Loyembo 86
Tólóna mbuma ya bolingo
1. Yehova, y’ozali bolingo;
Nyonso malamu, tozwi na yo.
Biso tósaleli yango
Mpo na mosala ya seko.
Na Nzambe, tozwi elimo,
Tólóna mbuma na yango.
O kati na yango nyonso
Oy’eleki nde bolingo.
2. Tólóna mpe mbuma y’elimo
Na motema molai nyonso.
Yang’ezali na ntina bɛɛ
Kati’a mosala ya Nzambe.
Esengeli’ete bolingo
Ezwa esika’a liboso.
Tópusami n’elimo mpo
Tósakola nsango’a seko.
3. Tósala mpe tóbota mbuma!
Tólanda bolingo na kimya.
Tóyikela mabe mpiko;
Tósunga bandeko banso.
Soki tokokaba mingi,
Esengo, nsai nde tozwi.
Tókólisa nde bolingo,
Bolamu’euti na yango.