Loyembo 66
Nguya ya mbuma oyo ete boboto
1. Tika tótɔndo Yehova,
Solo, ye boboto.
Tolakámaki na kufa,
Nde ye’asombi biso.
Ye na nguya, ye monene,
Y’atondani na boboto,
Na yango, tósalela ye
Na bosembo nyonso.
2. Nkol’ateyaki solo na
Kosɔkɛma nyonso.
Ateyaki banyokwami
Na boboto nyonso.
Maloba na ye ya kimya
Mapesaki elikya mpe;
Sol’akobikisa bango
Bakolukaka ye.
3. Boboto, mbuma y’elimo,
Tómonisa yango.
Soki tolingi bolamu
Na Yah mpe na Nkolo.
Ata tozwi mpasi nini,
Tóyika bobele mpiko.
Tómonisaka boboto;
Tólimbisa bato.
4. Oy’esengo, malamu bɛɛ
Kati na mosala.
Tómonisa bazalani,
Boboto nde nguya.
Tika tóteya basusu,
Mpo bateyaki mpe biso.
Tókumisa Yehova na
Boboto na biso.