Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/10 nk. 8-13
  • “Bótɛmɛla Zabolo”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bótɛmɛla Zabolo”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mitambo oyo Satana atyelaki baklisto ya liboso
  • Mitambo ya Satana lelo oyo
  • Yesu atɛmɛlaki Zabolo
  • Tozali na nyonso oyo esengeli mpo na kotɛmɛla Zabolo
  • ‘Tótemela Zabolo’ ndenge Yesu asalaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Bótɛmɛla Satana, mpe akokima!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Totelema ngwi liboso na mayele mabe ya Satana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Kebá—Satana alingi kolya yo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/10 nk. 8-13

“Bótɛmɛla Zabolo”

“Bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.”​—⁠YAKOBO 4:⁠7.

1. Makambo nini ezali koleka na mokili, mpe mpo na nini bapakolami na baninga na bango basengeli kozala ekɛngɛ?

ANDRÉ MALRAUX, mokomi moko ya France, alobaki ete: “Nzambe alimwá, kasi Zabolo azali.” Maloba yango ezali komonisa mpenza ndenge makambo ezali koleka na mokili, mpamba te makambo oyo bato bazali kosala ezali mingimingi komonisa mayele mabe ya Zabolo, kasi ezali kolanda mokano ya Nzambe te. Satana azali kopɛngwisa bato “na misala nyonso ya nguya mpe bilembo ya lokuta mpe makamwisi oyo ezali komonisa makambo oyo ekoya mpe na bokosi nyonso ezangi boyengebene mpo na baoyo bazali kobeba nyɛɛ.” (2 Batesaloniki 2:​9, 10) Kasi, na “mikolo ya nsuka” oyo tozali, Satana azali nde kotya miso na ye mingimingi likoló ya bato oyo bamipesi mpo na kosalela Nzambe; azali kobundisa baklisto bapakolami, “oyo bazali kotosa bakomandema ya Nzambe mpe bazali na mosala ya kopesa litatoli na ntina etali Yesu.” (2 Timote 3:1; Emoniseli 12:​9, 17) Yango wana, Batatoli yango na baninga na bango oyo bazali na elikya ya kofanda awa na mabele basengeli bango nyonso kozala ekɛngɛ.

2. Ndenge nini Satana alɛngolaki Eva, mpe ntoma Paulo azalaki kobanga nini?

2 Satana azali mokosi monene. Asalelaki nyoka mpo na kokosa Eva ete soki aboyi kotosa Nzambe, akozwa bolamu mingi. (Genese 3:​1-6) Mbula soki nkóto minei na nsima, ntoma Paulo azalaki kobanga ete Satana akweisa baklisto bapakolami oyo bazalaki na Kolinti na mayele mabe na ye. Paulo akomaki boye: “Nazali kobanga ete ezala na ndenge nini, lokola nyoka abendaki Eva na mayele na ye ya mabe, makanisi na bino ebebisama mpe elongwa na bosembo mpe na bopɛto ya bizaleli oyo esengeli na Klisto.” (2 Bakolinti 11:⁠3) Satana azali kobebisa makanisi ya bato. Se ndenge oyo alɛngolaki Eva, akoki kotinda baklisto bábanda komikosa ete bakozwa bolamu soki bazali kosala eloko moko oyo Yehova na Mwana na ye baboyi.

3. Ndenge nini Yehova azali kobatela na mitambo ya Zabolo?

3 Satana azali lokola mobomi-ndɛkɛ oyo atyaka mitambo mpo na kokanga bandɛkɛ oyo bazali ekɛngɛ te. Mpo na kokima mitambo ya Satana, tosengeli ‘kofanda kati na esika oyo ebombami ya Oyo-Aleki-Likoló,’ yango ezali esika ya elilingi epai Yehova abatelaka baoyo bamonisaka na misala na bango ete batosaka bokonzi na ye ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (Nzembo 91:​1-3, NW) Tozali na mposa ya libateli nyonso oyo Nzambe azali kopesa na nzela ya Liloba na ye, elimo santu na ye, mpe ebongiseli na ye mpo ‘tókoka kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.’ (Baefese 6:11) Zabolo asalelaka mayele mabe ya ndenge na ndenge mpo na kokanga basaleli ya Yehova na motambo.

Mitambo oyo Satana atyelaki baklisto ya liboso

4. Makambo ezalaki ndenge nini na ntango ya baklisto ya liboso?

4 Baklisto ya ekeke ya liboso mpe ya mibale ya ntango na biso (T.B.) bazalaki na bomoi na eleko oyo bokonzi ya Loma ezalaki mpenza bokonzi ya nguya. Lokola mikili oyo Baloma bazalaki koyangela ezalaki na kimya, misala ya mombongo ezalaki kotambola malamu. Bomɛngo yango esalaki ete bakonzi bázala na ntango mingi mpo na kozwa mopɛpɛ mpe kosala masano, mpe bakonzi yango batyelaki bato oyo bango bazalaki koyangela ebele ya masano mpo ete bákoka kotombokela bango te. Na bileko mosusu, mikolo ya konje oyo Leta azalaki kopesa ekokanaki na mikolo ya mosala. Bakonzi bazalaki kosalela mbongo ya Leta mpo na kopesa bato bilei mpe kotyela bango masano; na bongo, bazalaki koleisa bato malamu mpe kosepelisa bango.

5, 6. (a) Mpo na nini ebongaki te ete baklisto bákendaka na bisika oyo bazalaki kolakisa bateyatre mpe na bisika ya masano? (b) Wapi mayele mabe Satana azalaki kosalela, mpe ndenge nini baklisto bakokaki kokima yango?

5 Makambo yango ekokaki komemela baklisto ya liboso likama? Soki totaleli makebisi oyo baklisto lokola Tertullien, oyo bazalaki na bomoi mwa moke nsima ya liwa ya bantoma, bakomaki, tokomona ete makambo mingi oyo bato ya ntango wana bazalaki kosala mpo na kozwa mopɛpɛ to kolekisa ntango ezalaki likama mpo na elimo mpe bizaleli malamu ya baklisto ya solo. Na ndakisa, bafɛti mpe masano mingi oyo Leta azalaki kosalisa ezalaki mpo na kokumisa banzambe ya bapakano. (2 Bakolinti 6:​14-18) Ata na ebele ya bateyatre ya minene bazalaki kosala makambo ya mbindo to kosopa makila. Mokemoke, bateyatre wana ya kala ezalaki lisusu kosepelisa bato te; na esika na yango, ekómaki nde bateyatre ya kosɛkisa oyo ezalaki mpe na makambo ya nsɔni. Jérôme Carcopino, moto ya mayele na makambo ya kala, akomaki na buku na ye (Daily Life in Ancient Rome) ete: “Basi oyo bazalaki mpe kosala bateyatre yango bazalaki ntango mosusu kotikala bolumbu . . . Makila ezalaki kosopama mingi. . . . [Teyatre] ezalaki kolakisa mpenza makambo ya bosɔtɔ oyo bato oyo bafandaki na mboka-mokonzi bazalaki kosala. Bato yango bazalaki koyoka lisusu nsɔmɔ te ntango bazalaki kotala makambo wana, mpamba te masano ya mobulu mpe ya kosopa makila oyo bazalaki kotala na bisika ya masano esilaki kobebisa makanisi na bango.”​—⁠Matai 5:​27, 28.

6 Na kati ya bisika ya masano, bilombe bazalaki kobunda tii na kobomana, to mpe bazalaki kobunda na banyama ya zamba tii bakoboma banyama yango to banyama yango ekoboma bango. Bato mabe oyo bakatelaki bango bitumbu ya liwa mpe na nsima, baklisto ebele, bazalaki kobwakama na esika banyama yango ezali. Ata na ntango wana ya kala, Satana azalaki kosalela mayele mabe ya kobebisa lisosoli ya bato mpo eyokaka lisusu nsɔmɔ te mpo na pite to ekobo mpe mpo na mobulu, bámesana na makambo yango mpe bákóma na mposa na yango. Mpo na kokima motambo wana, esengelaki kaka koboya kotya makolo na bisika oyo bazalaki kolakisa bateyatre mpe na bisika ya masano.​—⁠1 Bakolinti 15:​32, 33.

7, 8. (a) Mpo na nini ezalaki likambo ya mayele te ete moklisto akendaka kotala mimekano ya mbangu ya makalo? (b) Ndenge nini Satana akokaki kosalela bapisine minene ya Loma lokola motambo mpo na kokweisa baklisto?

7 Bato bazalaki kosepela mingi na momekano ya mbangu ya makalo, oyo ezalaki kosalema na mabándá ya masano ya minene mpe milai; kasi baklisto bazalaki koboya yango, mpamba te mbala mingi, ebele ya bato oyo bazalaki kokende kotala yango bazalaki kobimisa mobulu. Mokomi moko, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya misato, alobaki ete bato mosusu oyo bazalaki kokende kotala lisano yango bazalaki kobunda bango na bango. Lisusu, Carcopino alobi ete “bato ya astroloji na basi ya ndumba bazalaki kosala misala na bango” na bisika yango. Ezali polele ete mabándá wana ya masano ya Baloma ezalaki bisika oyo baklisto bakokaki kokende te.​—⁠1 Bakolinti 6:​9, 10.

8 Ezali boni mpo na bapisine minene ya Loma epai bato bazalaki kokende kosukola? Kosukola mpo na bopɛto ya nzoto ezalaki mabe te. Kasi, bapisine mingi ya Loma ezalaki bandako minene mpenza; na kati, ezalaki mpe na bandako mpo na konyolisa nzoto, bandako mpo na kosala ngalasisi, bandako mpo na masano ya mbongo mpe barestora na banganda. Atako na maloba bazalaki koloba ete basi na mibali basengelaki kosukola nzela moko te, mbala mingi, basi na mibali bazalaki kosukola nzela moko mpe moto moko te azalaki kopekisa bango. Clément d’Alexandrie akomaki boye: “Bazali kotika basi na mibali básukola nzela moko, mpe na kati ya mai basi na mibali bazali kotikala bolumbu mpo na kosala makambo ya nsɔni.” Na bongo, esika wana oyo eyebanaki na Leta, Satana akómaki kosalela yango lokola motambo mpo na kokweisa baklisto. Baoyo bazalaki ekɛngɛ bazalaki kotya makolo na bango kuna te.

9. Mitambo nini oyo baklisto ya liboso basengelaki kokima?

9 Ntango Bokonzi ya Loma ezalaki mpenza na nguya mingi, bato bazalaki kolekisa ntango mingi na masano ya mbongo. Mpo bábendama te na masano ya kopona liboso makalo oyo ekolonga, baklisto ya liboso bazalaki kokende te na mabándá ya masano epai mimekano ya mbangu ya makalo ezalaki kosalema. Masano mosusu ya mikemike ya mbongo oyo epekisamaki ezalaki kosalema na banganda ya nsima ya ndako. Bato bazalaki kosala lisano oyo ezalaki kosɛnga moto ayebisa mwa mabanga to mwa mikuwa boni oyo moko na bango asimbi na lobɔkɔ na ye. Masano ya mbongo ezalaki kosepelisa bato, mpamba te na nzela na yango, bazalaki kolikya kozwa mbongo na motɔki te. (Baefese 5:⁠5) Lisusu, mbala mingi basi ya ndumba nde bazalaki kotɛkisa masanga na bisika yango; yango wana, likama ya kokwea na pite to ekobo ezalaki mingi. Tolobeli kaka mwa ndambo ya mitambo oyo Satana azalaki kotyela baklisto oyo bazalaki kofanda na bingumba ya Bokonzi ya Loma. Makambo ezali ndenge mosusu lelo oyo?

Mitambo ya Satana lelo oyo

10. Makambo oyo tozali komona lelo oyo ekokani na oyo ezalaki na Bokonzi ya Loma na nini?

10 Soki totali mpenza malamu, mayele mabe oyo Satana asalelaka banda kala ebongwani te. Mpo baklisto oyo bazalaki kofanda na engumba ya Kolinti oyo etondaki na makambo mabe ‘bákosama na Satana te,’ ntoma Paulo apesaki bango toli ya solosolo. Alobaki ete: “Tozangi te koyeba mayele [ya Satana].” (2 Bakolinti 2:11) Lelo oyo, na mikili mingi ya bozwi, makambo ezali se ndenge oyo ezalaki na Bokonzi ya Loma na ntango oyo ezalaki mpenza na nguya mingi. Bato mingi bakómi na ntango mingi koleka mpo na kozwa mopɛpɛ mpe kotala masano. Masano ya tombola ezali kopesa ata babola mwa elikya. Bato bazali na likoki ya kosala ebele ya masano oyo ezali kosɛnga mbongo mingi te. Ebele ya bato bazali kokende kotala masano na libándá ya masano, bato bazali kobɛta masano ya mbongo, bato oyo bazali kokende kotala masano bazali ntango mosusu kobimisa mobulu, mpe mbala mingi bato oyo basalaka masano bazali kobimisa mobulu. Bato bazali koyoka miziki oyo ezali na maloba ya nsɔni, mpe bateyatre, bafilme mpe baprogramɛ mosusu oyo ezali koleka na televizyo etondi na makambo ya nsɔni. Na bamboka mosusu, basi na mibali bazali kokende kosukola esika moko na bapisine minene; kutu, bato mosusu bazali kosukola bolumbu na mabongo. Se ndenge makambo ezalaki na ebandeli ya lingomba ya boklisto, Satana azali koluka kokanga basaleli ya Nzambe na motambo na nzela ya makambo ndenge na ndenge oyo bato ya mokili basalaka mpo na kolekisa ntango mpe kozwa mopɛpɛ.

11. Mposa ya kopemisa nzoto mpe kozwa mopɛpɛ ekoki kokweisa biso na mitambo nini?

11 Lokola bato mingi batondi na mitungisi na mokili oyo, elongobani mpenza ete moto ayoka mposa ya kozwa mopɛpɛ to kopemisa makanisi. Kasi, se lokola makambo mosusu oyo ekokaki kozala likama mpo na baklisto ya liboso ezalaki kosalema na bapisine minene ya Loma, Satana azali mpe kosalela bisika mosusu epai bato bakendaka kolekisa ntango mpe kozwa mopɛpɛ lokola motambo mpo na kotinda baklisto ya mikolo oyo bákwea na pite to ekobo, to mpe bálangwa masanga. Paulo akomelaki baklisto ya Kolinti ete: “Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu. Bólamuka mpo na kozongela makanisi ya malamu na motindo oyo ezali ya boyengebene mpe bózala te na momeseno ya kosala lisumu, mpo bamosusu bayebi Nzambe te.”​—⁠1 Bakolinti 15:​33, 34.

12. Wapi mayele mabe oyo Satana azali kosalela lelo oyo mpo na kokanga basaleli ya Yehova na motambo?

12 Tomonaki ndenge oyo Satana asalelaki mayele mabe mpo na kobebisa makanisi ya Eva. (2 Bakolinti 11:⁠3) Lelo oyo, motambo mosusu oyo Satana azali kosalela ezali ya kotinda baklisto na kokanisa ete soki bango mpe bazali kosala makambo oyo epekisami mpenza te mpo na komonisa bato mosusu ete Batatoli ya Yehova bazali kaka lokola bato nyonso, bakobenda bato mosusu na solo. Mbala mosusu, baklisto yango bazali kolekisa mpe bazali kosala makambo oyo epekisami. (Hagai 2:​12-14) Mayele mabe mosusu ya Satana ezali ya kotinda baklisto oyo bamipesi, ezala mikóló to bilenge, na kosala makambo na liso na nse ya lokasa mpe ‘koyokisa elimo santu ya Nzambe mawa.’ (Baefese 4:30) Bamosusu bakwei na motambo yango, mpamba te bazalaki kotala makambo ya mbindo na Internet.

13. Wapi motambo oyo ezali komonana polele te oyo ezali mpe moko ya mayele mabe oyo Zabolo azali kosalela, mpe toli nini ya mokanda ya Masese ebongi mpo na likambo yango?

13 Motambo mosusu ya Satana oyo ezali komonana polele te ezali nde koyokanisa bato na bilimo mabe. Moklisto ya solo moko te akondima kokɔta na losambo ya Satana to na misala oyo ezali na boyokani na bilimo mabe. Kasi, bamosusu bazali kokosama, bazali kobosana ete basengeli kozala ekɛngɛ na oyo etali bafilme, maboke, masano ya video, ata mpe na babuku ya bana mike oyo ezali kolakisa mobulu mpe makambo ya bilimo mabe. Tosengeli kolinga kopusana ata moke te penepene na eloko nyonso oyo ezali ata na mwa boyokani moke na bilimo mabe. Lisese moko elobi boye: “Nzube mpe mitambo ezali na nzela ya moto ya yauli; ye oyo akobatela molimo na ye akozala mosika na yango.” (Masese 22:⁠5) Lokola Satana azali “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” akoki kozanga te kotya mitambo na ye na likambo nyonso oyo bato mingi bazali kosepela na yango.​—⁠2 Bakolinti 4:4; 1 Yoane 2:​15, 16.

Yesu atɛmɛlaki Zabolo

14. Ndenge nini Yesu atɛmɛlaki Zabolo ntango amekaki ye mpo na mbala ya liboso?

14 Yesu apesaki ndakisa ya malamu mpenza na oyo etali kotɛmɛla Zabolo mpe kokimisa ye. Nsima ya batisimo na ye, Yesu alekisaki mikolo 40 na nzala; nsima na yango, Satana amekaki ye. (Matai 4:​1-11) Lokola Yesu azalaki na nzala mpo alyaki te mikolo nyonso wana, Satana asalelaki yango mpo na komeka ye mbala ya liboso. Alobaki na Yesu asala likamwisi na ye ya liboso mpo akokisa mposa moko oyo nzoto na ye ezalaki na yango. Yesu azongelaki maloba ya Deteronome 8:​3, aboyaki kosalela nguya na ye mpo na litomba na ye moko mpe amonisaki ete bilei ya elimo ezali na ntina koleka bilei ya mosuni.

15. (a) Satana asalelaki mposa nini oyo Yesu azalaki na yango mpo na komeka ye? (b) Wapi moko ya mayele mabe ya libosoliboso oyo Zabolo azali kosalela lelo oyo mpo na kokweisa basaleli ya Nzambe, kasi ndenge nini tokoki kotɛmɛla ye?

15 Likambo moko ezali kobenda likebi na biso na komekama wana ezali ete Zabolo alukaki te kotinda Yesu ete asala pite. Satana amonaki ete lokola Yesu azalaki na nzala, oyo etindaka moto aluka biloko ya kolya, esengelaki komeka ye na likambo yango na ntango wana. Komekama nini Zabolo azali kosalela lelo oyo mpo na kobenda basaleli ya Nzambe? Ezali ebele mpe nyonso ezali ndenge moko te; kasi, mpo na kobebisa bosembo ya basaleli ya Yehova, mposa ya pite to ekobo ezali moko ya mayele mabe ya libosoliboso oyo Zabolo azali kosalela. Soki tolandi ndakisa ya Yesu, tokoki kotɛmɛla Zabolo mpe tokokwea te. Mpo na kolonga masɛnginya ya Satana, Yesu akanisaki mikapo oyo ebongi; biso mpe, soki tomekami na likambo etali pite to ekobo, tokoki kokanisa mikapo lokola Genese 39:9 mpe 1 Bakolinti 6:⁠18.

16. (a) Ndenge nini Satana amekaki Yesu mpo na mbala ya mibale? (b) Na ndenge nini Satana akoki kotinda biso na komeka Yehova?

16 Na nsima, Zabolo ayebisaki Yesu amibwaka banda na nsamba ya tempelo mpo na kotala soki Nzambe akotinda baanzelu bábatela ye. Yesu azongelaki maloba ya Deteronome 6:16 mpe aboyaki komeka Tata na ye. Ntango mosusu Satana akomeka biso te ete tómibwaka banda na nsamba ya tempelo, kasi akoki kotinda biso na komeka Yehova. Tolukaka koyeba tii wapi tokoki kolanda midɛlɛ ya bilamba oyo ezali kobima na mokili mpe ndenge ya kokatisa nsuki kozanga ete ndeko moko amona ete asengeli kopesa biso toli mpo na yango? Tobendamaka na masano oyo ebongi mpenza te? Soki tosalaka bongo, ekoki kozala ete tozali komeka Yehova. Soki tozali na makanisi ya ndenge wana, na esika ete Satana akima biso, akoki nde kokangama na biso; akoluka ntango nyonso kobenda biso na ngámbo na ye.

17. (a) Ndenge nini Zabolo amekaki Yesu mpo na mbala ya misato? (b) Ndenge nini tokoki kokokisa maloba ya Yakobo 4:⁠7?

17 Ntango Satana ayebisaki Yesu ete akopesa ye bikonzi nyonso ya mokili soki kaka asambeli ye, Yesu asalelaki lisusu Makomami mpo na kotɛmɛla ye; amonisaki polele ete ye akosambela kaka Tata na ye. (Deteronome 5:9; 6:13; 10:20) Ekoki kozala ete Satana akoyebisa biso te ete apesa biso bikonzi ya mokili, kasi azali ntango nyonso kolakisa biso biloko ya mokili mpo na kolɛngola biso; azali ata kopesa biso elikya ya kozwa mwa bokonzi. Tosalaka ndenge oyo Yesu asalaki, elingi koloba tosambelaka kaka Yehova? Soki tosalaka bongo, likambo oyo ekómelaki Yesu ekokómela mpe biso. Likambo nini? Lisolo ya Matai emonisi yango: “Boye Zabolo atikaki ye.” (Matai 4:11) Satana akotika biso soki tozali kobosana te mitinda ya Biblia oyo ebongi mpe soki tozali kosalela yango mpo na kotɛmɛla ye. Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.” (Yakobo 4:⁠7) Moklisto moko akomaki boye na mokanda moko oyo atindaki na biro ya Batatoli ya Yehova na France: “Satana azali mpenza na mayele mabe. Atako nazali na mikano ya malamu, nazalaka na mokakatano mpenza mpo na kopekisa makanisi mpe bamposa ya mabe. Atako bongo, mpiko mpe motema molai na ngai, mpe mingimingi lisalisi ya Yehova, esali ete natikala sembo mpe nakangama na solo.”

Tozali na nyonso oyo esengeli mpo na kotɛmɛla Zabolo

18. Wapi molato ya etumba ya elimo oyo tozali na yango mpo na kotɛmɛla Zabolo?

18 Yehova apesi biso molato mobimba ya etumba ya elimo mpo na kosalisa biso ‘tótɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.’ (Baefese 6:​11-18) Bolingo oyo tozali na yango mpo na solo ekokangama na loketo na biso lokola mokaba, elingi koloba, ekobongisa biso mpo na mosala ya kosakola. Ekateli na biso makasi ya kotosa mibeko ya sembo ya Yehova ekozala lokola ebateli-ntolo oyo ekobatela motema na biso. Soki tolati nsango malamu lokola sapato na makolo na biso, tokobanda kobima mbala na mbala na mosala ya kosakola, mpe yango ekopesa biso makasi mpe ekobatela biso na elimo. Kondima makasi ekozala lokola nguba moko monene oyo ekobatela biso na “bambanzi nyonso ya moto mabe oyo ezali kopela,” elingi koloba mikakatano mpe komekama oyo azali kobimisela biso na mayele mabe na ye. Elikya oyo tozali na yango ete bilaka ya Yehova ekokokisama ekozala lokola ekɔti oyo ekobatela makoki na biso ya kokanisa mpe ekopesa biso kimya na makanisi. (Bafilipi 4:⁠7) Soki toyebi kolimbola Liloba ya Nzambe malamu, ekozala lokola mopanga oyo tokoki kosalela mpo na kolongola bato na boombo ya elimo oyo Satana akangi bango. Tokoki mpe kosalela yango mpo na komibatela, ndenge oyo Yesu asalaki ntango amekamaki.

19. Longola ‘kotɛmɛla Zabolo,’ likambo nini ezali mpe na ntina?

19 Soki tozali ntango nyonso na “molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe” mpe soki tozali kobondela ntango nyonso, tokoki kolikya ete Yehova akobatela biso soki Satana abundisi biso. (Yoane 17:15; 1 Bakolinti 10:13) Kasi, Yakobo amonisaki ete tosengeli kaka te ‘kotɛmɛla Zabolo.’ Likambo oyo eleki monene ezali ete tosengeli mpe ‘kotosa Nzambe’ oyo atyelaka biso likebi. (Yakobo 4:​7, 8) Lisolo oyo elandi ekomonisa biso ndenge oyo tokoki kosala yango.

Okopesa eyano nini?

• Wapi mitambo ya Satana oyo baklisto ya liboso basengelaki kokima?

• Wapi mayele mabe oyo Satana azali kosalela lelo oyo mpo na komeka kokanga basaleli ya Yehova na motambo?

• Ndenge nini Yesu atɛmɛlaki komekama ya Zabolo?

• Wapi molato ya etumba ya elimo oyo esalisaka biso tótɛmɛla Zabolo?

[Elilingi na lokasa 9]

Yesu atɛmɛlaki mpenza Zabolo

[Bililingi na lokasa 10]

Baklisto ya ekeke ya liboso baboyaki masano ya mobulu mpe ya mbindo

[Eutelo ya bafɔtɔ]

The Complete Encyclopedia of illustration/J.G. Heck

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto