Bilambo ya kobuka mbuma bisepelisaka Nzambe?
BAMBUMA ya elengi, ndunda kitoko, mipiko ya masangu ya malamu, nyonso wana etyami esika moko ezali elilingi kitoko mpo na kotala. Biloko motindo wana bikembisaka bibaelo ya bandakonzambe na ekólo mobimba ya Angleterre na eleko ya kobuka mbuma. Na Mpótó, mpe na bipai mosusu, bilambo ndenge na ndenge bisalemaka mpo na komonisa ebandeli to nsuka ya eleko ya kobuka mbuma.
Baoyo babikelaka na mosala ya bilanga bazalaka mpenza na botɔ́ndi mingi mpo na mbuma ya mabelé. Kútu, Nzambe abyangaki libota ya Yisalaele ya kala ete básalaka bilambo misato na mbula oyo bitalelaki mingimingi bobuki mbuma. Na ebandeli ya prɛntá, na boumeli ya Elambo ya Mampa mazangi mfulu, Bayisalaele bazalaki kopesa na Nzambe liboke ya mbuma ya liboso ya orge oyo babuki. Na Elambo ya Bapɔ́sɔ (to, Pantekote) na nsuka ya prɛntá, bazalaki kopesa mampa oyo masalemi na mbuma ya liboso ya nganu (blé) oyo bakobuka. Na otómne ezalaki bongo na Elambo ya Mingombo, oyo ezalaki komonisa nsuka ya mbula ya mosala ya bilanga na Yisalaele. (Exode 23:14-17) Bilambo yango bizalaki “koyangana na bulɛɛ” mpe bantango ya kosepela.—Levitike 23:2; Deteronome 16:16.
Kasi ezali boni mpo na bilambo ya kobuka mbuma na mikolo na biso? Yango esepelisaka Nzambe?
Boyokani na bopakano
Na mobu 1843, mokonzi moko ya Lingomba ya Angleterre na engumba Cornwall, na ekólo Angleterre, azwaki ekateli ya kozongisa momeseno moko ezalaki kosalema na bobuki mbuma na eleko ebéngami Moyen-Âge mpamba te atungisamaki na lolenge oyo bilambo ya bobuki mbuma bizalaki kosalema mpe na lolenge bato bamipesaki na molangwa na eleko yango. Akamataki mwa ndambo ya masangu ya liboso oyo babukaki mpe asalaki limpa mpo na molulu ya kominyo na ndakonzambe na ye. Na kosaláká bongo, azongisaki elambo ya mokolo mwa 1 Augústo (na Lingelesi “Lammas”)—elambo moko “ya boklisto” oyo bamoko balobaka ete eutá na losambo ya Lug, nzambe ya ba Celtes.a Na yango, elambo ya bobuki mbuma ya Lingomba ya Angleterre na mikolo na biso euti na bopakano.
Ezali boni mpo na bilambo mosusu oyo bisalemaka na nsuka ya eleko ya bobuki mbuma? Engebene búku Encyclopædia Britannica, mimeseno mingi oyo misalemaka na boumeli ya bilambo yango miuti na “endimeli ya elimo ya [mbuma] ya lisangu to mama ya lisangu.” Na bitúká mosusu basáli na bilanga bazalaki kokanisa ete elimo moko ezalaka na mbuma ya nsuka oyo bakobuka. Mpo na kobengana elimo yango, bakobɛtabɛta yango na mabelé. Na bisika mosusu bazalaki kosala “mwana-popi” na nkasa ya masangu mpe bazalaki kobatela yango mpo na “nkɔ́nzɔ” kino na ntango ya kolóna lisusu mbuma na mbula oyo ekolanda. Na ntango yango bazalaki kokunda banzeté oyo ezali na masangu wana bazali kobalola mabelé na kolikyáká ete yango ekopambola mbuma oyo bakobuka na mbula oyo ekolanda.
Masapo mosusu malobelaka eleko ya bobuki mbuma na boyokani na losambo ya Tammuz, nzambe ya Babilone, mobali ya Ishtar, nzambe-mwasi ya makambo matali kobota. Kokata mitó ya masangu oyo ekɔmeli elimbolaki liwa ya mobesu mpo na Tammuz. Kútu masapo mosusu malobelaka eleko ya bobuki mbuma na boyokani na mbeka ya bato—likambo oyo Nzambe ayini yango.—Levitike 20:2; Yilimia 7:30, 31.
Likanisi ya Nzambe ezali nini?
