Tókoba na ekateli na biso ya kolanda nzela ya Yehova
1 Likambo oyo ebendaki mpenza likebi ya bato kati na liyangani ya etúká “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi,” ezali bongo ekateli oyo ezwamaki na lisukulu ya nsuka. Ekateli yango ebandaki na maloba oyo: “Biso . . . tondimi na motema moko ete nzela ya Nzambe ezali nzela oyo eleki malamu na bomoi.” Tozali lisusu komikundola mwa makambo ya ekateli yango oyo epusaki biso na kondima “ƐƐ!”
2 Tozwi ekateli ya kotikala pɛto liboso ya Yehova, kozanga litɔnɔ na makambo ya mokili. Tokokoba kotya mokano ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso. Soki totiki ete Liloba na ye, Biblia etambwisa biso, tokopɛngwa soki moke te, kati na nzela na biso. Na yango tokomonisa solo ete nzela ya Nzambe eleki banzela nyonso ya mokili.
3 Bato mingi na mokili bazali kotya likebi na nzela ya Nzambe te, mpo na yango bazali kobuka mbuma mabe ya ezaleli na bango. (Yil. 10:23) Mpo na biso, tosengeli kokoba koteyama na Molakisi na biso Monene, Yehova, oyo azali koloba ete: “Oyo ezali nzela, tambolá na yango.” (Yis. 30:21) Nzela ya Yehova, ndenge yango esili komonisama na Makomami, eleki banzela mosusu nyonso na makambo nyonso. Mpo tólanda nzela yango, esengeli ete tósepela na makambo nyonso oyo Yehova azali koteya biso.
4 Yehova azali koteya biso malamu: Yehova azali kolakisa biso ntina ya solo ya bomoi mpe ndenge nini tokoki kosalela bomoi na biso na lolenge ya malamu koleka. Azali kolakisa biso ndenge tokoki kobongisa lisusu malamu makanisi na biso, ezaleli na biso mpe elimo na biso. Azali kolakisa biso ndenge nini kofanda na kimya elongo na bandeko na biso, na libota na biso, mpe na bazalani na biso. Azali koteya biso makambo oyo nyonso na nzela ya mokanda na ye Biblia, mpe na nzela ya ebongiseli na ye.
5 Makita na biso ya lisangá ezali na motuya monene mpo na yango. Wana tozali koyangana mpe kopesa biyano mbala na mbala na makita nyonso mitano, tozali komibongisa lokola baministre ya nsango malamu mpe tozali kozwa mateya malamu ya bomoi ya boklisto. (2 Tim. 3:16, 17) Molakisi na biso Monene azali mpe kopesa biso mateya na nzela ya mayangani mike mpe mayangani minene. Mokano na biso esengeli kozala ya kozangisa soko moke te makita to mayangani wana tozali nzoto kolɔngɔnɔ mpe soki tozali na makoki ya koyangana na yango.
6 Tiká ete tókoba na molende nyonso kolanda nzela ya Nzambe na mikolo mizali koya, mpo na kokumisa Yehova mpe mpo na kozwa bomoi ya seko!—Yis. 48:17.