Mosala ya kosakola Bokonzi ezali kobikisa bomoi ya bato!
1 Ezali mosala oyo eleki misala nyonso na ntina mpe ezali kosalema lelo oyo na mokili mobimba. Yehova Nzambe, Yesu Klisto mpe ebele ya baanzelu, batii miso na bango na mosala yango. Mosala yango ezali mosala nini, mpe mpo na nini ezali na ntina mingi? Ezali bongo mosala ya kosakola Bokonzi, mpe ezali na ntina mingi mpamba te ezali kobikisa bomoi ya bato!—Lom. 1:16; 10:13, 14.
2 Bato mosusu bakoki kokanisa ete mbɛlɛ tokosalisa bato na lolenge ya malamu koleka soki tomipesi na koluka kobongisa makambo mingi ya mokili oyo. Bato mingi bazali kosala nyonso mpo na kotya kimya, kosilisa maladi, to kobongisa makambo ya nkita. Kasi nini mpenza ekosalisa bato na lolenge oyo eleki malamu?
3 Mosala ya ntina mingi: Ezali kaka nsango ya Bokonzi nde elimbolaka ntina ya bomoi, eyebisaka ntina oyo bato bazali komona mpasi, mpe ezali kaka yango nde epesaka elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya. Nsango malamu epesaka bato likoki ya kokóma baninga ya Nzambe mpe ya kozwa bongo “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” (Filp. 4:7, NW) Kaka nsango ya Bokonzi nde epesaka toli oyo ebongi mpenza mpo na kosalisa bato bálonga mikakatano ya bomoi banda sikoyo, mpe kaka yango nde elimbolaka ndenge nini tokoki kotikala na bomoi ntango mokili oyo mabe ekobomama na mikolo ezali koya. (1 Yoa. 2:17) Ebongi mpenza tósala nyonso oyo ekoki na biso mpo na kosakola Bokonzi, boye te?
4 Tózwa ndakisa: Likambo nini eleki malamu kosala mpo na kosalisa bato ya mboka moko oyo bazali kolala mpɔngi, nzokande mboka na bango ezali na likama mpo barrage moko ya mai oyo ezali pene elingi kobukana? Kopɛpa mai oyo etondi na likoló ya barrage yango? Kobongisa mboka yango oyo ezali na likama mpo ekóma kitoko? Te! Esengeli nde kolamwisa bato ya mboka yango, kokebisa bango mpo na likama oyo elingi kokwela bango, mpe kosalisa bango mpo bákima! Baoyo bazali kolala mpɔngi na elimo lelo bazali mpenza na likama monene. (Luka 21:34-36) Lokola etikali moke ebongiseli ya makambo ya ntango oyo eleka, tósala nyonso mpo na kosakola noki mpenza epai ya bato nyonso oyo tokoki kosakwela bango!—2 Tim. 4:2; 2 Pet. 3:11, 12.
5 Tólɛmbisa mabɔkɔ te: Tóluka banzela nyonso ya kokutana na bato mingi koleka, baoyo basepelaka koyoka nsango malamu—ezala na bandako na bango, na balabala, na telefone mpe na libaku malamu. Mosala oyo Yehova atindi biso tósala ezali yango nde eleki ntina na misala nyonso oyo tokoki kosala. Soki tosali mosala yango na molende mpenza, ‘tokomibikisa biso moko mpe baoyo bazali koyoka biso.’—1 Tim. 4:16.