Boyokani ya Nzambe elongo na Yisalaele ya kala emonisi polele ete Yehova, Mozalisi mpe Liziba ya bomoi, asɛngaki ete basambeli na ye bázala na bokangami bobele epai na ye. (Nzembo 36:9; Nahumu 1:2) Na eleko ya mosakoli Ezekiele, momeseno ya kolela nzambe Tammuz ezalaki ‘likambo ya mbindo monene’ na miso ya Yehova. Momeseno yango elongo na milulu mosusu ya losambo ya lokuta, epusaki Nzambe ete akanga matoi na ye na mabondeli ya basambeli wana ya lokuta.—Ezekiele 8:6, 13, 14, 18.
Likambo yango ekeseni mpenza na oyo Yehova Nzambe ateyaki Yisalaele na oyo etali bobuki mbuma. Na Elambo ya Mingombo, Bayisalaele bazalaki kosala liyangani monene oyo na boumeli na yango, bilenge mpe mikóló, bazwi mpe babólá bazalaki kofanda mpo na mwa ntango kati na mingombo oyo mikembisami na nkasa ya sika ya banzeté kitoko. Elambo yango ezalaki ntango ya bosepeli mpo na bango, kasi ezalaki mpe eleko ya kokanisa ntango Nzambe asikolaki bankɔkɔ na bango wana babimaki na Ezipito.—Levitike 23:40-43.
Na boumeli ya bilambo ya Bayisalaele, bazalaki kopesa makabo epai na Yehova, Nzambe bobele moko ya solo. (Deteronome 8:10-20) Na oyo etali bindimeli oyo elobelamaki liboso, ete biloko bizalaka na molimo, Biblia elobi ata esika moko te ete milóna, lokola masangu, ezalaka na molimo.b Mpe Makomami mamonisi polele ete bikeko bikoki kosala eloko moko te, bikoki koloba te, komona te, koyoka te, koyoka nsolo te, kosimba te, to kosunga basambeli na yango te.—Nzembo 115:5-8; Baloma 1:23-25.
Lelo oyo baklisto bazali na nsé ya kondimana ya Mibeko oyo Nzambe asalaki elongo na libota ya Yisalaele ya kala te. Kútu, Nzambe ‘alongoli yango na nzela, wana ekangaki ye yango na [nzeté ya mpasi, NW] ya Klisto.’ (Bakolose 2:13, 14) Basaleli ya Yehova na mikolo na biso bazali na nsé ya “mibeko na Klisto” mpe bazali kosepela na nyonso oyo Nzambe azali kopesa.—Bagalatia 6:2.
Ntoma Paulo alobaki polele ete bilambo ya Bayuda ezalaki “elilingi na makambo makoya,” mpe abakisaki ete, “nde eloko na solo ezali Klisto.” (Bakolose 2:16, 17) Na yango, baklisto ya solo bandimaka likanisi oyo ya Makomami ete: “Ekokaba bango mbeka, bakokabela [bademó, NW] yango, bakokabela Nzambe te . . . Bokoki komela na kɔpɔ na Nkolo mpe na mesa na [bademó] te.” (1 Bakolinti 10:20, 21) Lisusu, baklisto balandaka etindá oyo elobi ete, “Komama [“kosimba,” NW] eloko na mbindo te.” Bilambo ya kobuka mbuma oyo bisalemaka na mboka na bino biuti nde na bopakano to na losambo ya lokuta? Soki ezali boye, baklisto ya solo bakoki kopɛngola koyokisa Yehova mawa na koboyáká komikɔtisa ata moke na losambo oyo ebebisami.—2 Bakolinti 6:17.
Na ntango mwana ya botɔ́ndi azwi likabo epai ya tata na ye, akotɔ́nda nani? Mopaya to moboti na ye? Na nzela ya mabondeli oyo mauti na motema, basambeli ya Nzambe bapesaka matɔ́ndi mokolo na mokolo epai ya Tata na bango ya likoló Yehova mpo na bokabi na ye mingi.—2 Bakolinti 6:18; 1 Batesaloniki 5:17, 18.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba “Lammas” euti na liloba ya Lingelesi ya kala oyo lilimboli “pɔtɔpɔ́tɔ ya mampa.”
b Búku Insight on the Scriptures elobi ete: “Neʹphesh (molimo) esalelami mpo na kolobela kozalisama ya bitwele te na ‘mokolo’ ya misato ya kozalisama (Ge 1:11-13) to na nsima, mpamba te bitwele ezali na makila te.”—Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.