Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/00 lok. 1
  • “Tokotika koloba te”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Tokotika koloba te”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Landá kosakola Liloba ya Nzambe na mpiko
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • ‘Tóloba Liloba ya Nzambe na mpiko’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Tósakola nsango malamu kozanga kotika
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 7/00 lok. 1

“Tokotika koloba te”

1 Yesu Klisto azali kolandela mosala ya kosakola na likebi mpenza. (Mat. 28:20; Mko. 13:10) Atako basakoli ya molende pene na milio motoba bazali kopesa litatoli na mikili 234, tosengeli kokanisa te ete mosala na biso ya kopesa litatoli esuki wana. Kino ntango Nzambe akoloba ete mosala na biso esili, “tokotika koloba te” makambo oyo tosili koyekola.​—Mis. 4:20, NW.

2 Tyá elikya na elimo ya Nzambe: Satana azali kosalela bopusi makasi mpo na kolɛmbisa biso. (Emon. 12:17) Nzoto na biso ya kozanga kokoka ezali mpe komemela biso mpasi mingi. Makambo motindo wana ekoki kolongola likebi na biso na mosala ya kosakola​—mosala ya ntina—​oyo tozali kosala. Atako bongo, soki totii motema epai ya Yehova, elimo na ye ekosalisa biso ete tóyika mpiko na mokakatano nyonso oyo tokoki kokutana na yango.

3 Ntango lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso ekutanaki na minyoko ya makasi, bandeko babondelaki Nzambe asalisa bango ete bálanda ntango nyonso kosakola liloba na ye na molende. Yehova ayokaki libondeli na bango, atondisaki bango na elimo na ye mpe apesaki bango molende, mpe bazwaki ekateli oyo basengelaki na yango mpo na kolanda kosakola. Yango esalaki ete bálanda kosakola nsango malamu na molende kozanga kolɛmba.​—Mis. 4:29, 31; 5:42.

4 Tóbanga maloba ya kolɛmbisa te: Makambo oyo bato balobaka to matɔngi ekoki kolɛmbisa biso. Kasi, omikundola maloba ya mpiko, oyo ezali na Misala 5:29-32, oyo Petelo na bantoma mosusu balobaki na Sanedrina. Ndenge Gamaliele moteyi ya mibeko andimaki yango, mosala ya Nzambe ekoki kokweisama te. Tozali kosala mosala yango na nguya na biso moko te. Mosala monene oyo ezali kosalema na nguya ya Nzambe, mpe bobele ye nde azali kokokisa yango!​—Zek. 4:6.

5 Tiká ete mokolo na mokolo tósɛnga na etingya nyonso lisalisi ya Yehova mpo ete elimo na ye esalisa biso tósakola nsango malamu na molende mpenza. Tiká tóloba ndenge Yilimia alobaki ete, nsango ya Bokonzi ezali lokola mɔ́tɔ oyo ezali kozikisa na kati ya mikwa na biso. (Yil. 20:9) Tokoki kokanga monɔkɔ te!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto