Ozali komipesa na kotánga mpe kokoma?
1 Mpo ete moto ayekola mpe azwa boyebi ya sikisiki ya Nzambe mpe ya mikano na ye, esɛngaka atánga ata mwa kelasi. Mingi bamoni mpenza ete koyeba mokanda ezali fungola oyo ekoki kosalisa moto amipesa na ndenge oyo esengeli mpenza na losambo ya Yehova Nzambe. (Emon. 1:3) Ezali na bandeko mingi oyo bayekoli kotánga mpe kokoma na bakelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma oyo ebongisami na masangá mingi. Na bisika oyo bazali na mwa buku Omipesa na kotánga mpe kokoma (ay), ezali yango nde basalelaka mpo na bakelasi yango. Mwa buku yango esalisi mpenza bato mingi báyeba kotánga mpe kokoma nsima ya mwa ntango mokuse.—1 Tim. 4:13; Mat. 24:45.
2 Lolenge ya kobongisa bakelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma: Mpo na oyo etali lolenge ya kobongisa bakelasi yango, totii awa mwa makanisi oyo bapesi na mwa buku yango: “Basakoli oyo bazwi batisimo mpe baoyo bazwi naino batisimo te bakoki kokomisa nkombo na kelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma, ndenge esalemaka na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Soki bankulutu bamoni ete esengeli kosala kelasi moko to mingi mpo na koyekola kotánga mpe kokoma, bakopona moto oyo azali na makoki ya kotángisa bana-kelasi. . . . Mbala mingi, bandeko mibali nde basengeli kokokisa mokumba yango ya kotángisa. Nzokande, soki ndeko mobali azali te mpo na kotambwisa kelasi yango, ndeko mwasi moko ya makoki akoki kozwa mokumba yango. . . . Bankulutu bakoki kosɛnga na ndeko mwasi moko ya makoki ete atángisa bandeko basi to bilenge mibali mpe bilenge basi oyo bazwi naino batisimo te. Lokola ndeko mwasi yango azali kotángisa na esika oyo ebongaki na ndeko mobali, asengeli kozipa motó na ye. Na bisika oyo likoki ezali, ekozala malamu ete bakelasi yango esalemaka mbala mibale to mbala misato na pɔsɔ mpo ete bayekoli bákoka kokola noki. Nsima ya liteya moko mpe liboso ya kobanda liteya mosusu, molakisi akopesa bayekoli badevuare ya kosala na ndako mpe na ebandeli ya liteya oyo ekolanda mokolo mosusu akolimbola yango. Kelasi esengeli kosalema na ngonga oyo ebongi mpo na bayekoli mingi. Bamosusu bazali kokabola bakelasi na bituluku mike mpe bazali kotángisa liboso ya kobanda boyekoli ya mokanda ya lisangá. Basusu bazali kokabola bakelasi mpe bazali kotángisa na boumeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Lisangani ya bankulutu ya lisangá ekopona ntango mpe esika oyo bakelasi yango ekosalema.”
3 Yehova Nzambe, Mozalisi na biso, akelaki biso na likoki kitoko mpenza, oyo ya koyeba kotánga mpe kokoma. Kasi, mpo na koyeba kotánga mpe kokoma, esɛngaka kosala milende. Soki toyekoli kotánga mpe kokoma, tokozwa mbano oyo eleki nyonso, elingi koloba tokoyeba Liloba ya Nzambe mpe tokotosa etinda na ye oyo elobi ete: ‘Tángáká yango na mongongo ya nse butu na moi.’—Yos. 1:8, NW.