Loyembo 140
Tózela Yehova
1. Na boboto na yo, Nkolo,
Obateli biso.
Tokolanda nzela na yo
Mpo osunga biso.
2. Ntango nyonso, y’omonisi
Ngolu oy’eleki;
Mpe bosembo’etondi na yo.
Tokolikya na yo.
3. Zwá mokumba na bolenge;
Ezali mayele.
Na kimya, tokozela Yah,
Kino ye akoya.
4. Ɛ Yehova, naponi yo.
Nakotosa sé yo.
Nzela na yo, lakisá ngai,
Yo’ekimelo na ngai!