Loyembo 45
Libondeli ya botɔndi
1. Nzambe y’obongi na masanzoli.
Ɛ Tokoyembela yo, Mokonzi.
Y’okoyoka malɔmbo na biso,
Tosɛngi na y’obatela biso.
Tokosumuka mokolo nyonso;
Ɛ Yehova ólimbisa biso.
Mbeka na Yesu’esikoli biso.
Tika tópesa botɔndi bonso.
2. Esengo na bango bayei na yo
Mpo basalela yo ntango inso.
Bakambami na Mibeko na yo;
Basepeli na boboto na yo.
Misala na kokamw’okokisi.
Obɔndisi bato banyokwami.
Tokosakola Bokonzi na yo,
Yango nd’ezali’elikya na biso.
3. Ɛ Yehova kaniselá biso!
Toli na yo ezali lobiko.
Oyo malamu! Bokonzi na yo,
Ekolongola bampasi nyonso.
Yesu’akoboma bato ya mabe.
Esengo na baye bapambwami.
Mpe basembwi bakoyemba nzembo:
‘Tika Yah asanzolama seko!’