaki bobele na esika na ye moko. Lolenge nini ayikaki mpiko? Alobi ete: “Na boumeli ya bapɔ́sɔ mingi, namipesaki mingi mpenza na kotondisa bɔɔngɔ́ na ngai na nzembo ya Bokonzi. Soki nayebi malamu te maloba ya nzembo nazalaki bobele koyemba molɔ́ngɔ́ moko to milɔ́ngɔ́ mibale na maloba na ngai moko. . . . Nzembo na biso ya Bokonzi etondi na makanisi ya koyikisa mpiko mpe ya kolendisa!”​—Annuaire des Témoins de Jéhovah 1974, nkasa 226-228.

Na boumeli ya mbula mitano ya bolɔ́kɔ́ epai kuna akangisamaki bobele na esika na ye moko na ntina na etɛlɛmɛlo na ye ya kotikala sembo, Harold King azwaki libɔndisi na kosaláká nzembo mpo na kosanzola Yehova mpe na koyembáká yango. Nzembo mingi oyo asalaki ezali sikawa kosalelama na Batatoli ya Yehova kati na makita na bango. Esengo oyo ezalaka kati na nzembo ezali na nguya ya kobatela moto. Kasi tosengeli te bobele konyokolama liboso ya kondima ete koyemba mpo na kosanzola Yehova ezali mpenza na motuya.

Basaleli nyonso ya Yehova bakoki kozwa esengo kati na nzembo. Atako tokoki mbala mosusu kokakatana mpo na kobimisa mayoki na biso na maloba, mayoki oyo tozali na yango mpo na Yehova ekoki kobimisama kozanga kokakatana soki toyembi yango na nzembo. Ntoma Paulo amonisaki lolenge nini tokoki kozwa esengo na koyembáká nzembo ya masanzoli, wana alendisaki baklisto ete bákóba “koyemba nzembo na Nzambe mpe nzembo na [elimo], awa mpe ekosanzola bino Nkolo mpe ekoyembaka bino nzembo na mitema na bino.” (Baefese 5:19) Soki mitema na biso mitondi na makambo ya elimo, tokomonisa yango na nguya nyonso kati na nzembo. Na yango, sɛkɛlɛ́ ya koyemba malamu ezali bongo ezalela malamu ya motema.

Kozala na boyokani malamu elongo na Yehova ezali kosalisa biso ete tózala na elimo ya esengo, kopusáká biso ete tóloba, tóyemba, mpe tónganga mpo na kosanzola Yehova. (Nzembo 146:2, 5) Toyembaka na mayoki na motema na ntina na makambo oyo tosepelaka na yango. Mpe soki tosepeli na loyembo to na maloba oyo malobami kati na yango, na ntembe te, tokoyemba yango na mayoki ya solosolo.

Esengeli te bobele koyemba na mongongo makasi mpo na kobimisa mayoki na yo. Koyemba na mongongo makasi elimboli te koyemba malamu; ezali mpe malamu te koyemba kozanga kobimisa mongongo. Basusu bazali na mingongo oyo eyokanaka makasi ata soki bayembi malembe. Moko na mikakatano ezali ete koyemba malamu kati na etuluku esɛngaka koyekola koyokanisa mongongo na yo na lolenge lobongi. Soki ozali koyemba nzela moko na basusu, kokokanisa nguya ya mongongo na yo na mingongo ya bato oyo bazali pene na yo ekosala ete loyembo eyembama na esengo mpe na bomoko. Bopolo ya boklisto mpe kozala pene ya kofungola matoi mpo na koyoka mingongo ya basusu ekoki kosalisa yo ete okóma na ezaleli ya koyemba na nguya nyonso kozanga kobimisa mongongo na yo na makasi mingi koleka. Nzokande, baoyo bayebi mpenza koyemba malamu to baoyo bazali na mongongo kitoko mingi basengeli te komipekisa mpo na kobimisa mingongo na bango. Mongongo kitoko ekoki kopesa lisungi makasi wana nzembo ya kosanzola Yehova ezali koyembama kati na lisangá.

Koyemba kati na makita na biso ezali mpe kopesa libaku ya koyokanisa loláká ndenge na ndenge mpo na koyemba nzembo. Baoyo bazali na likoki ya koyemba kozanga kosalela banóti to baoyo bakoki tokánga milɔngɔ́ ya banóti kati na mokanda ya nzembo mpe koyokisa mingongo na bango malamu balendisami ete báyokanisa mingongo na bango na lolenge lobongi mpe báyeisa miziki kitoko mingi lisusu koleka.c

Basusu bakoki koloba ete: ‘Nayebi koyemba malamu te’ to ‘Nazali na mongongo mabe; nakangamaka soki nayembi banóti ya likoló.’ Na yango, bayokaka nsoni soki bazali koyemba, ata kati na Ndako ya Bokonzi. Likambo ya solo ezali ete mpo na Yehova, mongongo moko te ezali “mabe” kati na mingongo oyo mitombolami mpo na kosanzola ye. Bobele lokola okoki kobongisa mongongo na yo mpo na koloba na komimekisáká mpe na kolandáká batoli oyo epesami kati na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, okoki mpe kobongisa lolenge na yo ya koyemba. Basusu basili kobongisa mingongo na bango na komimisáká wana bazali kosala mosala. Komimisa esalisaka moto ete asukola mongongo na ye. Na bantango mosusu ebongi, wana tozali biso moko to mpe tozali kosala mosala epai tokoki te kotyela basusu makɛlɛlɛ, koyemba nzembo ya Bokonzi ezali lolenge eleki kitoko ya komeka mongongo mpe ezali lolenge moko ya komitya kati na ezalela ya elimo ya esengo mpe ya kimya.

Tokoki mpe kolendisa ezaleli ya koyemba mwa ndambo ya nzembo ya Bokonzi na bokutani na biso na baninga. Koyemba wana, elongo na bibɛtelo ya miziki lokola lindanda to piano to na bakasɛti ya la Société oyo miziki na yango ebɛtami na piano, epesaka elimo malamu kati na bokutani na biso na baninga. Esungaka mpe mpo na koyekola nzembo mpe koyemba yango malamu na ntango ya makita na lisangá.

Mpo na kosunga masangá ete mákóma na esengo ya koyemba na ntango ya makita, la Société asilaki kobimisa bakasɛti ya miziki mpo na koyemba na lisalisi na yango. Wana bakasɛti yango ezali kobɛta, ndeko oyo azali na mokumba ya kosalela bikoliseli lolaka asengeli kosɛnzɛla volimi. Soki miziki ezali koyokana malamu mpenza te, basangani ya lisangá bakoki koyoka nsoni mpo na koyemba makasi. Lokola ndeko oyo azali na mokumba ya kotalela bikóliseli lolaka ayembaka mpe elongo na lisangá, akoyeba kotalela soki miziki ezali kopesa lisungi likoki mpo na kokamba lisangá kati na loyembo to ezali kopesa lisungi te.

Tóyembela Yehova

Koyemba epesaka biso libaku ya kobimisa mayoki oyo tozali na yango mpo na mozalisi na biso. (Nzembo 149:1, 3) Ezali te bobele kobimisa mayoki na makasi nyonso, kasi ezali nde koyemba masanzoli na kosɛnzɛla malamu, na lolenge lobongi, mpe na esengo nyonso. Koyemba kati na lisangá na kobimisáká mayoki na biso nyonso ekoki kotya biso kati na ezalela malamu ya elimo mpe ya motema mpo na kolanda malamu makita oyo ekosalema na nsima na yango mpe ekoki kopusa biso ete tósangana lisusu mingi koleka kati na losambo ya Yehova. Atako koyemba ezalaka na bopusi likoló na mayoki na biso, kasi maloba makoki mpe koteya biso. Na bongo, na kobimisáká mayoki biso nyonso elongo mpe na boyokani malamu, tozali bongo kolɛngɛla mitema na biso na komisokisa nyonso mpe na komikitisa nyonso mpo ete tókoka koyekola elongo kati na libota liyanganisami esika moko.​—Kokanisá Nzembo 10:17.

Koyemba ekokóba ntango nyonso kozala kati na losambo ya Yehova. Na bongo, tozali na elikya ya komonisa seko na seko mayoki motindo moko na mokomi ya Nzembo, oyo alobaki ete: “Nakosanzola [Yehova] ntango nyonso ezali ngai na bomoi, nakoyembela Nzambe na ngai nzembo naino ekoumela ngai na mosuni.”​—Nzembo 146:2.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Rhapsodie ezali lolenge moko ya loyembo eyembami na bonsomi nyonso. Mingimingi, ba raphsodie ekumisaka makambo oyo emonisaka mpiko to bato ya mpiko.

b Mokanda ya liboso ya Bakolinti 14:15 emonisi ete nzembo ezalaki kosalema mbala na mbala kati na losambo ya baklisto ya ekeke ya liboso.

c Nzembo misusu oyo ezwami kati na mokanda na biso ya Nzembo mpo na kokumisa Yehova, esalemi na mitindo minei ya mingongo mpo ete baoyo basepelaka na koyemba na kosangisáká mitindo mikeseni ya mingongo na mbala moko bákoka kosalela yango. Nzokande, nzembo mingi ebongisamaki mpo ete eyembama nzela moko na kobɛtama ya piano mpe esalemaki na modɛlɛ ya miziki oyo elukaka kobatela lolenge ya koyemba yango engebene mikili ndenge na ndenge epai kuna eutaki. Kobakisa banóti misusu kati na nzembo oyo esalemi te mpenza na mitindo minei ya mingongo ekoki koyeisa lisusu banzembo na biso kitoko na makita.

[Etanda na lokasa 27]

Mwa batoli mpo na koyemba malamu

1. Wana ozali koyemba, telemisá mokanda ya nzembo liboso na miso na yo mpenza. Yango ekosalisa yo ete obimisa mpema kozanga nkaká.

2. Mpemá malamu liboso ya kobanda fraze mokomoko.

3. Soki ofungoli monɔkɔ mwa makasi na ebandeli, mongongo na yo ekomata yango moko mpe ekoyokana makasi.

4. Likambo ya ntina mingi koleka, tyá likebi na yo na mayoki oyo mabimisami na loyembo oyo ezali koyembama.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto