Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/99 lok. 1
  • “Tómonisa motema pɛtɛɛ”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Tómonisa motema pɛtɛɛ”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Masolo mosusu
  • Tosengeli kozala na motema molai na mosala na biso ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Kobá kozala na motema molai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Zwá liteya na motema molai ya Yehova mpe ya Yesu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Ozalaka na motema pɛtɛɛ?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 1/99 lok. 1

“Tómonisa motema pɛtɛɛ”

1 Wana tozali komona ebongiseli mabe ya Satana kokóma mpenza na nsuka na yango, esengeli ete “tómonisa motema pɛtɛɛ” wana tozali kozela mokolo ya Yehova, mokolo ya lisiko. Mingimingi lokola ntango oyo ekómi pene na nsuka, banguna na biso, bilimu mabe bazali kosala makasi mpo na kolongola likebi na biso na bokonzi ya Yehova, oyo ezali likambo eleki ntina, mpe bazali komeka biso ete tótya likebi mingi koleka na bamposa na biso moko. Na ndenge yango, Satana azali koluka kokweisa biso ete tótika to tólɛmba mosala ya kosakola Bokonzi. (Yak. 5:7, 8, NW; Mat. 24:13, 14) Na meko nini esengeli na biso komonisa motema pɛtɛɛ?

2 Na kozaláká na motema molai: Na ntango tokutani na bato oyo bazali kosepela na solo te to bazali kotɛmɛla mosala na biso ya kosakola, motema pɛtɛɛ ekosalisa biso na kokoba kati na mosala ya kosakola. Tokobanga te to mpe tokosilika nokinoki te soki tokutani na bato oyo bazali na maloba mabe to mpe bazangi bokonde. (1 Pet. 2:23) Nguya wana oyo ezali kati na biso ekopekisa biso ete tóloba mabe mpo na bato ya teritware na biso, baoyo bazali komonisa kozanga bosepeli to bazali koyina mosala na biso, koyebáká ete masolo motindo yango makoki kolɛmbisa biso mpe baoyo bazali kosala elongo na biso na mosala ya kosakola.

3 Olendendela na motema pɛtɛɛ nyonso: Tokoki komonisa motema pɛtɛɛ te, soki nsima ya kosolola malamu na moto moko na mosala ya kosakola, tozali kokutana na ye lisusu te. Likambo yango ekoki mpe kosalema soki bato oyo tozali koyekola na bango bazali kokola noki te to mpe bazali kokakatana mpo na kozwa etɛlɛmɛlo mpo na solo. Nzokande, mbala mingi kolendendela na motema pɛtɛɛ ebimisaka matomba ya malamu. (Gal. 6:9) Ndeko mwasi moko azongelaki elenge mwasi moko mbala mingi liboso ete abanda koyekola na ye Biblia. Mbala mitano oyo ndeko mwasi azongelaki ye, elenge mwasi yango azalaki kosala makambo mosusu. Na ntango amekaki mpo na mbala ya motoba, ndeko mwasi apolaki na mbula makasi kasi, akutaki moto te na ndako lokola momeseno. Atako bongo, lokola azalaki na mposa ya kozongela lisusu elenge mwasi yango, ndeko na biso ya mwasi akendaki lisusu koluka ye mpe na mbala oyo akutaki elenge mwasi yango amibongisi mpo na koyekola. Na nsima, mwasi yango asalaki bokoli mingi mpe nsima ya mwa ntango moke apesaki bomoi na ye epai na Yehova.

4 Toyebi ete mokolo ya Yehova ekoumela mingi te. Na yango, tozali kozela lolenge oyo akokokisa makambo na ye, koyebáká ete motema pɛtɛɛ ya Yehova ekobimisa matomba malamu. (Hab. 2:3; 2 Pet. 3:9-15) Tosengeli komekola motema pɛtɛɛ ya Yehova mpe tosengeli kolɛmba te kati na mosala ya kosakola. “Na komonisáká kondima mpe motema pɛtɛɛ,” talá epai na Yehova mpo na kozwa lifuti mpo na mosala na yo makasi.​—Ebe. 6:10-12.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto