“Tiká ete makambo nyonso esalema mpo na kolendisa”
1 Ntango tozali na bandeko na biso, tosengeli kosala makambo ya malamu mpo na kolendisa bango. Yango elimboli ete tosengeli komibanzabanza mpo na kobatela matomba na bango ya elimo. Soki tomikɔtisi na lolenge moko ya mosala oyo ezali kosɛnga ete tósalaka piblisite ya eloko moko to ya mosala moko, tosengeli kokeba ete tósala likambo moko te oyo ekobɛtisa bandeko na biso libaku.—2 Kol. 6:3; Filp. 1:9, l0.
2 Bandeko mosusu basili komikɔtisa na makambo ndenge na ndenge ya mombongo, bazali kotalela baklisto mosusu lokola bakiliya na bango. Bakompanyi mosusu ya kotɛkisa biloko elendisaka basali na yango bátalela moto nyonso ete akokóma kiliya—ata bato oyo bazali na bango lingomba moko. Bandeko mosusu babengisaki Batatoli mingi mpo na kokutana esika moko mpe kolendisa bango ete bákɔta na makambo ya mombongo oyo bango bazali kosala. Bato mosusu bakabolaka mwa mikanda epai ya baninga na bango bandimi to bayebisaka bango makambo na nzela ya Internet, bapesaka bango bakasɛti, mpe biloko mosusu mpo na kosala piblisite ya biloko oyo bazali kotɛkisa. Ezali mpenza malamu ete moklisto asalela ntango oyo azali kokutana na bandeko na ye mpo na makambo ya Teokrasi mpo na koluka matomba ya moimi epai na bango? Te!—1 Kol. 10:23, 24, 31-33.
3 Bandeko, bosengeli kokeba: Yango elingi koloba te ete moklisto akoki te kosala mombongo na moklisto mosusu. Yango ezali likambo ya moto ye moko. Kasi, bato mosusu basalaka mombongo mosusu oyo elendisaka lokoso, mpe babendaka baninga na bango bandimi ete básala elongo na bango to bápesa mbongo mpo na kosimba mombongo yango. Mbala mingi mombongo ya lolenge yango esimbaka te, mpe bato oyo bamipesaka na yango babebisaka mbongo mingi. Atako mposa ya kozwa mbongo nokinoki nde ekoki kotinda bato yango bámikɔtisa na lolenge wana ya mombongo, mobandisi ya likambo yango asengeli te kokanisa ete ye azali na likambo te soki mombongo yango oyo balingaki kosala ekwei. Asengeli liboso kokanisa malamumalamu ndenge oyo bolamu ya bandeko na ye ekozala, na elimo mpe na mosuni, soki mombongo yango etamboli malamu te. Baoyo bazali na mikumba ya Teokrasi basengeli mpenzampenza kokeba na mikano na bango ya mosuni mpamba te bandeko mosusu bakoki kotalela bango na limemya nyonso mpe kotyela bango motema mpenza. Ekozala malamu te ete bábebisa kɔnfiansɛ oyo batyeli bango. Soki basakoli mosusu na kati ya lisangá bazali lisusu komemya ndeko mobali yango te, yango ekoki kosala ete abungisa mikumba na ye ya mosala ya bulɛɛ.
4 Tosengeli kozala na mokano ete “makambo nyonso ezala mpo na kolendisa bato.” (1 Kol. 14:26) Tosengeli koboya kosala likambo nyonso oyo ekoki kopesa nzela ete makambo ya mombongo ekɔta na kati ya lisangá to kosala piblisite na yango. Makambo motindo wana eyokani te na ntina oyo toyaka na makita.—Ebe. 10:24, 25.