Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/02 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 8 Aprili
  • Pɔsɔ ebandi na 15 Aprili
  • Pɔsɔ ebandi na 22 Aprili
  • Pɔsɔ ebandi na 29 Aprili
  • Pɔsɔ ebandi na 6 Mai
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 4/02 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 8 Aprili

Loyembo 39

Min. 13: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá na bino oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo ezali na lokasa 8 mpo na kobongisa bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili mpe Lamuká! ya 22 Aprili. Na elakiseli mokomoko, monisá lolenge moko ya kopesa eyano soki moto alobi: “Nazali na lingomba na ngai.”​​—⁠Talá buku Comment raisonner, nkasa 18-19.

Min. 12: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: “Tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu.”a Nsima ya kosala lisolo yango na mituna mpe biyano, tuná mosakoli moko to basakoli mibale báyebisa ndenge nini bazali kokolisa mosala na bango ya kosakola.

Loyembo 157 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 15 Aprili

Loyembo 101

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: Babongisi-nzela bazali kokoba kosalisa basakoli mosusu. Mokɛngɛli na mosala ya kosakola akosala lisolo yango elongo na motambwisi moko ya Boyekoli ya mokanda, mobongisi-nzela moko, mpe mosakoli moko. Mokɛngɛli na mosala ya kosakola akomonisa lisusu na mokuse nini babengi programɛ Babongisi-nzela bazali kosalisa basakoli mosusu, ndenge emonisami na lokasa 4 ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Ɔkɔtɔbɛ 1998. Na nsima, akosolola na mokomoko na bango mpe akotuna bango mokumba nini bazwaki na programɛ yango mpe ndenge nini lisalisi oyo bazali kopesa ezali kokokisa programɛ yango. Nini esalemaki mpo ete programɛ yango elonga? Mokɛngɛli na mosala ya kosakola akoyebisa basakoli nyonso ete soki moko azali na mposa básalisa ye na lolenge moko ya mosala ya kosakola, akoki koyebisa ye. Baoyo bazwaki lisalisi na programɛ yango na mikolo oyo eleki bakoki mpe kozwa lisusu lisalisi yango mpo na lolenge mosusu oyo tosalaka mosala ya kosakola.

Min. 20: “Esengo oyo mosala ya ntango nyonso epesaka.”b Lendisá bilenge básɛnga mosala ya mobongisi-nzela mosungi na ntango bakozwa konje ya monene.

Loyembo 199 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 22 Aprili

Loyembo 90

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo ezali na lokasa 8; sɛngá mosaleli na misala moko asala elakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai, mpe ndeko mwasi moko asala elakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Lamuká! ya 8 Mai. Nsima ya elakiseli mokomoko, zongelá likanisi moko to makanisi mibale oyo ndeko mokomoko alobaki na ebandeli mpo na kolamwisa mposa ya moto oyo azalaki kosolola na ye.

Min. 15: Tótosaka ngonga! Lisukulu. Makambo nyonso oyo etali losambo na biso mpe mosala na biso ya kosakola ezali na ntina mingi mpe esɛngaka ete esalemaka na “ntango” na yango. (Mos. 3:⁠1) Mposa na biso ezali ete tózangisaka ata eloko moko te na bibongiseli nyonso ya Teokrasi. Makita ya lisangá, bakisa mpe likita oyo tosalaka liboso ya kobima na mosala ya kosakola, esengeli kobandaka na ngonga oyo etyamá, kozanga kozela. Yehova asalaka makambo na ye nyonso kaka na ntango oyo abongisá. (Hab. 2:⁠3) Ntango mosusu ekosɛnga ete tóbongisa lisusu likambo yango? Ya solo, na bantango mosusu, kozanga kokana, ekómelaka moto nyonso ete azanga kotosa ngonga. Kasi soki toyebi komibongisa malamu, tokozala te na momeseno ya koyaka na makita nsima ya ngonga, nsima ya loyembo mpe libondeli ya ebandeli to mpe na nsuka ya likita oyo esalemaka liboso ya kobima na mosala ya kosakola. Lobelá makambo oyo ekoki mpenza kosalema mpo na kokóma na mimeseno ya malamu oyo ekosalisa biso tótosaka ngonga mpo na misala na biso nyonso ya elimo.​​—⁠Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 1990, lokasa 29.

Min. 20: “Ozali komipesa na kotánga mpe kokoma?”c Ekosalema na nkulutu moko. Nsima ya kosala lisolo yango na mituna mpe biyano, tuná mosakoli moko to basakoli mibale, oyo bayekolaki kotánga mpe kokoma na kelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma. Báyebisa esengo nini mpe botɔndi nini bazali na yango mpo na ebongiseli wana. Ndeko oyo akosala lisolo oyo akolobela mpe mwa makanisi mosusu ya mokanda ya 1 Febwali 2002, oyo etindamaki epai ya masangani ya bankulutu. Lobelá mpe bibongiseli oyo lisangá ezwi mpo na kelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma. Soki bomoni ete ezali mpenza na ntina te kobongisa kelasi yango na lisangá na bino, monisá ntina ya kotángaka mikanda oyo tozali na yango mpo na koyeba malamumalamu monɔkɔ oyo bosalelaka na makita ya lisangá na bino mpo ete tókoka kozwa litomba na mateya oyo ezali kopesama.​​—⁠1 Tim. 4:​13, NW. Talá sg lok. 29.

Loyembo 191 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 29 Aprili

Loyembo 162

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Aprili.

Min. 15: “Mosala ya kosakola Bokonzi ezali kobikisa bomoi ya bato!”d Tuná bayoki bámonisa boyokani oyo ezali kati na mikapo ya Makomami oyo epesami mpe lisolo yango.

Min. 20: Ndenge ya kosalela buku Comment raisonner mpo na koluka biyano. Lisolo elongo na bayangani. Na mosala ya kosakola, mbala mingi batunaka biso mituna oyo ezali te na liste ya mitó ya makambo (Table des matières, nkasa 5-6) ya buku Comment raisonner. Mpo na kozwa mikapo ya Biblia oyo esimbi bindimeli na biso, “Index” (nkasa 439-445) esalisaka mpenza. Sɛngá bayoki bátala na Index maloba oyo totɛngisi mpe báluka na kati ya buku biyano na mituna oyo elandi: Ndenge nini baklisto batalelaka bɛndɛlɛ (Drapeaux) mpe loyembo ya ekólo (Hymnes)? Mpo na nini Nzambe atikaka ete makama (Catastrophes) esalema? Ndenge nini okoki kolimbola likanisi ya Biblia mpo na likambo ya koboma libala (Divorce)? Mpo na nini mpe ntango nini bandeko basi basengeli kozipa motó (Coiffure)? Fɛti ya bamama (Fête des mères) eutá wapi? Ndenge nini toyebi ete motángo ya 144 000 oyo Biblia elobi ezali motángo ya elilingi te? Lisese ya Mozwi mpe Lasalo (Homme riche et Lazare) elimboli nini? Lendisá basakoli nyonso básalelaka buku Comment raisonner na mosala ya kosakola.

Loyembo 28 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 6 Mai

Loyembo 141

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mpe lisolo “Tólanda kozwa litomba na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!”

Min. 10: Tómibongisa mpo na bantango ya konje. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Lobelá misala oyo tozalaka na momeseno ya kosala na ntango ya konje: koyangana mikolo nyonso misato na liyangani ya etúká, kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpo na sanza moko to basanza mingi, kobongisa ndako to lopango, mpe ntango mosusu kobima mpo na kominanola moke. Sɛngá bandeko mosusu báyebisa makambo oyo bazali kokana kosala mpe nini bakosala mpo bábosana te boyekoli na bango ya libota, makita ya lisangá mpe mosala ya kosakola, ata soki bakei wapi. Soki lisangá na bino ezali na bateritware epai oyo litatoli epesamaka mpenza te, yebisá bibongiseli nini bozali kozwa mpo na kopesa litatoli ya mozindo na bateritware yango. Kundwelá basakoli nyonso ete, ezala bazali epai na bango to bakei epai mosusu, basengeli kosala makasi mpo na kotinda balapolo na bango ya mosala epai ya motambwisi ya Boyekoli ya mokanda.

Min. 25: “Ndenge nini mabota ekoki kozala makasi na elimo?”e Nsima ya kosala lisolo yango na mituna mpe biyano, lobelá mwa makambo oyo bandeko bakutanaki na yango, oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 1999, nkasa 10-12.

Loyembo 17 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto