Loyembo 176
Boyei malamu mpo na Mokonzi oyo aingeli!
1. Ntango ekoki ete tóyamba Nzambe,
Ye nde Mokonzi Aleki na nguya.
Asangisi mabota na Armagedon.
Bóyoka nzembo ya’etumba. Wana limpinga ya Yah.
Mpe tika bikuke nyonso bífungwama!
Talá Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso!
Bokonzi ya Mbula Nkóto ebɛlɛmi.
Na yango, Klist’akobikisa bato.
Bongo, akomonisa nguya ya Nzambe,
Na nsé, mokano na y’ekosalema nyonso.
2. Nkolo Yehova, yo Nzambe, Moyangeli,
Osi’ osali Bokonzi ya seko.
Mpe tika bato nyonso bákumisa yo!
Ɛ Mokonzi, mpo na yo, tokomimonisa sembo.
Bófungola bikuke, mpe bóyokaka!
Banso tokoyemba na nsai nyonso:
‘Yehova aleki banso na makasi.’
Tókumisa ye, Mokonzi monene.
Akoya kopambola basembwi nyonso.
Boyei malamu mpo na Mokonzi ya seko.