Loyembo 225
Tóbɛlɛma epai na Yehova
1. Ngolu na yo, Yehova,
Ezali motuya.
Tokobɛlɛma na yo
Mpo tozali bana.
Yo Moninga malamu,
Tozwi solo kimya.
Mpo bolingo na yo pɛto,
Tokumisi yo, Yah.
2. Mobateli na biso,
Y’ozali boboto.
Yo nd’obyangaki biso
Na nzela na Klisto.
Olimbisi masumu,
Mpe mabe na biso.
Sol’ozali malamu, Yah;
Tomipesi na yo.
3. Toteyami na Klisto,
Momonisi na yo.
Tika y’ozwa lokumu,
Yo Nzambe ya solo!
Tokobɛlɛma na yo
Ete tóyeba yo.
Zalá moninga na biso;
Tokosalela yo.