Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/99 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Yanuali

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Yanuali
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 4 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 11 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 18 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 25 Yanuali
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 1/99 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Yanuali

Pɔsɔ ebandi na 4 Yanuali

Loyembo 36

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo matali lisangá oyo mazwami na Mosala na biso ya Bokonzi. Soki bobongoli manaka ya makita na mwa 1 Yanuali, kundwelá bayangani nyonso ete báyebisa manaka yango ya sika na bato oyo bakokutana na bango na mosala ya kosakola.

Min. 15: “Tósalela malamu babuku ya kala.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá babuku ya kala oyo ezali na libombo ya lisangá. Lobelá makambo ya ntina oyo mazwami kati na yango, mpe limbolá ndenge nini tokoki kolakisa yango epai ya bato mosusu. Lendisá bandeko nyonso ete bákabola babuku yango na mosala ya kosakola mpe ntango bazali kopesa litatoli ya libaku malamu na boumeli ya sanza ya Yanuali. Bongisá mwa elakiseli ya mokuse, oyo ekomonisa ndenge ya kokabola babuku yango.

Min. 20: Lolenge ya kopona mwango oyo eyokani na mibeko ya Leta wana tolingi kosalisa nzoto kozanga kozongisama makila. (Mis. 15:28, 29) Lisukulu ekosalema na nkulutu moko ya makoki. Etongami likoló na kalati Instructions médicales/Pas de sang: Na nsima ya likita, Batatoli oyo bazwá batisimo bakozwa kalati ya sika, mpe baoyo bazali na bana bilenge oyo bazwi naino batisimo te bakozwa Carte d’identité mpo na mwana mokomoko. Bótondisa kalati yango bobele na ntango wana te. Esengeli kokende kosala yango na likebi nyonso na ndako, kasi KOTYA SINYATILI TE. Sinyatili ya nkolo kalati, nkombo ya batemwe mpe dati ekotyama na bakalati nyonso na nsuka ya boyekoli ya mokanda ya pɔsɔ oyo ekolanda, na litambwisi ya ndeko oyo azali kotambwisa boyekoli ya mokanda. Liboso ya kotya sinyatili osengeli komindimisa ete otondisi kalati na yo malamu. Baoyo bazali kotya sinyatili lokola batemwe basengeli komona wana mokóló kalati azali kotya sinyatili na ye na kalati. Soki basepeli, basakoli oyo bazwi naino batisimo te bakoki kokoma malako mpo na bango mpenza mpe mpo na bana na bango na koyokanisáká makambo mazali kati na kalati na ezalela na bango mpenza mpe na komindimisa ya bango moko. Motambwisi ya boyekoli ya mokanda asengeli komindimisa ete bandeko nyonso oyo bazali na etuluku ya boyekoli ya mokanda basili kozwa lisungi oyo ebongi mpo na kotondisa kalati Instructions médicales/Pas de sang.

Loyembo 61 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 11 Yanuali

Loyembo 88

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 20: “Tókoba na ekateli na biso ya kolanda nzela ya Yehova.” Lisukulu. Pesá mpe bilendiseli mpo na bandeko nyonso ete báyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ na makita nyonso mitano ya lisangá.

Min. 15: “‘Tómonisa motema pɛtɛɛ.’” Lisolo kati na bato ya libota moko. Bazali kolobela ndenge oyo bakoki komonisa mpenza motema pɛtɛɛ na mosala na bango ya kosakola. Lobelá mpe makanisi ya ntina mazwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 1995 na lok. 12.

Loyembo 135 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 18 Yanuali

Loyembo 169

Min. 5: Mayebisi ya lisangá.

Min. 10: Mposa ya lisangá.

Min. 15: “Bankulutu bazali kotambwisa lisangá​—Mikumba ya motambwisi ya boyekoli ya mokanda.” Lisukulu ekosalema na motambwisi moko ya boyekoli ya mokanda oyo azali mpenza ndakisa malamu, akolobela mikumba na ye. Akomonisa ndenge nini mosala yango ezali na bopusi likoló ya bokoli malamu mpe bokolɔngɔnɔ ya elimo ya lisangá. Lobelá makambo ya ntina oyo mazwami na buku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe, nk. 44-45, 76-78.

Min. 15: “Lolenge ya kobanda boyekoli na mwa buku Azali kosɛnga.” Ekosalema na mituna mpe biyano.

Loyembo 197 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 25 Yanuali

Loyembo 201

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: “Bangonga oyo esɛngami mpo na babongisi-nzela etalelami lisusu.” Lisolo ekosalema na nkulutu moko. Pesá babongisi-nzela ya lisangá longonya mpe lendisá basakoli mosusu ete bákóma babongisi-nzela basungi to babongisi-nzela ya sanza na sanza, bábosana te mokano ya kosala mingi na sanza ya Marsi, ya Aprili mpe ya Mai. Salelá mpe makanisi mosusu oyo ezali na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Marsi 1997 mpe ya Augusto 1998.

Min. 20: Otángaka Makomami mokolo na mokolo? Lisukulu mpe lisolo elongo na lisangá. Mbula na mbula la Société abimisaka mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo. Lolenge nini tosalelaka yango biso moko mpe kati na libota? Limbolá ntina oyo tosengeli kotalela mokapo ya Makomami mokolo na mokolo. Lobelá makambo mazwami na maloba ya ebandeli ya mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—1999, nk. 3-4. Sɛngá basakoli ete bálobela milende oyo moto na moto asalaka mpe oyo mabota basalaka mpo na kotalela mokapo ya Makomami mokolo na mokolo mpe komantere na yango.

Loyembo 225 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto