Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • fy mok. 9 nk. 103-115
  • Mabota oyo mazali na moboti sé moko makoki mpe kolónga!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabota oyo mazali na moboti sé moko makoki mpe kolónga!
  • Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KOYEBA KOKOKISA MALAMU MIKUMBA YA LIBOTA
  • KOLUKA MOSOLO MPO NA KOBIKELA EZALI MOKUMBA MONENE
  • NANI ASƐNGƐLI KOKOKISA BAMPOSA?
  • PESÁ DISIPILINI
  • LOLENGE YA KOLÓNGA MAYOKI YA KOZALA YO MOKO
  • LOLENGE BASUSU BAKOKI KOPESA LISUNGI
  • Tyáká likebi epai ya baboti oyo babɔkɔlaka bana bango moko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Salá makasi mpo na lobiko ya libota na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Monisá ete omibanzabanzaka mpo na ‘bitike’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Bómema mokumba na bino ya kobatela libota
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
fy mok. 9 nk. 103-115

MOKAPO YA LIBWA

Mabota oyo mazali na moboti sé moko makoki mpe kolónga!

1-3. Nini epesi nzela na bokóli ya motángo ya mabota oyo mazali na moboti bobele moko, mpe yango ezali na bopusi nini likoló na baoyo batalelami na likambo yango?

MABOTA oyo mazali na moboti bobele moko mabéngami na États-Unis ete ezali “lolenge ya mabota oyo maleki kokóla mingi.” Likambo yango mpe lizali bobele bongo na mikili misusu mingi. Motángo ya mabala oyo mazali kobomama, ya mabota oyo masundolami, ya mabota makabwani, mpe ya bana ya balabála esili kobimisa mbuma mabe mpo na bamilió ya baboti mpe ya bana.

2 “Nazali mwasi-mokufeli-mobali, nazali na mibu 28 mpe nazali na bana mibale. Natungisamaka mingi na makanisi mpamba te nalingi te kobɔkɔla bana ngai moko kozanga tata. Emonani lokola ete moto moko te azali komibanzabanza mpo na ngai. Bana na ngai bamonaka ngai konganga ntango nyonso mpe yango epesaka bango mpasi,” ezali wana maloba makomaki mwasi moko oyo azalaki sé ye moko. Longola likambo ya kobunda na mayoki lokola nkanda, mayoki ya komema ngambo, mpe mayoki ya kozala yo moko, baboti mingi oyo bazali bobele bango moko bazalaka na mokakatano monene mpo na kokende na mosala mpe kosala misala ya ndako. Moko alobaki ete: “Kozala moboti bobele yo moko ezali lokola nde ozali mosani oyo abwakaka bambuma mingi na likoló na mbala moko mpe akoyambaka yango. Nsima ya sanza motoba ya komimekisa, osengeli na nsuka kozala na likoki ya kosala lisano yango na koyambáká bambuma minei na mbala moko. Nzokande, wana okómi na likoki ya kosala bongo, moto mosusu abwakeli yo mbuma ya mitano!”

3 Bilenge oyo bafandi kati na mabota oyo mazali bobele na moboti moko mbala mingi bazalaka na mikakatano na bango. Bakoki kozala na mayoki makasi mpo na bokei to mpo na liwa ya moboti moko. Mpo na bilenge mingi kozanga moboti moko emonanaka ete epesaka mpasi makasi mpenza.

4. Lolenge nini toyebi ete Yehova amibanzabanzaka mpo na mabota oyo mazali na moboti bobele moko?

4 Mabota oyo mazalaki bobele na moboti moko mazalaki mpe na ntango ya kala. Mbala na mbala, Makomami malobeli “mwana mobali azangi tata” mpe “mwasi-mokufeli-mobali.” (Exode 22:22, NW; Deteronome 24:19-21; Yobo 31:16-22) Yehova Nzambe azalaki kotya likebi na bampasi na bango. Mokomi na Nzembo abyangaki Nzambe ete “tata na bana mibali bazangi batata mpe mosambisi na basi-bakufeli-mibali.” (Nzembo 68:5, NW) Na ntembe te, lelo oyo Yehova azali komibanzabanza motindo moko mpo na mabota oyo mazali na moboti bobele moko! Ya solo, Liloba na ye lizali kopesa mitindá oyo mikoki kosalisa bango ete bálónga.

KOYEBA KOKOKISA MALAMU MIKUMBA YA LIBOTA

5. Na ebandeli, mokakatano nini baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko bakutanaka na yango?

5 Tólobela mokumba ya kokamba libota. Mwasi moko oyo libala na ye ekufá andimi ete: “Ekokómela yo mbala mingi oloba ete soki nazalaki na mobali mbɛlɛ malamu, ezali lokola ete motuka na yo ebandi kosala makɛlɛlɛ, kasi oyebi te esika yango ezali kouta.” Mibali oyo bauti koboma libala kala mingi te to oyo bakufeli-basi bakoki kobulunganisama na ntina na misala mingi ya ndako oyo basengeli sikawa kosala yango. Mpo na bana, mobulungano oyo mozali na ndako mozali kobakisa mayoki ya kotengatenga mpe ya kozanga libateli.

Elilingi na lokasa 110

Bana, bósalisa moboti na bino oyo azali kobɔkɔla bino bobele ye moko

6, 7. (a) Ndakisa nini kitoko “mwasi ya molende” oyo alobelami na Masese atikaki? (b) Lolenge nini kozala molende na misala ya ndako esalisaka mabota oyo mazali na moboti bobele moko?

6 Nini ekoki kosalisa? Tótalela ndakisa oyo epesami na “mwasi ya molende” oyo alobelami na Masese 31:10-31, (NW). Makoki mingi oyo azalaki na yango ezali ya kokamwisa​—ya kosomba, ya kotɛka, ya kotonga, ya kolamba, ya kosomba ndako, kosala bilanga, mpe kosala mombongo. Sɛkɛlɛ́ na ye ezalaki nini? Azalaki na molende, azalaki kosala mingi, mpe kolamuka na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ mpo na kobanda misala na ye. Mpe amibongisaki malamu, azalaki kokabola misala misusu mpe azalaki kosalela mabɔkɔ na ye mpo na kosalisa basusu. Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete asanzolamaki!

7 Soki ozali moboti oyo ozali kobɔkɔla bana bobele yo moko, tyá likebi na mikumba na yo ya ndako. Sepelá na misala yango, mpo ete yango ekobakisa mingi esengo ya bana na yo. Atako bongo, kokamata myango ya sikisiki mpe komibongisa malamu ezali na ntina. Biblia elobi ete: “Myango na moto na molende mikosuka sé na kolónga.” (Masese 21:5, NW) Tata moko oyo azalaki kobɔkɔla bana bobele ye moko andimaki ete: “Nazwaka likanisi ya kolamba bilei bobele soki nayoki nzala.” Kasi kozala na momeseno ya kokana liboso bilei oyo okolya ekosala ete yango etonga nzoto na yo mpe ezala elɛngi koleka bilei oyo bilambami mbangumbangu mpe na kozanga kokanela. Okoki lisusu koyekola lolenge ya kosalela mabɔkɔ na yo mpo na misala misusu. Na kotunáká baninga oyo bazali na boyebi mingi na misala yango, kotánga mikanda oyo mizali kolobela yango, mpe kosolola na bato oyo bameseni na misala yango, bamama mosusu oyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko bazwaki makoki ya koyeba koyema bililingi, koyeba kobongisa pompi ya mai, mpe mwa misala mikemike ya kobongisa motuka.

8. Lolenge nini bana oyo bazali na moboti bobele moko bakoki kopesa mabɔkɔ na misala ya ndako?

8 Ezali sembo kosɛnga na bana ete bápesa yo mabɔkɔ? Mama moko oyo azalaki kobɔkɔla bana bobele ye moko alobaki ete: “Okolinga kozipa kozanga ya moboti mosusu na koyeisáká makambo pɛtɛɛ mpo na bana.” Yango ekoki kozala malamu kasi mbala mosusu yango epesaka matomba te epai na mwana. Bilenge oyo babangaka Nzambe, oyo balobelami kati na Biblia bapesamelaki misala ya sikisiki. (Genese 37:2; Loyembo ya Salomo 1:6) Na yango, atako osengeli kosɛnzɛla ete opesa bana na yo mikumba mileki bango ndelo te, ekozala likambo ya mayele ete opesa bango misala lokola kosukola basaani mpe kotya bopɛto na bisika na bango ya kolala. Mpo na nini te kosala misala misusu elongo na bango? Yango ekoki kopesa esengo mingi mpenza.

KOLUKA MOSOLO MPO NA KOBIKELA EZALI MOKUMBA MONENE

Elilingi na lokasa 107

Lekisaká ntango mingi elongo na bana na yo soki likoki ezali

9. Mpo na nini bamama oyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko bakutanaka na mikakatano na makambo matali mosolo?

9 Baboti mingi oyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko bazalaka na mokakatano mpo na kokokisa bamposa na bango na makambo matali mosolo, mpe basi oyo babotá kozanga kobala, mbala mingi bakutanaka na mikakatano makasi.a Na mikili epai kuna lisungi ya Leta epesamaka, bakoki komonisa mayele na kosaleláká yango malamu kino bakozwa mosala. Biblia epesi nzela na baklisto ete básalela bibongiseli yango soki esengeli. (Baloma 13:1, 6) Basi-bakufeli-mibali mpe basi oyo mabala na bango masilá kokufa bakutanaka na mikakatano ndenge moko. Mingi kati na bango bamonaka ete basengeli kozongela kosala mosala na kompanyi nsima na kolekisa bambula mingi kati na misala ya ndako, kasi mingimingi bazwaka bobele mosala ya lifuti moke. Mpo na koluka kobongisa motindo na bomoi na bango, basusu bakendaka koyekola misala to koyekola bakelasi ya mikuse.

10. Lolenge nini mama oyo azali kobɔkɔla bana bobele ye moko akoki kolimbwela bana na ye ntina oyo asengeli kosala mosala ya mosuni?

10 Kokamwa te soki bana na yo bakozala na esengo te na ntango ozali koluka mosala, mpe komipesa te liyoki ya komema ngambo. Kasi, limbwelá bango mpo na nini osengeli kosala mosala, mpe salisá bango na koyeba ete Yehova azali kosɛnga na yo ete okokisa bamposa na bango. (1 Timoté 5:8) Na nsima, bana mingi basembolaka makanisi na bango. Atako bongo, salá makasi ete olekisaka ntango mingi elongo na bango soki manáka na yo ya mosala epesi nzela. Likebi ya bolingo motindo wana ekoki mpe kokitisa mpasi oyo libota ekoki kozwa mpo ete ezali na mosolo mingi te.​—Masese 15:16, 17.

NANI ASƐNGƐLI KOKOKISA BAMPOSA?

Elilingi na lokasa 109

Lisangá lisengeli te kobosana “basi-bakufeli-mibali” mpe “bana mibali oyo bazangi batata”

11, 12. Bandelo nini baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko basengeli kobatela yango, mpe lolenge nini bakoki kosala yango?

11 Ezali malamu mpo na baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko ete bákangama makasi na bana na bango, nzokande basengeli kosɛnzɛla ete bandelo oyo Nzambe asilá kotya kati na baboti mpe bana elɛmbisama te. Na ndakisa, mikakatano makasi mikoki kobima soki mama oyo azali kobɔkɔla bana bobele ye moko azali komizela ete mwana na ye ya mobali akokisa mikumba oyo misengeli na tata ya libota to soki azali kokamata mwana na ye ya mwasi lokola moninga oyo ye asengeli koyebisa ye makambo na ye ya motema, koyebisáká ye ebele ya basɛkɛlɛ́ na ye moko. Kosala bongo ebongi te, epesaka mpasi na makanisi, mpe mbala mosusu ebulunganisaka mwana.

12 Bana basengeli komona ete ezali yo moboti nde osengeli kokokisa bamposa na bango​—kasi ezali te bango nde basengeli kokokisa bamposa na yo. (Kokanisá na 2 Bakolinti 12:14.) Na bantango mosusu, okoki kozala na mposa ya batoli mpe ya lisungi. Luká yango epai na bankulutu baklisto to mbala mosusu epai na baklisto basi oyo bakɔmɛli, kasi te epai na bana na yo oyo bazali bilenge.​—Tito 2:3.

PESÁ DISIPILINI

13. Mokakatano nini motali disipilini mama oyo azali kobɔkɔla bana bobele ye moko akoki kokutana na yango?

13 Mobali akoki kozala na mokakatano mpenza te mpo na kopesa disipilini, kasi mwasi azalaka na mikakatano na likambo yango. Mama moko oyo azali kobɔkɔla bana bobele ye moko alobi ete: “Bana na ngai ya mibali basili kokɔmela lokola mibali mpenza mpe bazali na mingongo ya mibali. Ntango mosusu nakokaka kozwa ekateli te to namiyokaka ete nazangi makasi liboso na bango.” Lisusu, ekoki kozala ete otungisami makasi na ntina na liwa ya mobalani oyo olingaki mingi, to mbala mosusu okoki kozala na mayoki ya komema ngambo to na nkanda mpo ete libala na yo ekufá. Soki yo mpe mobalani na yo bozali na mokumba ya kobɔkɔla bana, okoki kobanga noki mwana na yo akolinga ntango mosusu kofanda elongo na mobalani na yo ya kala. Makambo wana makoki kobimisa mokakatano mpo na kopesa disipilini oyo ezali na bokatikati.

14. Lolenge nini baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko bakoki kozala na bokatikati mpo na oyo etali disipilini?

14 Biblia elobi ete “mwana oyo atikami kozanga epekiseli akoyokisa mama na ye nsɔ́ni.” (Masese 29:15, NW) Yehova Nzambe akosunga yo ete okoka kotya mibeko kati na libota na yo mpe ete okoka kotosisa yango; na bongo kotika te ete mayoki ya komema ngambo, mawa, to kobanga elónga yo. (Masese 1:8) Kobuka soko moke te mitindá ya Biblia. (Masese 13:24) Salá milende na kozala na makambo makasi te, kozanga bongolabongola, mpe kozala ngwi. Na nsima, bana mingi bakoyanola malamu. Nzokande, osengeli mpe kotalela mayoki ya bana na yo. Tata moko oyo azali kobɔkɔla bana bobele ye moko alobaki ete: “Lokola bazalaka na mawa mpo na liwa ya mama na bango, napesaka bango disipilini ya makasi mingi te na komityáká bongo na esika na bango. Nasololaka elongo na bango na mabaku nyonso. Tozalaka na ‘ntango mpo na masoló ya nkuku’ wana tozali kolamba bilei. Na ntango yango nde bayebisaka ngai basɛkɛlɛ́ na bango.”

15. Makambo nini moboti oyo libala ekufá asengeli kopɛngola ntango azali kolobela mobalani na ye ya kala?

15 Soki libala na yo ekufá, okozwa litomba te na kozanga limemya epai na mobalani na yo ya kala. Matáta kati na baboti epesaka mpasi mingi epai na bana mpe ekoki mpenza kolɛmbisa limemya oyo bazali na yango epai na bino mibale. Na yango, pɛngolá maloba ya kozokisa lokola oyo: “Ozali lokola tata na yo!” Ezala lolenge nini ya mpasi oyo mobalani na yo ya kala ayokisaki yo, mobalani yango azali ntango nyonso moboti ya mwana na yo, mpe mwana azali na mposa ya bolingo, ya likebi, mpe ya disipilini ya baboti mibale.b

16. Bibongiseli nini ya elimo bisengeli kozala eteni ya disipilini ya ntango nyonso kati na libota oyo ezali na moboti bobele moko?

16 Lokola tolobelaki yango na mikapo mileki, disipilini esɛngi kobongisama mpe kolakisama, kasi bobele etumbu te. Mikakatano mingi mikoki kopɛngolama soki manáka malamu ya kobongisama na elimo matyami. (Bafilipi 3:16) Koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita ya boklisto ezali na ntina mingi. (Baebele 10:24, 25) Kozala na boyekoli ya libota pɔ́sɔ na pɔ́sɔ ezali mpe na ntina lokola. Ya solo, ezali likambo ya pɛtɛɛ te kosalaka boyekoli yango pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Mama moko oyo ayebi malamu ntina ya mokumba na ye alobi ete: “Nsima na kolekisa mokolo mobimba na mosala, moto nyonso alingaka mpenza kopema. Kasi namibongisaka ngai moko na makanisi mpo na koyekola elongo na mwana na ngai ya mwasi, koyebáká ete yango ezali likambo oyo lisengeli kosalema. Asepelaka mpenza na boyekoli ya libota!”

17. Liteya nini tokoki kozwa kati na kolakisama oyo Timoté, moninga ya Paulo, alakisamaki?

17 Timoté, moninga ya mosala ya ntoma Paulo, azwaki kobongisama kati na mitindá ya Biblia epai na mama na ye mpe epai na nkɔ́kɔ na ye ya mwasi​—kasi mpenza epai na tata na ye te. Nzokande, Timoté akómaki moklisto akɔmeli! (Misala 16:1, 2; 2 Timoté 1:5; 3:14, 15) Yo mpe okoki kolikya kozwa mbano malamu soki ozali kosala makasi na kobɔkɔla bana na yo “kati na disipilini mpe na mpamela ya Yehova.”​—Baefese 6:4, NW.

LOLENGE YA KOLÓNGA MAYOKI YA KOZALA YO MOKO

18, 19. (a) Lolenge nini mayoki ya kozala yo moko makoki kobimela moboti oyo azali bobele ye moko? (b) Toli nini epesami mpo na kolónga bamposa ya nzoto?

18 Moboti moko oyo azali kobɔkɔla bana bobele ye moko amilelaki ete: “Ntango nazongi na ndako mpe namoni bobele bifelo minei ya ndako, mingimingi nsima wana bana bakei kolala, mayoki ya kozala ngai moko mazwaka ngai.” Ɛɛ, mbala mingi mayoki ya kozala yo moko ezali mokakatano monene epai na baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko. Ezali likambo lilongobani koyoka mposa ya bolingo oyo eutaka na boninga mpe na boyokani ya penepene kati na libala. Kasi moto asengeli koluka kokokisa mposa yango ata na lolenge ya mabe? Na mikolo ya ntoma Paulo, bilenge basi oyo bakufeli-mibali batikaki nzela na “bamposa na bango ya kosangisa nzoto ete epekisa bango kosalela Klisto.” (1 Timoté 5:11, 12, NW) Kotika nzela na bamposa ya nzoto ete ezwa esika ya makambo ya elimo ekoki kozala likámá.​—1 Timoté 5:6.

19 Moklisto moko ya mobali alobaki ete: “Mposa ya kosangisa nzoto ezalaka makasi mpenza, kasi okoki kozala mokonzi likoló na yango. Ntango likanisi wana liyeli yo kati na elimo, osengeli koumelisa yango te. Osengeli kolongola yango. Eloko mosusu ekosalisa yo ezali ete okanisa bolamu ya bana na yo.” Liloba ya Nzambe epesi toli ete: ‘Bóboma binama na nzoto na bino mpo na oyo etali mposa ya kosangisa nzoto.’ (Bakolose 3:5) Soki ozali kosala makasi mpo na koboya lolenge moko ya bilei, okosepela kotánga bazulunalo oyo ezali komonisa elɛngi ya bilei yango, to okosepela kozala elongo na bato oyo bazali ntango nyonso kolobela bilei yango? Soko moke te! Ezali mpe bobele bongo mpo na oyo etali bamposa ya nzoto.

20. (a) Likámá nini lizali liboso na baoyo bazali koluka kobalana na bato oyo bazali bandimi te? (b) Lolenge nini, na ekeke ya liboso mpe na mikolo na biso, bato oyo bazalaki minzemba babundisaki mayoki ya kozala bango moko?

20 Baklisto mosusu basili kobalana na bato oyo bazali bandimi te. (1 Bakolinti 7:39) Yango esilisaki mokakatano na bango? Te. Mwasi moklisto moko oyo libala na ye ekufá alobaki ete: “Ezali na likambo moko ya mabe koleka kozala bobele yo moko. Ezali bongo kobalana na moto mabe!” Na ntembe te, baklisto basi-bakufeli-mibali ya ekeke ya liboso, bazwamaki na mayoki ya kozala bango moko, kasi baoyo bazalaki na mayele bamipesaki mingi na ‘koyamba bapaya, kosukola makolo ya basantu, mpe kosunga baoyo bazalaki kati na bolózi.’ (1 Timoté 5:10) Lelo oyo, baklisto ya sembo oyo basili kozela bambula mingi liboso ete bázwa mobalani oyo azali kobanga Nzambe bamipesaki na mosala mingi. Mwasi moklisto moko ya mibu 68, oyo azalaki mokufeli-mobali, azalaki kokende kotala basi mosusu bakufeli-mibali ntango mayoki ya kozala ye moko ezalaki koyela ye. Alobaki ete: “Nazali komona ete na kokendáká kotala bango, komipesáká na misala na ngai moko ya ndako mpe komibanzabanza mpo na elimo na ngai, nazalaka na ntango te ya komiyoka ete nazali ngai moko.” Koteya bato mosusu makambo matali Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza na litomba malamu.​—Matai 28:19, 20.

21. Na makambo nini libondeli mpe baninga malamu bakoki kosalisa na kolónga mayoki ya kozala bobele yo moko?

21 Na solo, nkisi ya likamwisi ezali te mpo na kosilisa mayoki ya kozala yo moko. Kasi na nguya ya Yehova tokoki koyikela yango mpiko. Nguya wana ekoki kozwama ntango moklisto azali “kolendendela kati na malɔmbɔ mpe na mabondeli butu na moi.” (1 Timoté 5:5, NW) Malɔmbɔ elimboli bongo kosɛnga na etingya nyonso, kosɛnga lisungi, mbala mosusu na kolela na mongongo makasi mpe na mpisoli. (Kokanisá na Baebele 5:7.) Kofungola motema na yo epai na Yehova “butu na moi” ekoki mpenza kosalisa. Lisusu, baninga ya malamu bakoki mpe kosalisa mingi mpo na kolongola mayoki ya kozala yo moko. Na nzela ya baninga malamu, moto akoki kozwa “maloba malamu” ya kolendisa oyo malobelami na Masese 12:25.

22. Makambo nini osengeli kotalela, oyo makosunga yo, wana mayoki ya kozala yo moko mazali kobima na bantango mosusu?

22 Soki mayoki ya kozala yo moko mazali koyela yo na bantango mosusu​—ezala ya lolenge nini—​kobosana te ete ezali na moto moko te oyo azangi mitungisi kati na bomoi. Ya solo, “libota mobimba ya bandeko” lizali konyokwama na mitindo mikeseni. (1 Petelo 5:9) Pɛngolá kokanisa makambo maleká. (Mosakoli 7:10) Talelá matomba oyo ozali kozwa. Oyo eleki mpenza, zwá ekateli ya kobatela bosembo na yo mpe sepelisá motema ya Yehova.​—Masese 27:11.

LOLENGE BASUSU BAKOKI KOPESA LISUNGI

23. Mokumba nini baninga baklisto bazali na yango epai na bandeko oyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko?

23 Lisungi mpe lisalisi ya baninga baklisto ezali na ntina mingi. Yakobo 1:27 elobi ete: “Losambo na pɛto mpe lobongi epai na Nzambe Tata na biso ezali boye: kotalaka bitike mpe basi-bakufeli-mibali kati na mpasi na bango mpe komibatela nzoto pɛto na makambo na mokili.” Ɛɛ, baklisto basɛngisami ete básalisaka mabota oyo mazali bobele na moboti moko. Wapi mwa makambo kati na yango bakoki kosalisa bango?

24. Mabota oyo mazali na moboti bobele moko mpe oyo mazali na mposa ya lisungi makoki kosalisama na makambo nini?

24 Lisungi ya mosuni ekoki kopesama. Biblia elobi ete: “Nde soko moto nani, oyo azali na biloko na mokili, amoni ndeko na ye na kozanga mpe akangeli ye motema na ye, bolingo na Nzambe eumeli kati na ye boni?” (1 Yoane 3:17) Liloba na Greke oyo ebongolami ete “amoni” elimboli, komona ya mbalakaka te, kasi kotala mpenza na likebi nyonso. Yango emonisi ete moklisto ya boboto asengeli liboso koyeba makambo mpe bamposa ya libota. Mbala mosusu bazali na mposa ya mosolo. Basusu bakoki kozala na mposa ete bábongisela bango ndako na bango. To bakoki kosepela ete bábyangama mpo na kolya to kozala elongo.

25. Lolenge nini baninga baklisto bakoki komonisa motema mawa epai na bandeko oyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko?

25 Lisusu, 1 Petelo 3:8 elobi ete: “Bino nyonso bózala na motema moko, kobɔndisana, kolingana, lokola bandeko, na mitema na mawa.” Moboti moko ya bana motoba, oyo azali kobɔkɔla bango bobele ye moko, alobaki ete: “Ezalaka mpenza mpasi mpe mbala mosusu nanyokwamaka na makanisi. Nzokande, na bantango mosusu, bandeko mibali mpe bandeko basi bazalaki koloba na ngai ete: ‘Joan, ozali kosala mosala moko malamu. Yango ekozala malamu mpo na yo na nsima.’ Bobele koyeba ete basusu bazali kokanisa mpo na yo mpe ete bazali komibanzabanza mpo na yo, yango esalisaka mingi.” Basi baklisto mosusu oyo bazali mibangé bakoki mpenza kopesa lisungi oyo ebongi epai na basi oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko, koyokáká bango ntango bazali kolobela mikakatano bazali na yango oyo bakoki te kosolola yango elongo na mibali.

26. Lolenge nini mibali baklisto oyo bakɔmɛli bakoki kosalisa bana bazangi batata?

26 Baklisto mibali bakoki kosalisa na makambo mosusu. Mosembwi Yobo alobaki ete: “Nabikisaki . . . mwana mobali azangi tata mpe moto oyo azalaki na mosungi te.” (Yobo 29:12, NW) Bobele bongo lelo oyo, baklisto mibali mosusu bamibanzabanzaka mpe mpo na bana oyo bazangi batata mpe bamonisaka solosolo “bolingo uta na motema na pɛto,” na mikano mabe te. (1 Timoté 1:5) Kozanga kobosana mabota na bango moko, bakoki na bantango mosusu kosala ebongiseli mpo na kobima elongo na bilenge wana kati na mosala ya kosakola mpe bakoki kobyanga bango na kosangana elongo na bango na boyekoli ya libota to na kominanola. Boboto motindo wana ekoki mpenza kobikisa mwana azangi tata longwa na etamboli ya mobulu.

27. Baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko bakoki kondimisama na lisungi nini?

27 Ya solo, mpo na kosukisa, baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bobele bango moko basengeli ‘komema mikumba na bango moko’ na likambo yango. (Bagalatia 6:5) Atako bongo, báyeba ete balingami na bandeko baklisto ya mibali mpe ya basi mpe na Yehova Nzambe ye moko. Biblia elobi na ntina na ye ete: “Akosimbaka bitike mpe basi-bakufeli-mibali.” (Nzembo 146:9) Na lisungi na Ye ya bolingo, mabota oyo mazali bobele na moboti moko makoki mpe kolónga!

a Soki elenge mwasi moklisto azwi zemi na ntina na etamboli ya mabe, lisangá ya boklisto ekolendisa soko moke te likambo oyo asali. Kasi soki abongoli motema, bankulutu ya lisangá mpe basusu kati na lisangá bakoki kolinga kopesa ye lisalisi.

b Tozali te kolobela makambo oyo kati na yango mwana akoki kozala na mposa ya kobatelama liboso na moboti oyo alingi kobebisa ye. Lisusu, soki moboti mosusu azali koluka kolɛmbisa bokonzi na yo, mbala mosusu na komekáká kopusa bana ete bákima yo, ekozala malamu kolobela likambo yango epai na baninga oyo bazali na eksperiansi mingi, lokola bankulutu kati na lisangá ya boklisto, mpo na kozwa toli na lolenge ya kosala liboso na likambo motindo wana.

LOLENGE NINI MITINDÁ OYO YA BIBLIA MIKOKI KOSALISA . . . BABOTI MPE BANA ETE BÁSILISA MIKAKATANO KATI NA MABOTA OYO MAZALI NA MOBOTI BOBELE MOKO?

Yehova Nzambe azali “tata na bitike, mpe mosungi na basi-bakufeli-mibali.”​—Nzembo 68:5.

Kozala na mwango ya malamu liboso ya kosala likambo ezali na ntina mingi mpo na kolónga.​—Masese 21:5.

Yehova apesi na baboti lotómo ya kosembola bana lokola esengeli.​—Masese 1:8.

Baklisto basi-bakufeli-mibali oyo bazali na mayele bamipesaka mingi na misala ya bobangi Nzambe mpe balendendelaka kati na mabondeli.​—1 Timoté 5:5, 10.

Komibanzabanza mpo na “bitike mpe basi-bakufeli-mibali” ezali eteni ya losambo ya solo.​—Yakobo 1:27.

OYO BILENGE BAKOKI KOSALA

Mama na yo to tata na yo azali bobele ye moko mpo na kobɔkɔla yo? Soki ezali bongo, okoki kosala nini mpo na kosalisa ye? Likambo ya liboso, zalá na botosi. Ezala bonene ya nzoto, ezala ete ozali mwana mobali to mwana mwasi, eloko moko te epesi yo bonsomi ya ‘kobuka mobeko ya mama na yo.’ (Masese 1:8) Yehova azali kosɛnga na yo ete ozala na botosi, mpe na nsima kosala bongo ekozala litomba mpo na yo.​—Masese 23:22; Baefese 6:1-3.

Kokanga mabɔkɔ te, mpe monisá botɔ́ndi. Tony alobi ete: “Mama na ngai asalaka na lopitalo, mpe elamba na ye ya mosala esengeli kongomama. Na bongo nangomaka yango mpo na ye. Esalisaka mama na ngai, yango wana nangomelaka ye yango.” Mama moko oyo azali sé ye moko alobi ete: “Na mikolo mingi oyo nalɛmbaka mpenza to nazongaka na ndako nsima ya kolekisa mokolo ya mpasi kati na mosala​—ezalaka mikolo oyo mwana na ngai ya mwasi abongisaka mesa mpe alambaka bilei ya mpokwa.”

Kobosana te ete lisungi na yo ezali na ntina mingi. Nsima na kolekisa mokolo moko ya mpasi na mosala, ekoki kozala mpasi mpo na moboti na yo ete atambwisa boyekoli ya Biblia na ndako. Soki ozali kopesa ye mabɔkɔ te, okoyeisa makambo mpasi koleka. Salá makasi na komilɛngɛla soki ntango ya boyekoli ekómi. Bongisá libela makambo oyo bayebisaki yo ete obongisa. Na kozaláká na botosi, na botɔ́ndi, mpe na kopesáká mabɔkɔ, okosepelisa moboti na yo, mpe oyo eleki ntina, okosepelisa Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto