Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/6 nk. 20-23
  • Bómema mokumba na bino ya kobatela libota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bómema mokumba na bino ya kobatela libota
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobatela na mosuni mpe na elimo
  • “Wana ekofanda yo na ndako”
  • Yebá komimesenisa mpe koyika mpiko
  • Bósunga “bitike” mibali mpe basi
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Baboti, bókokisa bamposa ya mabota na bino
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Bóteya bana na bino bálinga yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Bóyekolaka ntango nyonso Liloba ya Nzambe na libota
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/6 nk. 20-23

Bómema mokumba na bino ya kobatela libota

“BATATA, bóyokisa bana na bino nkanda te, kasi bóbɔkɔla bango na mateya mpe na [makebisi ya Yehova, NW].” (Baefese 6:4) Na maloba wana mapemami, ntoma Paulo atyaki polele mokumba ya kobatela libota na esika na yango—elingi koloba na mapeka ya batata.

Na mabota mingi tata azali ye moko te mpo na kobatela bana. Mwasi na ye, mama ya bana, na esengo nyonso akabolaka na ye bozito. Na yango, Mokonzi Salomo alobaki ete: “Mwana na ngai, yoká mateya na tata na yo mpe tiká mibeko na mama na yo te.”​—Masese 1:8.

Kobatela na mosuni mpe na elimo

Baboti oyo balingaka bana na bango basundolaka bango te. Nzokande, mpo na baklisto kosala bongo ekokani na kowangana kondima na bango, engebene maloba ya Paulo epai na Timoté: “Soko moto nani akoleisa bato na ye te mpe na koleka bato kati na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.” (1 Timoté 5:8) Baklisto bayebi ete kobɔkɔla bana na “mateya mpe na makebisi ya Yehova” esuki bobele na kokokisa bamposa na bango ya mosuni te.

Tótalela elendiseli oyo Mose apesaki na libota ya Yisalaele na mokili patatalu ya Moaba, liboso ete bákɔta na Mokili ya Ndaka. Akundwelaki bango Mibeko ya Nzambe mpe ateyaki bango ete: “Bokobomba maloba na ngai oyo na mitema na bino mpe na milimo na bino.” (Deteronome 11:18) Liboso akundwelaki bango ete basengeli kolinga Yehova na motema na bango mobimba, na molimo na bango mobimba, mpe na makasi na bango mobimba, mpe abakisaki ete: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo.” (Deteronome 6:5, 6) Ezalaki na ntina mingi na baboti Bayisalaele ete bátika maloba ya Mibeko ya Nzambe mákɔta na mitema na bango. Na mitema mitondi na bosepeli na makambo ya elimo, baboti Bayisalaele bakokaki kotosa maloba malandi ya Mose ete: “Okolakisa yango [maloba ya Mibeko ya Nzambe] na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛ[lɛ]ma yo.”​—Deteronome 6:7; 11:19; kokanisá na Matai 12:34, 35.

Talá ete baboti basengelaki “kolakisa na etingya” maloba wana na bana na bango mpe ‘kosolola mpo na yango.’ Diksionere moko (Merriam-Webster’s Collegiate Dictionary) elimboli “kolakisa na etingya” lokola “koteya mpe kokɔtisa na kozongeláká mbala na mbala to kokebisaka.” Ntango baboti bazalaki koloba na ntina na Mobeko ya Nzambe mokolo na mokolo—ntɔngɔ, midi, mpe mpokwa—yango ezalaki kokɔta malamu na mitema ya bana na bango. Lokola bilenge bazalaki komona bolingo oyo baboti na bango bazalaki na yango mpo na Mibeko ya Nzambe, na ngala na bango bazalaki kopusama na kokolisa boninga ya penepene elongo na Yehova. (Deteronome 6:24, 25) Likambo ya esengo, Mose ateyaki baboti ete báteya bana na bango ‘wana ekofanda bango na ndako.’ Mateya ezalaki kati na mokumba ya kobatela libota. Kasi, ezali boni lelo oyo?

“Wana ekofanda yo na ndako”

Janet, mwasi moklisto oyo azali mama ya bana minei alimboli ete: “Ezali likambo ya pɛtɛɛ te.”a Mobali na ye Paul, andimi ete, “Osengeli kolendendela.” Motindo moko na ebele ya baboti oyo bazali Batatoli, Paul na Janet bazali kosala makasi mpo na koyekola Biblia na bana na bango ata mbala moko na pɔsɔ. Paulo alimboli ete: “Tomekaka kosala boyekoli ya Biblia na libota mokolo nyonso ya yambo na mpokwa na ngonga oyo tosilá kopona,” mpe andimi ete: “Kasi tolongaka mbala nyonso te.” Lokola azali nkulutu na lisangá, ntango mosusu babéngaka ye mpo na kotalela makambo mosusu ya nokinoki. Bana na ye mibale ya mikóló bazali babongisi-nzela. Bamonaka ete bileko ya mpokwa ezali malamu mpo na kokutana na bato na mosala ya kosakola. Na yango, libota mobimba, bayokáná mpo na ntango oyo bakosala boyekoli na bango ya libota. Paulo alimboli ete: “Ntango mosusu tosalaka boyekoli ya libota nsima ya kolya na mpokwa.”

Atako baboti na mayele nyonso bandimaka kobongola ngonga ya boyekoli ya libota, kasi bazali kosala ete esalemaka pɔsɔ na pɔsɔ. Clare, mwana ya mwasi alobi ete: “Soki ngonga ya boyekoli ebongwani, ntango nyonso, tata akomaka ngonga ya sika na ekuke ya frigo, mpo ete biso nyonso tóyeba ntango ekosalema.”

Koyangana mpo na boyekoli ya Biblia na libota epesaka bana mike libaku malamu ya koyebisa baboti mabanzo mpe mikakatano na bango. Boyekoli motindo yango epesaka matomba malamu soki ezali makasi te na boye ete bilenge básuka te bobele na kotánga biyano na mituna ya mikanda mikolimbolaka Biblia oyo bazali kosalela. Martin, oyo azali na bana mibale, alobi ete: “Boyekoli ya libota na biso ezali liyangani mpo na masolo.” Alobi boye: “Ntango boyangani mbala moko na pɔsɔ mpo na kosolola likoló na Makomami, okoyeba bokolɔngɔnɔ ya elimo ya libota na yo. Toyebaka makambo mingi na masolo yango. Okoyeba makambo mazali koleka na eteyelo, mpe likambo eleki esengo, okoyeba bizaleli oyo bana na yo bazali kokolisa.” Mwasi na ye, Sandra, andimi mpe amoni ete ye mpe ayekolaka makambo mingi na boyekoli ya libota. Alobi ete, “Wana mobali na ngai azali kotambwisa boyekoli, nayekolaka makambo mingi na koyokáká motindo bana na ngai bazali koyanola na mituna na ye.” Na bongo Sandra akoyokanisa makambo azali koloba na mposa ya bana na ye mpo na kosunga bango. Asepelaka mingi na boyekoli mpamba te yango ezali mpe mpo na ye. Ɛɛ, bangonga ya boyekoli ya libota epesaka baboti bososoli likoló ya makanisi ya bana na bango.​—Masese 16:23; 20:5.

Yebá komimesenisa mpe koyika mpiko

Ntango ngonga ekoki mpo na boyekoli ya libota, okoki komona ete bobele mwana moko azali kotya likebi mpe azali kosepela, nzokande, mosusu osengeli kobɔndela ye mpo ete alanda mpe azwa litomba na boyekoli. Mama moko moklisto alobi boye: “Bomoi ya libota ezali ndenge wana! Lokola ozali moboti oyebi makambo osengeli kosala. Na yango, soki okolendendela, Yehova akosunga mpe akoyeisa matomba.”

Likebi ya mwana ekoki kokesana engebene mbula na ye. Moboti oyo azali na bososoli atalelaka likambo yango. Mobali moko na mwasi na ye bazali na bana mitano, ya mbula kobanda 6 kino 20. Michael, oyo azali Tata, alobi ete: “Pesá liboso mwana ya moke libaku ya koyanola na mituna. Na nsima tiká mikóló bábakisa makambo mosusu mpe bábimisa makanisi babongisaki.” Motindo oyo ya kosala na bososoli epai ya bana ekopesa baboti likoki ya koteya bango ete bápesaka bato mosusu motuya. Martin amonisi ete: “Mwana moko akoki kokanga ntina, kasi esengeli kosunga oyo mosusu. Namonaka ete boyekoli ezali kobongisama mpo na komonisa motema molai ya boklisto mpe mbuma mosusu ya elimo.”​—Bagalatia 5:22, 23; Bafilipi 2:4.

Omibongisa mpo na komimesenisa na makoki makeseni ya bana na yo mpe na bokoli na bango. Simon na Mark, oyo bazali bilenge, bamonaki ete ntango bazalaki naino bana mike, bazalaki kosepela koyekola buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo na baboti na bango. Bazali komikundola ete: “Tata azalaki kosɛngisa biso ete tósala biteni bikeseni lokola lisano.” Tata na bango azali komikundola ete afukamaki na mabɔlɔngɔ mpo na kosala lisese ya Mosamalia malamu elongo na bana na ye. (Luka 10:30-35) “Emonanaki lokola ete likambo yango ezalaki kosalema mpe esepelisaki bango.”

Bana mingi basepelaka te kosala boyekoli ya libota pɔsɔ na pɔsɔ. Yango esengeli nde kopekisa baboti na kotambwisa boyekoli soki elengelami? Te, soko moke te. Masese 22:15 endimi ete: “Ebebe ezwami na motema ya mwana [mobali to mwasi].” Mama moko oyo abɔkɔlaka bana na ye ye moko akanisaki ete azalaki kotambwisa boyekoli ya libota mabe mpamba te, na mabaku mingi, makambo mazangi ntina mazalaki kokata boyekoli. Kasi alendendelaki. Sikawa bana na ye bazali komemya ye mingi mpe bayebi motuya ya bolingo mpe komibanzabanza oyo amonisaki na kolendendeláká mpo na kotambwisa boyekoli ya libota pɔsɔ na pɔsɔ.

Bósunga “bitike” mibali mpe basi

Bankulutu baklisto basengeli ‘kobatela etonga ya Nzambe.’ (1 Petelo 5:2, 3) Kotala mabota ya masangá na bango mbala na mbala, ekopesa bango mabaku ya kopesa baboti oyo bazali komema mikumba na bango ya boklisto longonya. Mokumba ya koteya bana oyo bazali na moboti se moko ezali ya nani? Tóbosana te ete mokumba ya koteya bana ezali ya baboti.

Bokɛngi ya boklisto ekosunga bankulutu na kopɛngola makambo oyo makoki kotya na likama mitinda ya boklisto soki balingi kokokisa mokumba ya moboti oyo azali te. Atako bandeko mibale ya mibali bakoki kotala ndeko mwasi moko oyo azali ye moko, basengeli ntango nyonso kosala angɛlɛ na makambo oyo bazali kobongisa mpo na kosunga ebongiseli ya boyekoli ya libota. Na mabaku mosusu, kobyanga bana (ata mpe moboti oyo azali ye moko) mpo na kosangana na boyekoli ya libota ya nkulutu ekoki kolendisa bango mpe ezali malamu. Nzokande, tóbosana te ete Yehova azali Tata na biso monene ya likoló. Azali wana mpo na kokamba mpe kosunga mama ntango azali kotambwisa boyekoli na bana na ye, ata soki azali kosala yango ye moko.

Kasi ezali boni epai na mwana oyo azali komibanzabanza na bamposa ya elimo, kasi baboti na ye bazali komibanzabanza moke to mpenza te na mikumba na bango ya elimo? Basaleli ya sembo ya Yehova balingaka kolɛmba na mitema te. Mokomi ya nzembo ayembaki ete: “Moto na mpasi akomipesa epai na yo [Yehova Nzambe], yo ozali mosungi na etike.” (Nzembo 10:14) Na ngámbo na bango, bankulutu ya bolingo kati na lisangá bakosala nyonso ekoki mpo na kolendisa baboti na ndenge bazali kobatela bana na bango. Bakoki komonisa bango lisoló oyo bakoyekola kati na libota, bango mpe bakoyangana na libota yango mpo na kopesa batoli ebongi likoló na lolenge ya koyekola elongo. Nzokande, bakolongola mokumba ya baboti te, oyo Makomami etii likoló na mapeka na bango.

Bana oyo baboti na bango bazali bandimi te bazali na mposa ya lisungi mingi. Kobyanga bango ete básangana na boyekoli ya libota na bino ekoki kozala litomba soki yango endimami na baboti na bango. Robert, sikawa akómi mokóló mpe azali na libota na ye moko, azalaki koyangana na makita ya boklisto na baboti na ye ntango azalaki bobele na mbula misato. Atikalaki na suvenire ya malamu mpo na makita yango ata ntango baboti na ye batikaki lisangá ya boklisto. Na mbula zomi, akutanaki na elenge mobali moko Motatoli oyo azalaki kokende na ye elongo na makita. Na esengo nyonso, baboti ya elenge mobali wana babatelaki Robert lokola etike na elimo mpe na nsima bayekolaki na ye Biblia. Na libateli wana ya bolingo, akolaki noki na elimo mpe sikawa azali na esengo ya kosala lokola nkulutu na lisangá.

Ata ntango baboti bazali kotɛmɛla bokoli ya bana na bango, bana batikami bango moko te. Yehova akotikala Tata ya sembo ya likoló. Nzembo 68:5 elobi ete: “Ye azali tata na bitike, . . . azali Nzambe kuna na efandelo na ye na bulɛɛ.” Bana mibali mpe basi oyo bazali bitike na elimo bayebi ete bakoki kobongwana epai na ye na libondeli, mpe akosunga bango. (Nzembo 55:22; 146:9) Lisangá ya Yehova oyo ezali lokola mama na biso, na komipesa nyonso, ezali kokokisa mokumba na yango ya kobongisa bilei kitoko ya elimo mpe kokabola yango na nzela ya mikanda mpe makita ya masangá ya boklisto koleka 85 000 na mokili mobimba. Na yango, na lisalisi ya elimo uta na Tata na biso Yehova, mpe ya lisangá na ye oyo ezali lokola mama na biso, ata “bitike” bakozala na libaku ya koyekola Biblia.

Baboti baklisto oyo bazali kotambwisa boyekoli ya Biblia na libota pɔsɔ na pɔsɔ babongi kozwa longonya. Baboti oyo bazali bango moko kolendendela na koteyáká bana na bango banzela ya Yehova ebongi ete tótyela bango likebi mingi mpe tókumisa bango mpo na milende na bango. (Masese 22:6) Baoyo nyonso bazali komibanzabanza mpo na bitike na elimo bayebi ete yango esepelisaka Tata na biso ya likoló, Yehova. Kobatela libota na elimo ezali mokumba monene. Kasi ‘bólɛmbaka te zambi na ntango oyo ekoki, bokobuka soko bokotika motema te.’—Bagalatia 6:9.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bango bankombo mosusu.

[Elilingi na lokasa 23]

Boyekoli ya libota epesaka bana mike libaku malamu ya koyebisa baboti mabanzo na bango

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 20]

Harper’s

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto