Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/5 nk. 4-6
  • Bozwi ekoki kopesa yo bolamu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozwi ekoki kopesa yo bolamu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bolingo ya mosolo ememaka na bolamu te
  • Tósepela na biloko oyo tozali na yango
  • Sɛkɛlɛ ya bolamu
  • Kosepela na oyo ozali na yango mpe kokaba
    Lamuká!—2018
  • Mokonzi oyo azalaki na bozwi mpe na mayele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Bomɛngo ya solosolo na mokili ya sika ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Eloko nini esengami na biso mpo na kozala na esengo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/5 nk. 4-6

Bozwi ekoki kopesa yo bolamu?

Mokonzi Salomo ayebaki ntina ya mosolo. Akomaki ete: “Kwanga esalami mpo na kosɛka mpe vinyo ekosepelisa bomoi. Mosolo mpe ekosilisa ntembe nyonso.” (Mosakoli 10:19) Kolya bilei elongo na baninga ekoki kozala likambo ya esengo mingi, kasi mpo na kozwa limpa to vinyo, osengeli kozala na mbongo. Lokola mbongo nde epesaka moto likoki ya kozwa biloko ya mosuni, elobami ete “ekosilisa ntembe nyonso.”

ATAKO Salomo azalaki mpenza na bomɛngo, ayebaki ete bozwi ezali na bandelo na yango. Andimaki ete bomoi ya koluka biloko mingi ya mosuni ezali sɛkɛlɛ ya bolamu te. Akomaki ete: “Ye oyo alingi mosolo akosepela na mosolo te; ye oyo alingi libonza akosepela na mingi mpe te.”​—Mosakoli 5:10.

Na ndakisa, soki mozwi akómi na bozwi mingi lisusu koleka. Salomo alobi ete: “Wana biloko [malamu, NW] ikofuluka, baoyo bakolya yango bakoya mpe mingi.” (Mosakoli 5:11) Wana “biloko malamu” ya moto, to bozwi ebakisami, ekosengela bato mingi mpo na kobatela yango. Babongisi, babateli, basali, basinzili, mpe bato mosusu—bango nyonso basengeli kozwaka lifuti mpo na mosala na bango. Yango mpe esɛngi mbongo mingi lisusu.

Likambo yango ezali na bopusi mingi na bolamu ya moto. Xénophon, mokomi ya makambo ya kala, moto ya ekólo Grèce, oyo azalaká na bomoi na ekeke ya minei L.T.B., akomaki maloba ya mobali moko mobola oyo akómaki mozwi:

“Okanisi . . . ete lokola nazali na bozwi mingi, nazali na bolamu mingi?” Abakisaki ete, “Oyebi te ete ebakiseli ngai ata esengo moke te mpo na kolya mpe komela mpe kolala koleka na ntango nazalaki mobola. Litomba bobele moko nazwi na kokómáká na bozwi mingi ezali ete nasengeli kokeba mingi, kokabela basusu mingi, mpe komitungisa mpo na bato mingi koleka liboso. Mpamba te, sikawa basali mingi bazali kotalela ngai mpo na kolya, mingi mpo na komela, mpe mingi mpo na kolata, basusu bazali na mposa ya minganga; mpe moko ayeli ngai nsango ya mpate oyo bambwa ya zamba babomi, to ya ngɔmbɛ ekufi nsima ya kokwea na libulu, to mpo na koloba ete maladi ekɔteli bibwele. Mpe namonaka . . . lokola ete motungisi oyo nazwi ntango nakómi na bozwi eleki oyo nazalaki na yango ntango nazalaki na biloko mingi te.”

Ntina mosusu oyo bato balukaka bozwi mingi ezali mpo ete balɛngolami na oyo Yesu Klisto abéngaki “nguya ya bozimbisi oyo bozwi ezali na yango.” (Matai 13:22, NW) Bazimbisami mpamba te bozwi oyo bazali koluka na etingya, ezali kopesa bango bosepeli te to bolamu oyo balikyaki kozwa. Bakanisaka ete biloko oyo bazwi te wana bazali na mwa bozwi, bakozwa yango soki bakómi na bozwi mingi. Na bongo bazali ntango nyonso kosala molende mpo na kozwa mingi koleka.

Bolingo ya mosolo ememaka na bolamu te

Komibanzabanza mpo na bozwi na ye ekoki kopekisa mozwi ete alala mpɔngi malamu na butu. Salomo akomi: “Mpɔngi na moto na mosala ezali kitoko ata alei moke to mingi; kasi biloko mingi na mozwi ikopekisa mpɔngi na ye.”​—Mosakoli 5:12.

Ntango moto azali komibanzabanza mingi ete mbala mosusu akobungisa bozwi na ye, yango ekosuka bobele na kozangisa ye mpɔngi te. Kolobeláká moto ya lokoso, Salomo akomi ete: “Na mikolo na ye nyonso azali kolya na molili; azali mpe na mawa mpe na nkanda mpo na maladi.” (Mosakoli 5:17) Na esika ete bozwi na ye epesa ye bolamu, azali kolya ‘na nkanda,’ lokola ete azali koyoka mawa mpo na mbongo oyo asengeli kobimisa mpo na bilei. Motungisi motindo wana na makanisi ekoki kobebisa kolɔngɔnɔ ya nzoto ya moto. Na nsima, maladi ebakisaka motungisi ya moto ya lokoso, mpamba te yango epekisaka ye ete anduka lisusu bozwi mingi koleka.

Mbala mosusu yango ezali kokundwela yo makambo oyo ntoma Paulo akomaki: “Kasi baoyo bazali na mposa na kozwa mosolo, bakokwea na kati na komekama mpe na lilonga, mpe kati na mposa ezangi ntina mpe ikoyokisa mpasi. Mposa yango ikozindisa bato na liwa mpe libebi nyɛ. Zambi mposa na mosolo ezali ntina na mabe nyonso. Mpo na yango, bamosusu . . . bamitɔbɔli bango mpenza na bolɔzi mingi.” (1 Timoté 6:9, 10) Mpo na koluka mosolo, bato bazali kobuba, kokosa, koyiba, komibebisa, mpe ata koboma. Mbano na yango ezali ete moto amitɔbɔli na mpasi ya mayoki, ya nzoto, mpe ya elimo mpo na koluka kozwa to kotingama na bozwi. Yango nde nzela ya bolamu? Soko moke te!

Tósepela na biloko oyo tozali na yango

Salomo alobaki mingi na ntina na makanisi ya bokatikati mpo na oyo etali bozwi. Akomaki ete: “Lokola ye abimaki na libumu na mama na ye, boye akozonga bolumbu lokola eyaki ye; akokamata eloko moko na mosala na ye te oyo ye akosimba na lobɔkɔ na ye. Talá yango emoni ngai, ete ezali malamu mpe ekoki ete moto alya mpe amela mpe asepela na libonza na misala na ye nyonso misali ye na nse na moi kino mikolo nyonso na bomoi na ye oyo Nzambe akopesa ye. Yango ezali likabo na ye.”​—Mosakoli 5:15, 18.

Maloba yango mamonisi ete bolamu ezwamaka te na kondukáká bozwi mpo na mikolo mizali koya. Kutu, mbala mosusu tokozala lisusu na bomoi te na mikolo yango. Eleki malamu kosepela mpe koyoka esengo na mbuma ya mosala makasi na biso. Ntoma Paulo amonisaki likanisi lolenge moko kati na mokanda na ye mopemami oyo akomelaki Timoté. Alobaki ete: “Zambi toyei na eloko kati na mokili te mpe tokoki kolongwa na eloko na mokili te. Awa ezali biso na biloko na kolya mpe na bilamba na kolata, ebongi na biso bongo.”​—1 Timoté 6:7, 8; kokanisá na Luka 12:16-21.

Sɛkɛlɛ ya bolamu

Salomo atondaki na bozwi mpe na mayele mauti na Nzambe. Nzokande, amonisaki ete bolamu eutaka na mayele, kasi na mosolo te. Alobaki ete: “Mapamboli epai na moto oyo azwi mayele mpe moto oyo [akolanda, NW] boyebi. Zambi litomba na yango eleki palata mpe kozwa yango eleki wolo na kitoko. Aleki mabanga na penini na motuya; biloko nyonso bikolula yo ikoki [kokokana, NW] na ye te. Mikolo mingi izali na lobɔkɔ na ye na mobali, mpe na lobɔkɔ na ye na mwasi izali bozwi mpe lokumu. Nzela na ye izali nzela na esengo mpe bilekelo na ye nyonso izali kimya. Ye azali lokola nzete na bomoi mpo na nyonso baoyo bakosimbaka ye; moto na moto oyo akobatelaka ye azali na esengo.”​—Masese 3:13-18.

Mpo na nini mayele eleki bozwi ya mosuni? Salomo akomaki ete: “Zambi mayele ekobatelaka lokola ekobatelaka mosolo. Malamu na mayele ezali ete mayele ekobikisa bomoi na ye oyo azwi yango.” (Mosakoli 7:12) Atako mosolo ekoki kopesa mwa libateli, na boye ete ekopesa ye oyo azali na yango likoki ya kosomba biloko oyo azali na mposa na yango, mayele ekoki kobatela moto ete atya bomoi na ye na likama te. Mayele ya solo ekoki kobikisa moto na liwa ya mobesu; kasi, lokola etongami na bobangi ya solo ya Nzambe, ekomema moto na kozwa bomoi ya seko.

Mpo na nini mayele mauti na Nzambe mapesaka bolamu? Mpamba te bolamu ya solo ekoki kouta bobele epai na Yehova Nzambe. Makambo ya bomoi mamonisi ete bolamu ya solosolo ekoki kozwama bobele na kotosáká Ye Oyo-Aleki-Likoló. Bolamu ya ntango molai eutaka na etɛlɛmɛlo malamu oyo moto azali na yango na miso ya Nzambe. (Matai 5:3-10) Na kosaleláká makambo oyo tozali koyekola kati na Biblia, tokokolisa “mayele mauti na likoló.” (Yakobo 3:17) Yango ekopesa biso bolamu oyo bozwi ekoki kopesa te.

[Bililingi na lokasa 4, 5]

Mokonzi Salomo ayebaki eloko oyo epesaka moto bolamu. Bongo yo, oyebi yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto