Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rq liteya 8 nk. 16-17
  • Bomoi ya libota oyo ezali kosepelisa Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi ya libota oyo ezali kosepelisa Nzambe
  • Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Masolo mosusu
  • Okoki kozala na libota ya esengo
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Bwanya oyo ekosala ete libota ezala na esengo
    Lamuká!—2021
  • Ndenge ya kozala na libota ya esengo
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Ndenge nini okoki kozala na bomoi ya libota ya esengo?
    Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko
Makambo mosusu
Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
rq liteya 8 nk. 16-17

Liteya 8

Bomoi ya libota oyo ezali kosepelisa Nzambe

Esika ya mobali kati na libota ezali nini? (1)

Lolenge nini mobali asengeli kotalela mwasi na ye? (2)

Tata azali na mokumba nini? (3)

Mokumba ya mwasi kati na libota ezali nini? (4)

Nzambe azali kosɛnga nini epai na baboti mpe epai na bana? (5)

Likanisi ya Biblia mpo na kokabwana mpe koboma libala ezali nini? (6, 7)

1. Biblia elobi ete mobali azali mokonzi ya libota. (1 Bakolinti 11:3) Mobali asengeli kozala bobele na mwasi moko. Basengeli mpenza kobalana na boyokani na mibeko.​—1 Timoté 3:2; Tito 3:1.

2. Mobali asengeli kolinga mwasi na ye lokola azali komilinga ye moko. Asengeli kotalela mwasi na ye lolenge Yesu azali kotalela bayekoli na ye. (Baefese 5:25, 28, 29) Asengeli soko moke te kobɛta mwasi na ye to kosalela ye mabe ata na lolenge nini. Nzokande, asengeli kopesa ye lokumu mpe limemya.​—Bakolose 3:19; 1 Petelo 3:7.

3. Tata asengeli kosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya libota na ye. Asengeli kopesa bilei, bilamba, mpe ndako mpo na mwasi na ye mpe bana na ye. Tata asengeli mpe kokokisa bamposa ya elimo ya libota na ye. (1 Timoté 5:8) Azali moto ya liboso mpo na kosalisa libota na ye na koyekola makambo matali Nzambe mpe mikano na ye.​—Deteronome 6:4-9; Baefese 6:4.

4. Mwasi asengeli kozala mosungi malamu mpo na mobali na ye. (Genese 2:18) Asengeli kopesa mobali na ye mabɔkɔ mpo na koteya mpe kobongisa bana na bango. (Masese 1:8) Yehova azali kosɛnga na mwasi ete amibanzabanza mpo na libota na ye na bolingo nyonso. (Masese 31:10, 15, 26, 27; Tito 2:4, 5) Asengeli kozala na limemya mozindo mpo na mobali na ye.​—Baefese 5:22, 23, 33.

5. Nzambe azali kosɛnga na bana ete bátosa baboti na bango. (Baefese 6:1-3) Azali komizela ete baboti báteyaka mpe básembolaka bana na bango. Baboti basengeli kolekisa ntango elongo na bana na bango mpe koyekola Biblia elongo na bango, kokokisáká bamposa na bango ya elimo mpe ya mayoki. (Deteronome 11:18, 19; Masese 22:6, 15) Baboti basengeli soko moke te kopesa bana na bango disipilini na lolenge ya makasi to ya monyokoli.​—Bakolose 3:21.

6. Ntango babalani bazali na mikakatano kati na bango, basengeli kosala makasi na kosalela batoli ya Biblia. Biblia esɛngi na biso ete tómonisa bolingo mpe tólimbisanaka. (Bakolose 3:12-14) Liloba ya Nzambe ezali kolendisa te kokabwana lokola nzela mpo na kosilisa mikakatano mikemike. Kasi mwasi akoki kopona kotika mobali na ye soki (1) azali na nkó nyonso koboya kosunga libota, (2) azali konyokola ye makasi na boye ete kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpe bomoi na ye ekómi na likámá, to (3) azali kotɛmɛla ye makasi mpe azali kotikela ye nzela ata moke te ete asambela Yehova.​—1 Bakolinti 7:12, 13.

7. Babalani basengeli kozala sembo moko epai na mosusu. Ekobo ezali lisumu epai na Nzambe mpe epai na mobalani na yo. (Baebele 13:4) Kosangisa nzoto na libándá ya libala ezali ntina bobele moko endimami na Makomami mpo na koboma libala, kopesáká bongo nzela ya kobala lisusu. (Matai 19:6-9; Baloma 7:2, 3) Yehova ayini koboma libala mpe kobalana na moto mosusu ntango yango esalemi na boyokani na Makomami te.​—Malaki 2:14-16.

[Bililingi na lokasa 16, 17]

Nzambe azali kosɛnga na baboti ete báteyaka bana na bango mpe básembolaka bango

[Elilingi na lokasa 17]

Tata ya bolingo azali kokokisa bamposa ya mosuni mpe ya elimo ya libota na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto