Tólala mpɔngi te, tókende se liboso na mpiko mpenza!
Lapolo ya makita ya basangani ya la Société Watch Tower
MOTO moko te akoki koboya ete tozali na “ntango ya mpasi.” Biso Batatoli ya Yehova tozali mpe kokutana na mikakatano ya “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1-5) Kasi toyebi ete bato bazali na mposa ya lisalisi. Bayebi te ntina ya makambo oyo ezali koleka na mokili. Bazali na mposa ya kobɔndisama mpe bazali na mposa ya kozala na elikya. Mokumba nini ya libosoliboso tozali na yango ntango tozali kosalisa bazalani na biso?
Tozali na mokumba oyo Nzambe apesi biso ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na ye. (Matai 24:14) Bato basengeli koyeba ete Bokonzi ya likoló ezali elikya bobele moko mpo na bato. Kasi, bato nyonso te nde basepelaka na nsango yango. Na bisika mosusu, mosala na biso epekisami mpe bandeko na biso bazali konyokwama. Atako bongo, tozali kozonga nsima te. Totii elikya na biso na Yehova mpe tomityeli mokano ete tólala mpɔngi te mpe tókende se liboso na mpiko mpenza, mpe tokolɛmba te kosakola nsango malamu.—Misala 5:42.
Mokano yango emonanaki polele na makita oyo esalemaki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ ya mobu 2001. Likita ya nsuka ya mbula ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, esalemaki na mokolo ya pɔsɔ, mwa 6 Ɔkɔtɔbɛ na Ndako ya Mayangani ya Batatoli ya Yehova na Jersey City, na etúká ya New Jersey, na États-Unis.a Na mokolo oyo elandaki, makita mosusu esalemaki na bisika misato na États-Unis mpe moko na Canada.b
Na maloba na ye ya ebandeli, prezida ya likita yango, Ndeko Samuel Herd, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, alobelaki Nzembo 92:1, 4 mpe abakisaki ete: “Tosengeli kozala na botɔndi.” Ntina ya komonisa botɔndi emonanaki ntango bapesaki balapolo mitano oyo eutaki na bisika ndenge na ndenge ya mokili.
Balapolo euti na bamboka ndenge na ndenge
Ndeko Alfred Kwakye apesaki lapolo oyo emonisaki ndenge oyo mosala ya kosakola ezali kokende liboso na Ghana. Na ekoló yango, mosala na biso epekisamaki na boumeli ya bambula ebele. Bato bazalaki kotuna: “Mpo na nini bapekisi bino? Bosali nini?” Ndeko Kwakye alobi ete, mituna ya ndenge wana ezalaki libaku malamu ya kopesa litatoli. Na 1991 ntango epekiseli esilaki, Batatoli ya Yehova na Ghana bazalaki 34 421. Na sanza ya Augusto 2001, basakoli bakómaki 68 152; bakómaki mingi mpenza (98 %). Bazali kosala bibongiseli mpo na kotonga Ndako moko ya Mayangani oyo ekozala na bisika ya kofanda 10 000. Emonani polele ete bandeko na biso ya elimo na Ghana bazali kosalela malamu mpenza bonsomi na bango ya kosambela.
Atako mobulu ezali kosalema mingi na Irlande mpo na makambo ya politiki, bandeko na biso oyo bazali kuna bazali kosala mosala ya kosakola na molende mpenza mpe bato bamemyaka bango mpo bakɔtaka na makambo ya politiki te. Ndeko Peter Andrews oyo azali mokambi ya Komite ya Filiale, alobi ete Irlande ezali na masangá 115 na kati ya zongazonga motoba. Ndeko Andrews abɛtaki lisolo ya Liam, mwana mobali moko ya mbula zomi oyo abangaka te kosakola na eteyelo na bango. Liam apesaki baninga na ye ya kelasi buku Mokanda mpo na Masolo ya Biblia 25, apesaki mpe moko na molakisi na bango. Liam azalaki na mposa ya kozwa batisimo, kasi moto moko atunaki soki azali komona te ete azali naino mwana moke mpo na kozwa batisimo. Liam ayanolaki boye: “Bótalela mbula na ngai te kasi bolingo oyo nazali na yango mpo na Yehova. Batisimo na ngai ekomonisa ete nalingaka Yehova mingi.” Liam azali na mokano ya kokóma misionɛrɛ.
Na 1968, basakoli ya nsango malamu bazalaki 5 400 na Venezuela. Kasi sikoyo, Ndeko Stefan Johansson, mokambi ya Komite ya Filiale, alobi ete bakómi na basakoli koleka 88 000. Kutu elikya ezali ete bakobakisama lisusu mpamba te bato koleka 296 000 bayanganaki na Ekaniseli ya mobu 2001. Na sanza ya Desɛmbɛ 1999, bambula makasi ebɛtaki, yango wana pɔtɔpɔtɔ ezipaki bandako mpe ebomaki bato soki 50 000; Batatoli mosusu mpe bakufaki. Na Ndako ya Bokonzi moko, pɔtɔpɔtɔ yango etondaki tii na pene na plafɔ. Ntango moto moko apesaki likanisi ete bátika ndako yango, bandeko bayanolaki ete: “Ekoki kosalema te! Oyo ezali Ndako na biso ya Bokonzi mpe tokoki kotika yango te.” Basalaki mosala ya kolongola ebele ya pɔtɔpɔtɔ wana, mabanga na biloko mosusu. Babongisaki ndako yango, mpe bandeko balobaka ete sikoyo ekómi lisusu kitoko koleka!
Ndeko Denton Hopkinson oyo azali mokambi ya Komite ya Filiale ya Philippines alobi ete mboka yango ezali na minɔkɔ 87. Na mobu ya mosala oyo euti kosila, Makomami Mosantu—Libongoli ya Mokili ya Sika ebimaki na mobimba na yango na nkota ya minene misato ya ekoló Philippines: Cebuano, Iloko na Tagalog. Ndeko Hopkinson abɛtaki lisolo ya mwana mobali moko ya mbula libwa oyo atángaki buku Nsango malamu ya esengo mpo na yo, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova. Azwaki mpe mikanda mosusu na filiale, atángaki mpe yango nyonso kasi libota na ye bapekisaki ye. Nsima ya bambula ebele, ntango azalaki kotánga kelasi ya monganga, asɛngaki na filiale ete alingi koyekola Biblia. Azwaki batisimo na 1996, mpe eumelaki te abandaki mosala ya kosakola ya ntango nyonso. Lelo oyo azali kosala na biro ya filiale.
Ndeko Ronald Parkin oyo azali mokambi ya Komite ya Filiale na Porto Rico, alobi ete: “Batatoli ebele ya mboka yango bakendaka kofanda na bikólo mosusu.” Na esanga yango, basakoli bazali koleka 25 000 mpe motángo na bango emataka te banda bambula ebele. Mpo na nini? Ezali mpo ete mbula na mbula, basakoli soki nkóto moko balongwaka na Porto Rico bakendeke kofanda na États-Unis, mingimingi mpo na kokima mikakatano ya nkita. Ndeko Parkin alobelaki ndenge oyo tribinale moko ekataki likambo ya Luis, mwana mobali moko ya mbula 17 oyo azalaki kobɛla kanser ya makila. Lokola Luis aboyaki bázongisa ye makila, likambo na ye ekómaki tii na tribinale. Lokola zuzi azalaki na mposa ya kosolola na Luis, akendeki kotala ye na lopitalo. Luis atunaki ye boye: “Mpo na nini soki nasalaka mabe moko ya monene, mbɛlɛ osambisi ngai lokola mokóló, kasi mpo nalingi kotosa Nzambe, ozali komona ete nazali naino mwana moke?” Zuzi yango amonaki mpenza ete, atako akokisi naino te bambula oyo endimami na mibeko mpo na kotalela moto ete akómi mokóló, mwana mobali yango akɔmeli na makanisi mpe akoki kozwa bikateli oyo etali bomoi na ye.
Na nsima ya balapolo wana ya bamboka ya mosika, Ndeko Harold Corken oyo azali na Komite ya Filiale ya États-Unis, asololaki na basaleli ya Yehova minei oyo baumelá mingi na mosala ya ntango nyonso. Arthur Bonno alekisi mbula 51 na mosala ya ntango nyonso mpe lelo oyo azali mosangani ya Komite ya Filiale ya ekoló Équateur. Angelo Catanzaro asalá mosala ya ntango nyonso na boumeli ya mbula 59, mingimingi lokola mokɛngɛli-motamboli. Richard Abrahamson azwá diplome ya Eteyelo ya Gileadi na 1953, mpe azalaki na mokumba ya kotambwisa mosala na Danemark na boumeli ya mbula 26, liboso ete azonga na Betele ya Brooklyn. Na nsuka, bato nyonso basepelaki na koyoka Ndeko Carey Barber oyo azali na mbula 96. Azwaki batisimo na 1921, mpe akokisi mbula 78 na mosala ya ntango nyonso mpe kobanda 1978, azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi.
Masukulu ya kafukafu
Na likita ya nsuka ya mbula, ezalaki mpe na masukulu oyo elandanaki oyo esimbaki mpenza mitema. Ndeko Robert Wallen asalaki lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Libota mpo na nkombo na ye.” Tozali libota mpo na nkombo ya Yehova, mpe tozali na kati ya bikólo koleka 230. Yehova apesá biso “elikya na ntango ekoya.” (Yilimia 29:11) Tosengeli kosala ete Bokonzi ya Nzambe ekende ntango nyonso liboso; mpo na yango tosengeli kosakola nsango malamu oyo ebɔndisaka mpe ekitisaka mitema. (Yisaya 61:1) Ndeko Wallen asukisaki boye: “Mokolo na mokolo, tómonisa na bomoi na biso ete tobongi na nkombo oyo babengaka biso, Batatoli ya Yehova.”—Yisaya 43:10.
Eteni ya nsuka ya programɛ ezalaki lisukulu na biteni misato oyo epesamaki na bandeko misato oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Ezalaki na motó ya likambo: “Sikoyo ezali ntango ya kolala mpɔngi te, kasi ya kotɛlɛma ngwi, mpe ya kokóma makasi.”—1 Bakolinti 16:13, NW.
Liboso, Ndeko Stephen Lett asalaki lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Bólala mpɔngi te na ntango oyo ya nsuka.” Ndeko Lett alobaki ete, mpɔngi ezali malamu mpo na nzoto mpamba te esalisaka biso tózwa lisusu makasi. Kasi mpɔngi ya elimo ezalaka malamu ata moke te. (1 Batesaloniki 5:6) Na bongo, ndenge nini tokoki kolala mpɔngi te na elimo? Ndeko Lett alobelaki “nkisi” misato ya elimo: (1) Kozala ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo. (1 Bakolinti 15:58) (2) Koyeba mposa na biso ya makambo ya elimo. (Matai 5:3, NW) (3) Kondima toli ya Biblia mpo na kozala na etamboli ya malamu.—Masese 13:20.
Ndeko Theodore Jaracz asalaki lisukulu moko ya kafukafu oyo ezalaki na motó ya likambo: “Tótikala ngwi na ntango tomekami.” Ntango alobelaki Emoniseli 3:10, Ndeko Jaracz atunaki boye: “ ‘Ngonga ya komekama’ ezali nini? Ezali komekama oyo tozali na yango, “na Mokolo ya Nkolo.” (Emoniseli 1:10) Komekama yango etali likambo ya ntina se moko: tozali nde mpo na Bokonzi ya Nzambe to mpo na mokili mabe ya Satana? Kino ntango ya komekama yango ekosuka, tokokutana kaka na minyoko to mikakatano. Tokotikala sembo epai ya Yehova mpe na ebongiseli na ye? Ndeko Jaracz alobaki ete: “Esengeli mokomoko kati na biso amonisa bosembo ya ndenge wana.”
Mpo na kosukisa, Ndeko John Barr asalaki lisukulu na motó ya likambo ete: “Tókóma makasi lokola bato ya elimo.” Azwaki makanisi oyo ezali na Luka 13:23-25 mpo na kolakisa ete tosengeli kosala makasi mpo na “kokɔta na ekuke ya nkaka.” Mingi balongaka kokɔta te mpo batyaka molende mingi te ya kokóma makasi. Soki tolingi kokóma baklisto oyo bakɔmeli, tosengeli koyekola mpe kosalela mitinda ya Biblia na makambo nyonso ya bomoi na biso. Ndeko Barr alendisaki bato na makanisi oyo: “Nakanisi bino nyonso bokondima ete sikoyo ntango ekoki mpo na (1) kotya Yehova na esika ya liboso na makambo nyonso mpenza ya bomoi na biso; (2) kokóma makasi; mpe (3) kosala makasi mpo na kosala mokano ya Yehova. Na ndenge wana nde tokokoka kokɔta na ekuke ya nkaka oyo ememaka na bomoi ya malamu mpe ya seko.”
Na ntango likita ya nsuka ya mbula esilaki, ezalaki na motuna moko oyo eyano na yango epesamaki naino te: mokapo ya mobu mpo na 2002 ezali nini? Bapesaki eyano ya motuna yango na mokolo oyo elandaki.
Likita mosusu mpe esalemaki
Mokolo ya eyenga na ntɔngɔ, ntango programɛ ya likita mosusu ebandaki, bato bazalaki kozela na mposa makasi. Likita wana mosusu ebandaki na lisolo mokuse ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli; nsima na yango basalaki lisolo mokuse ya makambo ya ntina oyo elobamaki na likita ya nsuka ya mbula. Nsima bato nyonso basepelaki na koyoka lisukulu oyo elobelaki mokapo ya mobu 2002 na motó ya likambo: “Bóya epai na ngai . . . mpe nakobɔndisa bino.” (Matai 11:28, NW) Lisukulu yango eutaki na masolo ya boyekoli oyo ebimisamaki nsima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 2001.
Nsima na yango, bato oyo bakendaki na Mayangani “Bateyi ya Liloba ya Nzambe” na Italie mpe na France na sanza ya Augusto 2001, bapesaki makanisi na bango na oyo etali mayangani yango.c Mpo na kosukisa, masukulu mibale ya ntina mingi esalemaki na balobi bapaya oyo bautaki na Betele ya Brooklyn; wana ezalaki nde makambo ya ntina mingi ya programɛ ya mokolo yango.
Lisukulu ya liboso ezalaki na motó ya likambo: “Tótya elikya epai ya Yehova na ntango oyo ya mpasi na mpiko mpenza.” Makambo ya ntina oyo minei elobamaki: (1) Kotyela Yehova elikya na mpiko mpenza ezalaka ntango nyonso na ntina mingi mpo na basaleli ya Nzambe. Na kati ya Biblia, ezali na bandakisa ebele ya bato oyo, atako batɛmɛlaki bango, bamonisaki mpiko mpe kondima. (Baebele 11:1–12:3) (2) Yehova apesaka biso ntina malamu ya kotyela ye elikya. Misala na ye mpe Liloba na ye ezali komonisa biso ete amibanzabanzaka mpo na basaleli na ye mpe abosanaka bango ata moke te. (Baebele 6:10) (3) Kozala na mpiko mpe kotya elikya ezali na ntina mingi lisusu lelo oyo. Kaka ndenge Yesu asakolaki ete ‘bato bakoyina biso.’ (Matai 24:9) Mpo na koyika mpiko, tosengeli kotyela Liloba ya Nzambe motema, kondima ete elimo na ye ezali kosunga biso, mpe kozala na mpiko mpo na kolanda kosakola nsango malamu. (4) Bandakisa ezali komonisa ete tozali kokutana na botɛmɛli mikolo oyo. Bayangani nyonso bayokaki mawa mingi ntango molobi ayebisaki bango lolenge oyo bandeko na biso bazali konyokwama na Arménie, na France, na Géorgie, na Kazakhstan, na Russie mpe na Turkménistan. Ya solo, oyo ezali ntango ya komonisa mpiko mpe kotyela Yehova motema!
Molobi ya nsuka asalaki lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Tozali kokende liboso na bomoko elongo na ebongiseli ya Yehova.” Lisukulu yango elobelaki makambo ya ntina mpo na mikolo oyo. (1) Bato mingi bazali komona ndenge oyo basaleli ya Yehova bazali se kokende liboso. Tozali kobenda likebi ya bato na nzela ya mosala na biso ya kosakola mpe mayangani na biso. (2) Yehova asali ebongiseli na ye oyo ezali na bomoko. Na mobu 29 T.B., Yesu apakolamaki na elimo santu mpo amema “biloko nyonso,” elingi koloba bato oyo bazali na elikya ya kokende likoló mpe bato oyo bazali na elikya ya kotikala na mabele, na kati ya libota ya Nzambe oyo ezali na bomoko. (Baefese 1:8-10) (3) Mayangani emonisaka mpenza bomoko kati na bandeko oyo bafandi na mikili ndenge na ndenge. Yango emonanaki polele na mayangani oyo esalemaki na France mpe na Italie na sanza ya Augusto oyo euti koleka. (4) Ekateli oyo ya kosimba motema ezwamaki na France mpe na Italie. Molobi atángaki mwa ndambo ya makambo oyo ezali na kati ya ekateli yango.
Ekateli yango mobimba ezali na nse awa. Mpo na kosilisa lisukulu ya nsuka, molobi mopaya atángaki liyebisi moko oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisaki, oyo esimbaki mitema ya bayangani. Ndambo ya maloba na yango ezalaki oyo: “Oyo ezali ntango ya kolala mpɔngi te, kasi ya kolanda kokɛngɛla, wana tozali kokanga ntina ya lolenge oyo makambo ya mokili ezali kobongwana. . . . Tolingi bóyeba ete tozali komibanzabanza na bolingo mpenza mpo na bino mpe mpo na basaleli mosusu nyonso ya Nzambe. Tiká ete Yehova apambola bino mingi na ndenge bozali kosala mokano na ye na molimo na bino mobimba.” Basaleli ya Yehova na bipai nyonso bazali na ekateli ya kolala mpɔngi te na ntango oyo ya mpasi, kasi nde ya kolanda kokende liboso na mpiko mpenza elongo na ebongiseli ya Yehova oyo ezali na bomoko.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bato mosusu balandaki likita ya nsuka ya mbula na nzela ya video mpe ya telefone na bandako mosusu, mpe bato nyonso oyo balandaki likita yango bazalaki 13 757.
b Bisika mosusu oyo makita yango esalemaki ezali Long Beach, na etúká ya Californie; Pontiac, na etúká ya Michigan; Uniondale, na etúká ya New York; mpe Hamilton, na etúká ya Ontario na Canada. Bato nyonso oyo balandaki makita yango, bakisa mpe baoyo balandaki yango na video mpe na telefone na bandako mosusu bazalaki 117 885.
c Mayangani misato esalemaki na France: na Paris, na Bordeaux mpe na Lyon. Na Italie, bayangani oyo bautaki États-Unis batindamaki na liyangani oyo esalemaki na Rome mpe oyo esalemaki na Milan, atako mayangani libwa esalemaki na mbala moko na bisika mosusu na ekólo yango.
[Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 29]
Ekateli
Na sanza ya Augusto 2001, mayangani ya etúká “Bateyi ya Liloba ya Nzambe” oyo esalemaki na France mpe na Italie ekesanaki na oyo esalemaki na bamboka mosusu. Na mayangani yango, bazwaki ekateli moko ya ntina mingi. Yango elobaki boye:
“BISO BATATOLI YA YEHOVA oyo tosangani na liyangani oyo ezali na motó ya likambo ‘Bateyi ya Liloba ya Nzambe’ tolandi mateya oyo ezali na ntina mingi mpenza. Bamonisi biso polele nani azali nkolo ya mateya yango. Mateya yango ezali ya bato te. Yango ezali mateya ya Moto oyo Yisaya, mosakoli moko ya kala, abengaki ye ‘Molakisi Monene’ na biso. (Yisaya 30:20, NW) Talá likambo ya ntina oyo Yehova ayebisi biso na Yisaya 48:17: ‘Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.’ Asalaka yango ndenge nini? Libosoliboso na nzela ya Biblia, buku oyo ebongolami na minɔkɔ mingi koleka babuku nyonso mpe ezali buku oyo bato mingi bazali na yango na mokili mobimba; yango eyebisi biso polele ete: ‘Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba.’—2 Timote 3:16, NW.
“Lelo oyo, bato nyonso bazali mpenza na mposa ya mateya yango oyo epesaka matomba. Mpo na nini tolobi bongo? Ntango bato ya mayele bazali kotala ndenge mokili oyo ezali kobongwana mpe ndenge etondi na mikakatano, likambo nini bazali kondima? Kaka likambo oyo: Atako bamilio ya bato batángi kelasi na biteyelo ndenge ezali na mokili mobimba, emonani ete mitinda ya malamu ezali te, mpe lisusu bato bazali koyeba te kokesenisa malamu na mabe. (Yisaya 5:20, 21) Ebele ya bato bayebi Biblia te. Atako teknoloji ezali kosalisa bato báyeba ebele ya makambo na nzela ya baordinatɛrɛ, biyano nini bazali kozwa na mituna ya ntina mingi lokola oyo: Ntina ya bomoi ezali nini? Makambo oyo ezali kosalema na mokili na ntango oyo elimboli nini? Elikya ya solosolo ezali mpo na mikolo ezali koya? Mokolo mosusu kimya ya solosolo ekozala mpenza? Lisusu, bato bazali kaka kozongela mabunga oyo esalemaka atako ezali na bamilio ya babuku oyo elobelaka misala nyonso oyo bato basalaka. Mobulu ezali kobakisama. Maladi oyo bato bazalaki kokanisa ete elimwá ekómi kozonga, mpe maladi mosusu lokola sida ezali kopalangana na ndenge moko ya kobangisa. Mabota ezali se kopanzana mingi. Mai, mopɛpɛ mpe bazamba ezali kobeba. Koboma bato na mobulu mpo na makambo ya politiki mpe mindoki oyo ebomaka bato ebele na mbala moko ezali kolongola kimya. Mikakatano oyo ezangi nsuka ezali se kobakisama. Tosengeli mpenza kosala nini mpo na kosunga bazalani na biso na mikolo oyo ya mpasi? Ezali nde na mateya oyo ezali kolimbola ntina oyo makambo mabe etondi na mokili, mateya oyo elakisaka nzela ya kolanda mpo na kozala na bomoi ya malamu sikoyo mpe lisusu oyo epesaka elikya ya malamu mpo na mikolo oyo ezali koya?
“Makomami epesi biso mokumba ete ‘tókende mpe tókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, tólakisa bango ete bátosa nyonso oyo Klisto atindaki.’ (Matai 28:19, 20, NW) Yesu Klisto nde apesaki biso mosala yango nsima ya lisekwa na ye, ntango azwaki bokonzi nyonso ya likoló mpe ya mabele. Mosala yango ezali na ntina koleka misala nyonso oyo bato balendisaka bato básala. Na miso ya Nzambe, mosala na biso ezali na esika ya liboso, etalelaka mpenzampenza bamposa ya elimo ya baoyo bazali koluka boyengebene. Tozali mpenza na ntina mingi oyo euti na Makomami mpo na kotalela mokumba yango na lisɛki te.
“Yango ezali kosɛnga ete tótya mosala yango na esika ya liboso mpenza na bomoi na biso. Ata soki mangomba mpe bibongiseli ya politiki ezali kotyela biso makambo ebele mpo na kopɛngwisa likebi na biso, ezali kotya bipekiseli mpe botɛmɛli mpo ete mosala na biso ya koteya na mokili mobimba ezonga nsima, mosala ekosalema kaka mpo Nzambe azali kopambola mpe kosalisa biso. Totii motema mpe tozali na kondima ete mosala oyo ekokende se liboso tii ekokokisama na mobimba na yango. Mpo na nini tondimi yango? Mpo ete Nkolo Yesu Klisto alakaki ete akozala na biso na mosala oyo Nzambe apesi biso tii na nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.
“Mitungisi ya bato etikali moke esila. Mokumba na biso ya ntango oyo esengeli kokokisama liboso ete nsuka eya. Yango wana, biso Batatoli ya Yehova tozwi ekateli ete:
“Ya liboso: Lokola tozali baministre oyo bamipesi na Nzambe, tozali na ekateli ya kokoba kotya matomba ya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso mpe ya kolanda kokola na elimo. Mpo na yango, libondeli na biso eyokani na maloba ya Nzembo 143:10 ete: ‘Lakisá ngai kosala mokano na yo, mpo ete yo ozali Nzambe na ngai.’ Yango ezali kosɛnga ete tózala bayekoli ya molende, tósalaka makasi mpo na kotánga Biblia mokolo na mokolo, kozala na boyekoli ya biso moko mpe koluka koyeba makambo na mozindo. Mpo bato nyonso bámona ete tozali kokende liboso, tokosala nyonso oyo ekoki mpo na kobongisa makita mpe mpo na kozwa litomba na mateya ya Teokrasi oyo tolandaka na makita ya lisangá, na mayangani ya zongazonga, na mayangani ya etúká, na mayangani ya ekólo mobimba mpe na mayangani oyo esangisaka bato oyo bauti mikili mingi.—1 Timote 4:15; Baebele 10:23-25.
“Ya mibale: Mpo ete tóteyama na Nzambe, tokolya kaka na mesa ya Yehova mpe tokotosa mpenza likebisi Biblia ezali kopesa biso mpo na mateya ya bademo oyo epɛngwisaka. (1 Bakolinti 10:21; 1 Timote 4:1) Tokozala na bokɛngi mingi mpo na koboya makambo oyo ekoki kobebisa biso, na ndakisa mateya ya mangomba ya lokuta, makanisi ya mpambampamba, bamposa ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo, kotala bililingi ya bato bazali bolumbu oyo ekómi lokola maladi na mokili, masano ya mbindo, mpe makambo nyonso oyo ezali na boyokani te ‘na mateya ya lobiko.’ (Baloma 1:26, 27; 1 Bakolinti 3:20; 1 Timote 6:3; 2 Timote 1:13, NW) Lokola tolingi komemya ‘makabo na motindo na mibali’ oyo babongisami mpo na koteya makambo ya sembo, tokosala nyonso oyo tokoki kosala mpo na komemya mpenza milende na bango mpe tokosala elongo na bango mpo na kotombola mitinda ya bizaleli malamu mpe ya elimo ya Liloba ya Nzambe oyo ezali pɛto mpe sembo.—Baefese 4:7, 8, 11, 12; 1 Batesaloniki 5:12, 13; Tito 1:9.
“Ya misato: Biso baboti, tokoteya bana na biso kaka na maloba te, kasi mpe na ndakisa. Tokoluka libosoliboso kosalisa bango mpo ete banda bomwana na bango ‘báyeba Makomi [mosantu, NW] oyo ekoki kopesa bango boyebi mpo na kobika.’ (2 Timote 3:15) Tokobosana te ete kobɔkɔla bango na disiplini mpe na makebisi ya Yehova ekopesa bango libaku oyo eleki malamu ya komona na bomoi na bango ete elaka ya Nzambe oyo elobaka ete ‘bakozala malamu mpe bakoumela na mokili’ ezali solo.—Baefese 6:1-4.
“Ya minei: Ntango tokutani na mitungisi mpe mikakatano ya minene, libosoliboso tokoluka ‘ete bisengeli na biso eyebana na Nzambe,’ na kondima mpenza ete ‘kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso’ ekobatela biso. (Bafilipi 4:6, 7) Tokozwa kopema lokola tomitii na ekanganeli ya Klisto. Tokokakatana te mpo na kokitisa mitungisi na biso epai ya Nzambe, mpamba te toyebi ete amibanzabanzaka mpo na biso.—Matai 11:28-30; 1 Petelo 5:6, 7.
“Ya mitano: Tokozala na molende mpo na ‘kosembola liloba ya solo’ malamumalamu mpe mpo na ‘kokokisa mosala na biso malamumalamu’; tokosala yango mpo ete tolingi komonisa botɔndi na biso epai ya Yehova mpo tozwi lokumu ya kozala bateyi ya Liloba na ye. (2 Timote 2:15; 4:5, NW) Tozali na mposa mpenza ya koluka bato oyo babongi mpe ya kokolisa mbóto oyo tozali kolona, mpamba te toyebi malamu ete etaleli bomoi na bango. Lisusu, tokoyekola na bato mingi Biblia mpe tokosala milende mpo na kobongisa lolenge na biso ya koteya. Na ndenge yango, tokosala mokano ya Nzambe oyo alingi ete “bato ya lolenge nyonso bábika mpe báyeba solo malamumalamu.”—1 Timote 2:3, 4, NW.
“Ya motoba: Na boumeli ya bambula ya 1900, na mikili mingi bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova mpe banyokolaki bango mingi; likambo yango ezali mpe naino kosalema tii na moi ya lelo. Kasi emonani ete Yehova azali na biso. (Baloma 8:31) Lokola Liloba na ye oyo ezangaka te kokokisama endimisi biso ete ‘ebundeli na ebundeli oyo esalami mpo na kotɛmɛla biso’ ekolonga te kopekisa, kolɛmbisa, to kokanga mosala na biso ya kosakola Bokonzi mpe ya koteya. (Yisaya 54:17) Ezala na ntango ya mpasi to na ntango ya malamu, tokoki kotika te koyebisa bato mateya ya solo. Tozali na ekateli ya kokokisa mosala na biso ya kosakola mpe ya koteya na lombangu. (2 Timote 4:1, 2) Mokano na biso ezali ya kosala nyonso mpo ete tóyebisa bato ya bikólo nyonso nsango malamu ya Bokonzi. Na ndenge yango, bato bakozala ntango nyonso na libaku ya koyekola ebongiseli oyo Nzambe asali mpo bato bázwa bomoi ya seko na mokili ya sika. Biso nyonso lokola tozali lisangá ya bateyi ya Liloba ya Nzambe, tozali na mokano ya kolanda ndakisa ya Yesu Klisto, Moteyi Monene, mpe ya komekola bizaleli ya malamu azalaki na yango. Tokosala makambo nyonso wana mpo na komemya mpe kokumisa Yehova Nzambe, oyo azali Molakisi Monene mpe Mopesi-Bomoi na biso.
“Tiká ete biso nyonso bato oyo tosangani na liyangani oyo, baoyo tondimi ekateli oyo, tóloba Ɛɛ!”
Ntango motuna etunamaki na nsuka ya ekateli, bayangani 160 000 oyo bazalaki na mayangani misato na France, mpe bayangani 289 000 oyo bazalaki na bisika libwa na Italie, bagangaki makasi na minɔkɔ ebele ete “Ɛɛ.”